MITUNA-LISOLO | PAOLA CHIOZZI
Moto moko ya siansi alobeli kondima na ye
Paola Chiozzi moto moko ya mayele na bioloji asalaki mosala na iniversite ya Ferrare na ekólo Italie bambula koleka 20. Zulunalo Lamuká! etunaki ye mituna etali siansi mpe kondima na ye.
Yebisá biso ndenge okolá.
Papa na ngai azalaki kosala mosala ya kobongisa basapato, mpe mama azalaki kosala na ferme. Kasi, ngai nazalaki na mposa ya kokóma moto ya siansi. Bafololo ya kitoko, bandɛkɛ, banyama mikemike oyo ezalaki zingazinga ya lopango na biso ezalaki mpenza kobenda likebi na ngai. Nazalaki komona ete ezali na moto moko ya mayele koleka nde asalá biloko yango.
Ozalaki kondima banda kala ete Mozalisi azalaka?
Te. Kutu, banda bomwana, nakómaki kotya ntembe ete Nzambe azalaka te. Papa na ngai akufaki na mbalakaka na maladi ya motema, mpe nazalaki komituna, ‘mpo na nini Mozalisi ya biloko ya kitoko mingi boye atikaka nzela na bampasi mpe liwa?’
Koyekola siansi esalisaki yo ozwa biyano?
Na ebandeli esalisaki ngai te. Ntango nakómaki koyekola baselile ya nzoto ya moto, nabandaki koyekola ndenge baselile yango ebotamaka mpe ekufaka; kasi te baselile oyo ekufaka mpo ezangi oxygène to makila, mpo soki ekufi ndenge wana, ezalaka mabe mpo na nzoto. Eleki mwa bambula, bato ya siansi bazalaki kotyela likambo yango likebi mingi te, atako ezali na ntina mingi mpo nzoto ezala malamu.
Ndenge oyo baselile ebotamaka mpe ekufaka, ezali na litomba nini?
Nzoto na biso esalemi na bamiliare ya bamiliare ya baselile ya mikemike mpenza. Kutu, baselile yango nyonso esengeli kokufaka mpe mosusu ya sika esengeli kobotamaka na esika na yango. Lolenge mokomoko ya baselile eumelaka ndenge moko te; mosusu ekufaka nsima ya mwa bapɔsɔ mpe mosusu nsima ya mwa bambula. Mpo nzoto na biso ezala malamu, esɛngi mayele moko oyo ekosala ete motángo ya baselile oyo ezali kokufa mpe kobotama
ezala ndenge moko, mpe ekoba kosala kaka bongo na ndenge oyo ebongi.Nini ekoki kobebisa makambo?
Makambo mosusu oyo bayekoli emonisi ete soki baselile ekufi te ndenge esengeli, ekoki kobimisa maladi ya mingai to kanser. Nzokande, soki baselile ekufi liboso ya ntango oyo esengeli, ekoki kobimisa maladi ya Parkinson to ya Alzheimer. Nasalaka bolukiluki mpo na koyeba ndenge ya kosalisa bamaladi yango.
Koyekola baselile yango esalaki yo nini?
Na ntembe te, ekamwisaki ngai. Ndenge makambo yango ebongisamá na ndenge ya kokamwa emonisi polele ete moto moko oyo alingi biso tózala nzoto malamu nde abongisaki yango. Yango wana, nazalaki kaka komituna soki mpo na nini bato banyokwamaka mpe bakufaka. Nazalaki kozwa eyano te.
Boye, ondimisamaki ete ezali na moto moko oyo abongisá baselile yango ndenge wana?
Ɛɛ. Makambo ndenge na ndenge oyo esalemaka na baselile yango ezali mpenza kokamwisa, kitoko na yango emonisaka bwanya moko ya kokamwa. Nandimi ete ezali bwanya ya Nzambe. Nasalelaka ba mikroskope ya nguya mpenza mpo na koyekola makambo ndenge na ndenge oyo esalaka ete baselile yango ekufaka mpe ebotamaka. Makambo yango mosusu ekoki kosala ete baselile ekufa nokinoki na nsima ya basegonde soki esengeli. Baselile yango moko mpe emibomaka. Makambo yango ebongisamá malamu mpe ekamwisaka mpenza.
Lokola baselile nyonso ya nzoto na biso ekufaka mpe ebotamaka mbala na mbala, ekoki kosalema ete moto azala na bomoi libela na libela
Ozalaki komituna mituna mpo na Nzambe mpe bampasi. Ndenge nini ozwaki biyano?
Na 1991, bilenge Batatoli ya Yehova mibale ya mibali bayaki na ndako na ngai mpe natunaki bango mpo na nini tokufaka. Balakisaki ngai eyano oyo ya Biblia: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu.” (Baroma 5:12) Soki mobali ya liboso atosaka Nzambe, alingaki kotikala na bomoi libela na libela. Namonaki mbala moko ete yango eyokani na makambo oyo nayekolaki na bolukiluki na ngai. Kutu, ezalaki polele na makanisi na ngai ete Nzambe asalaki bato te mpo bakufaka. Lokola baselile nyonso ya nzoto na biso ekufaka mpe ebotamaka mbala na mbala, ekoki kosalema ete moto azala na bomoi libela na libela.
Nini endimisaki yo ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe?
Nayekolaki oyo Biblia elobaka na ntina na Nzambe na Nzembo 139:16, ete: “Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino liki, mpe biteni na yango nyonso ekomamaki na mokanda na yo.” Lokola nazali moto ya siansi, nayekolaka makambo oyo ezalaka na ba gène, oyo ekomamá na kati ya baselile na biso. Ndenge nini mokomi ya Nzembo ayebaki makambo yango? Ntango boyebi na ngai ya Biblia ezalaki kobakisama, nakómaki kondima mpenza ete ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe.
Ndenge nini basalisaki yo oyeba oyo Biblia eteyaka?
Motatoli moko ya Yehova asɛngaki ayekola na ngai Biblia. Nsukansuka nayebaki ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala. Ndenge Biblia elobi yango, nayekolaki mpe ete, Nzambe akani ‘kolongola mpenza liwa mpo na libela.’ (Yisaya 25:8) Ekozala mpasi te mpo Mozalisi na biso abongisa lisusu makambo oyo etambwisaka nzoto na biso mpo esala malamu, mpe tózala na bomoi libela na libela.
Ndenge nini osalelaki boyebi na yo ya Biblia mpo na kosalisa basusu?
Nakómaki Motatoli ya Yehova na 1995, bandá wana, nasalelaka mabaku nyonso mpo na koyebisa basusu makambo oyo nayekoli na Biblia. Na ndakisa, moninga na ngai moko ya mosala ayokaki mpasi makasi ntango ndeko na ye ya mobali amibomaki. Eglize na ye eteyaka ete Nzambe alimbisaka te bato oyo bamibomaka. Kasi, nalakisaki ye elikya ya lisekwa oyo Biblia epesi. (Yoane 5:28, 29) Abɔndisamaki mpenza ndenge ayebaki ete Mozalisi akipaka biso. Na mabaku lokola oyo wana, namonaka ete koyebisa basusu solo ya Biblia, epesaka ngai esengo mingi koleka siansi!