Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini mpasi ezali mingi boye?

Mpo na nini mpasi ezali mingi boye?

BAKONZI ya mangomba oyo balobaka ete bayebi eyano na motuna oyo, bateyaka ete bampasi ezali etumbu ya Nzambe. Na ndakisa, ntango mabele eninganaki na ekólo Haïti, mwa mikolo na nsima, pastɛrɛ moko na engumba-mokonzi alobaki na bandimi na ye ete Nzambe nde atindaki likama yango mpo na kokebisa biso. Bakonzi mosusu ya mangomba bazalaka na mwa bokatikati mpo na kolobela likambo yango. Profesɛrɛ moko ya makambo ya mangomba na Amerika alobi ete bato mingi balobelaka likambo yango boye: “Ntina oyo Nzambe atindaka makama wana ezali libombami oyo etali biso te. Biso tosengeli kaka kozala na kondima.”

Ezali solo ete Nzambe “atindaka” bampasi oyo ekómelaka bato? Biblia elobi bongo ata moke te! Yehova Nzambe akanaki te ete bato bákutanaka na bampasi. Nzokande, mobali ná mwasi ya liboso baboyaki kotosa mobeko ya Nzambe, mpe balingaki bango moko kopona malamu ná mabe. Bapesaki Nzambe mokɔngɔ mpe yango ememelaki bango mikakatano. Lelo oyo, tozali komona mpasi mpo na nzela mabe oyo bango balandaki. Kasi, Nzambe atindelaka bato bampasi ata moke te. Biblia elobi boye: “Ntango moto azali komekama, aloba te ete: ‘Nzambe azali komeka ngai.’ Mpo Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.” (Yakobo 1:13) Mpasi ekoki kokómela moto nyonso, ata moto oyo Nzambe asepelaka na ye. Tótalela bandakisa oyo:

  • Mosakoli Elisa abɛlaki maladi oyo asengelaki kokufa na yango.​—2 Bakonzi 13:14.

  • Ntoma Paulo akomaki ete akobaki “koyoka nzala mpe lisusu koyoka mposa ya mai mpe kozanga bilamba mpe kobɛtamabɛtama mpe kozanga esika ya kofanda.”​—1 Bakorinti 4:11.

  • Mokristo moko, nkombo na ye Epafrodite, azalaki maladi mpe ‘azalaki na mawa mingi.’​—Bafilipi 2:25, 26.

Esika moko te tozali kotánga ete Nzambe apesaki mibali yango misato etumbu mpo na masumu na bango. Kasi, Biblia esuki te na koloba kaka ete Nzambe te nde atindelaka bato bampasi. Emonisi mpe makambo misato oyo mbala mingi ememelaka bato mpasi.

Makambo oyo biso moko toponaka

“Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” (Bagalatia 6:7) Soki moto azali komɛla likaya, azali kotambwisa motuka na ndenge ya ligboma, to azali kobebisa mbongo na ye, ekozala foti na ye moko soki lobilobi akutani na mikakatano.

Mpasi ekoki mpe kokómela biso mpo na makambo mabe oyo bato mosusu baponaki. Ya solo, ezali na bato oyo basalá makambo ya mabe mpenza, na ndakisa makambo ya nsɔmɔ oyo Banazi basalaki to ndenge bato mosusu babebisaka bana mike. Lokola basalelaka bonsomi na bango ya kopona na ndenge oyo ebongi te, bato mosusu bazwaka bikateli oyo epesaka baninga mpasi.

Makambo oyo ekanami te

Na ntango ya Yesu, ndako moko molai ekweaki na Yerusaleme mpe ebomaki bato 18. Mpo na bato oyo bakufaki na likama wana, Yesu alobaki boye: “Bokanisi ’té mabe na bango eleki ya bato mosusu nyonso ya Yeruzalem? Te!” (Luka 13:4, 5, Bible na lingala ya lelo oyo) Yesu ayebaki ete soki bato wana bakufaki, ezali te ete Nzambe nde apesaki bango etumbu. Ayebaki ete Liloba ya Nzambe elobá ete: “Ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka bango nyonso.” (Mosakoli 9:11) Makama mingi ekómelaka bato mpo bazalaki na esika ya mabe na ntango ya mabe to mpo moto moko asalaki libunga. Na ndakisa, balapolo ezali komonisa ete mpasi ezalaka mingi ntango bato baboyi kolanda makebisi mpe soki bato batongi bandako oyo ekoki te kopikama ntango mabele eningani to mopɛpɛ makasi ebɛti. Na ntango wana, makama ezwaka bato mingi mpe na bongo, ememaka mpasi mingi.

“Mokonzi ya mokili oyo”

Biblia elobi ete: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (Yoane 12:31; 1 Yoane 5:19) “Moto mabe” yango ezali Satana Zabolo, ekelamu moko ya elimo oyo azali na nguya mingi, oyo Biblia ebengi ye “mokonzi ya nguya ya mopɛpɛ.” Satana alendisaka “elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi.” (Baefese 2:2) Makambo mosusu ya mabe, na ndakisa koboma bato nyonso ya ekólo moko mpe kobebisa bana, esalaka nsɔmɔ makasi mpe etindaka bato mingi báloba ete ezali misala ya Satana.

Kasi, yango elingi koloba ete Nzambe akipaka mpasi na biso te? Akoki kosala to azali na mposa ya kosala eloko moko mpo na kosukisa yango?