Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Oyo okoki kosala ntango mwana akómi kosala matata

Oyo okoki kosala ntango mwana akómi kosala matata

MOKAKATANO

Soki mwana na yo ya mbula mibale asiliki abandaka koganga na kolela, kotambolatambola na nkanda mpe kosala mobulu. Ozali komituna: ‘Nini ekómeli mwana na ngai? Azali kosala matata oyo nyonso mpo nazali kosala likambo moko ya mabe? Akotika ezaleli yango mokolo mosusu?’

Okoki kosalisa mwana na yo ya mbula mibale atika ezaleli yango. Kasi liboso, luká naino koyeba nini esalaka ete akóma na ezaleli yango. *

NINI ESALAKA BONGO?

Bana mike bayebaka te oyo bakoki kosala ntango bayoki nkanda. Yango mpe ekoki kosala ete na bantango mosusu básala matata. Kasi ezali mpe na makambo mosusu.

Kanisá naino mbongwana oyo esalemaka epai ya mwana ntango akómi na mbula mibale. Kobanda ntango oyo abotamaki, baboti na ye bazalaki kosalela ye makambo nyonso. Na ndakisa soki aleli, baboti na ye bazalaki koya nokinoki mpo na koyeba soki ‘azali maladi, azali na mposa ya kolya, bábondela ye to bálatisa ye bilamba mosusu.’ Baboti bazalaki kosala nyonso oyo esengeli mpo mwana azala malamu. Ebongaki mpenza basala bongo, mpo makambo nyonso ya mwana oyo abotami sika ezalaka na mabɔkɔ ya baboti na ye.

Kasi, ntango mwana akómi na mbula mibale, amonaka ete makambo ebongwani. Kutu, na esika baboti bakokisa bamposa na ye, bakolinga nde ete ye asala oyo bango balingi. Sikoyo mokili ebaluki, kasi mwana yango akondima mbongwana yango mbala moko te; ntango mosusu akobanda kosala matata.

Na nsima, mwana ayebaka ete baboti bazali kaka te babateli na ye kasi mpe balakisi. Na ntembe te, akoyeba mpe ete azali na mokumba ya ‘kotosa baboti na ye.’ (Bakolose 3:20) Kasi liboso, mwana akoki kobanda kosala matata ya ndenge nyonso mpo na kotala soki baboti bakosala nini.

OKOKI KOSALA BOYE

Mityá na esika na ye. Lokola azali naino moke mpe ayebi mpenza te ndenge ya kobimisa oyo azali koyoka na motema, yango ekoki kosala ete alekisa ndelo ntango ayoki nkanda. Meká komitya na esika na ye.​—Toli ya Biblia: 1 Bakorinti 13:11.

Zalá motema mpiɔ. Ntango mwana na yo azali kosala matata, kosilika ekobongisa makambo te. Soki esengeli, kokipe yango te mpe kosilika te. Koyeba ntina oyo bana basalaka matata ekosalisa yo ozala motema mpiɔ.​—Toli ya Biblia: Masese 19:11.

Kangamá na ekateli na yo. Soki osalelaka mwana na yo makambo nyonso oyo asɛngaka ntango asali matata, na ntembe te mbala ya nsima oyo akozala na mposa ya eloko moko, akosala kaka matata. Monisa ye na malɛmbɛ nyonso ete okobongola maloba na yo te.​—Toli ya Biblia: Matai 5:37.

Koyeba ntina oyo bana basalaka matata ekosalisa yo ozala motema mpiɔ

Zalá motema molai. Kokanisa te ete matata yango ekosila lelo to lobi, mingimingi soki otikelá ye nzela amona ete akoki kosala nyonso oyo alingi soki atomboki. Kasi, soki osalisi ye na ndenge oyo ebongi mpe okangami na ekateli na yo, matata yango ekoki kokita mwa moke. Nsukansuka ekosila. Biblia elobi: “Bolingo ezali na motema molai.”​—1 Bakorinti 13:4.

Meká mpe kosala makambo oyo elandi:

  • Soki abandi kosala matata, memá ye (soki likoki ezali) mpe kozanga ete obɛta ye, yebisá ye atika kosala bongo. Kogangela ye te. Zelá naino asilisa nkanda na ye. Nsukansuka, akomona ete matata na ye ememeli ye litomba moko te.

  • Poná esika oyo okoki kotya ye ntango asali matata. Tiká ye wana mpe yebisá ye ete akobima libanda kaka soki atiki matata.

  • Soki mwana na yo asali matata na miso ya bato, longola ye wana. Kosalela ye te likambo oyo asɛngi kaka mpo azali kosala matata. Soki osaleli ye, yango ekotinda ye akanisa ete soki asali lisusu matata okopesa ye eloko nyonso oyo alingi.

^ par. 5 Na lisolo oyo tolobeli bana nyonso ezala mibali to basi.