MITUNA-LISOLO | MASSIMO TISTARELLI
Moto moko oyo asalaka barobo amonisi ntina oyo andimelaka Nzambe
Profesɛrɛ Massimo Tistarelli azali moto ya siansi na iniversite ya Sassari na Italie. Apesaka mabɔkɔ na kobimisama ya bazulunalo misato ya siansi oyo eyebani na mokili mobimba, akomá mpe masolo koleka 100 oyo etali siansi. Ayekolaka ndenge oyo bato bayebaka bilongi ya basusu mpe basalaka makambo mike lokola kokanga bale. Na nsima, asalaka barobo mpe atyaka yango miso oyo ezali na likoki ya komekola miso ya moto. Zulunalo Lamuká! etunaki ye mituna etali kondima na ye mpe mosala na ye ya siansi.
Ozalaki mondimi ya lingomba nini?
Baboti na ngai bazalaki Bakatolike kasi bazalaki kokende eglize te. Ntango nazalaki elenge, nakómaki kolanda mateya ya bato oyo bandimaka te ete Nzambe azali. Bateyaki ngai ete bomoi ebimá kaka yango moko, mpe nandimaki likambo yango. Kasi, atako nazalaki kondima te ete Nzambe azali, nazalaki komona ete ezali na moto moko oyo aleki bato nyonso. Mpo na koyeba moto yango, nakɔtaki na Lingomba ya Buda, ya Hindu mpe ya Tao, kasi mateya na bango epesaki eyano te na mituna na ngai.
Nini etindaki yo okóma kosepela na siansi?
Bandá bomwana, nazalaki kosepela na bamasini. Nazalaki kutu kopanza bana-popi na ngai ya kura mpe kokangisa yango lisusu. Nazalaki mpe kotuna papa na ngai oyo azalaki kosala na kompanyi moko ya télécomminications, mituna mingi oyo etali ndenge baradio mpe batelefone esalaka.
Makambo nini oyekolaki na siansi?
Nayekolaki makambo etali baaparɛyi (électronique) na iniversite ya Genoa, mpe na nsima, mpo nazwa diplome ya doctorat, nayekolaki ndenge ya kobongisa barobo mpo esalaka lisusu malamu. Namipesaki na koyekola ndenge oyo miso ya moto emonaka mpo nazwa mayele ya kosala barobo oyo miso na yango ekomekola oyo ya moto.
Mpo na nini ndenge oyo miso na biso emonaka ebendaka likebi na yo?
Miso na biso esalaka na ndenge moko ya kokamwa mpenza, esɛngaka makambo mingi mpo emona—ezali kutu na likoki ya kolimbola makambo oyo tomonaka. Na ndakisa, tótala naino oyo esalemaka ntango okangi bale. Ntango ozali kokima mbangu mpo na kokanga yango, miso na yo ezwaka elilingi ya bale yango mpe ekɔtisaka yango na kati mpenza ya miso. Elilingi yango ebalukaka kuna na kotalela epai bale mpe miso ezali kokende. Kasi, miso na yo etyaka nde likebi na bale. Elilingi na yango efandaka na kati mpenza ya miso ata soki biloko mosusu oyo ezali pembenipembeni ya bale yango ezali “kotambolatambola.”
Kaka na ngonga wana, miso ekoki koyeba soki bale ezali kokende na vitɛsi nini mpe na esika nini. Likambo ya kokamwa, bakalkile yango ebandaka na kati ya miso kaka ntango miso ezali koluka koyeba vitɛsi nini bale yango ezali kokende na kotalela epai euti. Na nsima, misisa ya miso etindaka makambo yango na bɔɔngo, mpe bɔɔngɔ etalelaka lisusu makambo yango mpe etindaka yo okanga bale. Makambo nyonso wana oyo esalemaka na kati ya miso, ekamwisaka mpenza.
Nini endimisaki yo ete Mozalisi azali?
Na 1990, nalekisaki mwa basanza na Dublin, na Irlande, mpo na kosala bolukiluki na iniversite ya Trinity College. Ntango tozalaki kozonga ndako elongo na mwasi na ngai Barbara, tolobelaki avenire ya bana na biso. Tozwaki mpe ekateli ya kotala yaya na ngai ya mwasi oyo azalaki Motatoli ya Yehova. Yaya apesaki ngai buku La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? oyo ebimisamaki na Batatoli ya Yehova. Bolukiluki oyo esalemaki mpo na kokoma buku yango esimbaki motema na ngai. Namonaki mbala moko ete nandimaki liteya ya evolisyo kaka bindimelá. Na ndakisa, nazalaki kokanisa ete mikuwa ya banyama ya kala nde ezalaki komonisa ete liteya ya evolisyo ezali solo. Nzokande, ezali bongo te. Lisusu, ntango nakómaki kotalela malamumalamu liteya yango, nandimisamaki ete ezali kaka bilobaloba mpamba.
Nakanisaki mingi mpo na mosala na ngai ya barobo. Nazalaki komekola mosala ya nani?
Na nsima, nakanisaki mingi mpo na mosala na ngai ya barobo. Nazalaki komekola mosala ya nani? Nakoki soki moke te kosala robo oyo ezali na likoki ya kokanga bale ndenge moto asalaka. Robo ekoki kokanga bale soki batye yango likoki ya kosala bongo, kasi ekosala bongo kaka soki balandeli yango malamu. Soki babongisi yango bongo te, ekokanga bale mpe te. Likoki na biso ya koyekola eleki mosika oyo ya masini; nzokande ata masini mpamba ezali na moto oyo asalá yango! Yango ezali moko ya makambo oyo etindaki ngai nandima ete biso mpe tokelamá.
Nini etindaki yo okóma Motatoli ya Yehova?
Ezali mpo ngai ná Barbara tosepelaki na mayele oyo basalelaka mpo na koyekola Biblia na mozindo. Nasepelaki mingimingi na bolukiluki oyo basalaka mpo na kokoma mikanda na bango. Bato oyo balingaka koyekola makambo na mozindo lokola ngai basepelaka na bolukiluki ya ndenge wana. Na ndakisa, nakómaki na mposa makasi ya koyeba bisakweli mingi ya Biblia. Koyekola makambo wana endimisaki ngai ete Biblia ezali mpenza buku ya Nzambe. Na 1992, ngai ná Barbara tozwaki batisimo mpe tokómaki Batatoli ya Yehova.
Boyekoli na yo ya siansi elɛmbisaki kondima na yo?
Te, kutu siansi ekómisaki kondima na ngai makasi. Na ndakisa, tótalela naino ndenge toyebaka bilongi ya bato. Mwana oyo abotami sika akoki kosala yango mwa bangonga nsima ya kobima na libumu ya mama na ye. Ngai ná yo tokoki koyeba mbala moko moto oyo toyebi, ata soki azali na kati ya ebele ya bato. Tokoki kutu koyeba ndenge oyo azali komiyoka. Kasi, toyebaka ata moke te ete mpo tómona bongo, makambo ebeleebele esalemaka na kati ya miso na vitɛsi moko ya kosakana te.
Ya solo, nandimisami mpenza ete makambo nyonso oyo esalemaka mpo miso na biso emona, ezali likabo moko kitoko mpenza oyo Yehova Nzambe apesá biso. Makabo na ye, ezala mpe Biblia, etindaka ngai napesa ye mersi mpe nayebisa basusu makambo na ye. Kutu, lokola nalingaka bosembo, yango etindaka ngai namona ete abongi kozwa nkembo mpo na misala na ye.