ELOBELI TITRE YA EZIPELI
Kozala moninga malamu esɛngaka nini?
NA MOKOLO ya 25/12/2010, mwasi moko ya mbula 42 na Grande-Bretagne atyaki mwa nɔti ya komiboma na site moko ya Internet oyo eyebani malamu. Mesaje na ye emonisaki ete azalaki koluka lisalisi. Atako mwasi yango azalaki na “baninga” koleka 1 000 na Internet, ata moko te asalisaki ye. Bapolisi bamonaki ebembe na ye mokolo moko na nsima. Amɛlaki nkisi ya doze ebele mpenza.
Lelo oyo, baaparɛyi oyo ebimi sika ezali kosala ete tózwa ebele ya “baninga” na Internet kaka soki tobakisi nkombo na bango na liste ya bato oyo tosololaka na bango na Internet. Soki tolingi kokata “boninga” na moko na bango, ekosɛnga kaka kolongola nkombo na ye na liste na biso. Kasi, likambo ya mpasi oyo ekómelaki mwasi wana ya Grande-Bretagne emonisi mpenza makambo oyo ezali kosalema—kozwa baninga ya solosolo ekómi mpasi. Kutu, ankɛtɛ moko oyo euti kosalema kala mingi te emonisaki ete atako tozali kokóma na baninga ebele kasi motángo ya baninga ya solosolo ekiti.
Na ntembe te, lokola bato mingi, yo mpe ondimaka ete kozala na baninga malamu ezali na ntina. Kobosana mpe te ete kosala boninga esuki kaka te na kofina butɔ moko na ordinatɛrɛ to na telefone. Okolinga ete moninga na yo azala ndenge nini? Ndenge nini okoki kozala moninga malamu? Esɛngaka nini mpo boninga eumela?
Tótalela makambo minei mpe batoli ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo mpo bato mosusu básepela ete okóma moninga na bango.
1. Monisá ete otyelaka bango mpenza likebi
Boninga ya solosolo esɛngaka koyokana. Na maloba mosusu, moninga malamu amonaka ete azali na likambo ya kosalela yo mpe atyelaka yo mpenza likebi. Toboyi te, esɛngaka kaka te moto moko nde asalaka bongo mpe esɛngaka milende mpe komipimela. Kasi milende yango ebotaka mpenza mbuma malamu. Omituna boye: ‘Nakolinga mpenza komipesa, kopesa ntango na ngai mpe biloko na ngai mpo na moninga na ngai?’ Kobosana te ete mpo ozwa moninga malamu yo mpe osengeli liboso kozala moninga malamu.
BATO BALINGAKA BANINGA NA BANGO BÁZALA NDENGE NINI?
Irene: “Mpo na kosala mwa elanga kitoko ya bafololo esɛngaka ntango mpe kotyela yango likebi; kosala boninga mpe esɛngaka bongo. Yo moko banda naino na kozala moninga malamu. Moniseláká ye mpenza boboto mpe tyeláká ye likebi. Mpe ntango azali na mposa na yo, ndimá kopesa ntango na yo.”
Luis Alfonso: “Mokili ya lelo ezali kolendisa ezaleli ya moimi kasi te ya koluka matomba ya bato mosusu. Soki moto moko azali mpenza kotyela yo likebi kozanga koluka kozwela yango litomba elobaka mingi.”
BIBLIA ELOBI NINI?
“Kaka ndenge bino bolingaka bato básalela bino, bósalela bango mpe bongo. Bópesaka, mpe bato bakopesa bino.” (Luka 6:31, 38) Awa Yesu asɛngi tolukaka bolamu ya basusu mpe tózalaka mabɔkɔ pɛtɛɛ. Kozala mabɔkɔ pɛtɛɛ ndenge wana esalaka ete tózala baninga malamu. Soki omipesi mpenza na kosalisa baninga na yo kozanga koluka litomba moko boye, ekosala ete básepela na yo.
2. Yebá kosolola malamu
Boninga ya solosolo ekatanaka soki bosololaka te. Boye, bósololaka makambo oyo esepelisaka bino mibale. Yoká oyo moninga na yo azali koloba mpe tosá makanisi na ye. Pesaká ye longonya mpe lendisáká ye soki esengeli. Na bantango mosusu, moninga na yo akoki kozala na mposa opesa ye toli to osembola ye, mpe kosala bongo ekoki kozala ntango nyonso pɛtɛɛ te. Kasi, moninga ya malamu akobanga te koyebisa yo mabe oyo osali mpe kopesa yo lisungi oyo esengeli.
BATO BALINGAKA BANINGA NA BANGO BÁZALA NDENGE NINI?
Juan: “Moninga ya solosolo asengeli komonisaka makanisi na ye polele kasi osengeli kosilika te soki esepelisi yo te.”
Eunice: “Nasepelaka mingi na moninga oyo alingaka kolekisa ntango ná ngai mpe oyo ayokaka ngai, mingimingi soki nazali na mikakatano.”
Silvina: “Baninga ya solosolo bakoyebisa yo solo ata soki bayebi ete ekosepelisa yo te mpo balingaka bolamu na yo.”
BIBLIA ELOBI NINI?
“Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te, koyokaka nkanda noki te.” (Yakobo 1:19) Baninga malamu basepelaka na moto oyo ayokaka bango. Kasi, koluka kaka biso nde tólobaka, ekomonisa ete makanisi na bango ezali na ntina te. Na yango tyáká likebi ntango moninga na yo azali koyebisa yo makambo oyo ezali na motema mpe oyo ezali kotungisa ye. Mpe kosilika te soki ayebisi yo polelepolele likambo ya mabe oyo osali. Masese 27:6 elobi boye: “Bampota oyo moto oyo azali kolinga azokisi yo ezali sembo.”
3. Kobosana te ete azali moto ya kozanga kokoka
Ntango boninga na biso ná moto ezali kokóma makasi, mabunga na ye mpe emonanaka polele. Moninga na biso azali moto ya kozanga kokoka lokola biso. Na yango, tosengeli te kozela ete asalela biso makambo na ndenge ya kokoka. Kutu, ekozala nde malamu kosepela na bizaleli na ye ya malamu mpe kolandela te mabunga na ye.
BATO BALINGAKA BANINGA NA BANGO BÁZALA NDENGE NINI?
Samuel: “Mbala mingi tolingaka basusu básala makambo oyo biso moko tokokoka te. Soki tondimaka mabunga na biso mpe tozalaka na mposa bálimbisa biso, boye, tokosepela mpe kolimbisa basusu.”
Daniel: “Yebá ete baninga na yo bakosala mabunga. Ntango mikakatano ebimi, ekozala malamu kosilisa yango nokinoki mpe kosala makasi mpo na kobosana yango.”
BIBLIA ELOBI NINI?
“Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi. Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, ye azali moto ya kokoka, oyo akoki kopekisa mpe nzoto na ye mobimba.” (Yakobo 3:2) Koyeba yango ekoki kosalisa biso tómityaka na esika ya baninga na biso. Yango ekosala ete tókipaka te mabunga mikemike oyo ekoki kosilikisa biso. Biblia elobi boye: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. . . . Kasi, longola makambo nyonso wana, bólata bolingo, mpo ezali ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.”—Bakolose 3:13, 14.
4. Salá mpe boninga ná bato mosusu
Ezali solo ete tosengeli kopona baninga na biso malamu. Kasi yango elingi koloba te ete tosengeli kopona kaka baoyo tozali mbula moko to tokolá na bango. Kosala boninga ná bato ya mbula nyonso, ya mimeseno nyonso mpe ya bikólo ndenge na ndenge ekoki mpenza kopesa biso esengo.
BATO BALINGAKA BANINGA NA BANGO BÁZALA NDENGE NINI?
Unai: “Kosala boninga kaka na bato ya mbula na biso mpe oyo basepelaka na makambo oyo esepelisaka biso, ezali lokola kolata mikolo nyonso elamba oyo tosepelaka na langi na yango. Ata soki osepelaka na langi yango, nsukansuka okolɛmba yango.”
Funke: “Kosala boninga ná bato ndenge na ndenge esalisi ngai nayeba makambo mingi. Nayekoli komesana na bato ya mbula nyonso mpe ya mimeseno nyonso, yango esali ete nasololaka mpe namesana na bato ya lolenge nyonso. Baninga na ngai balingaka ndenge wana.”
BIBLIA ELOBI NINI?
“Yango wana, lokola mbano mpo na yango—nazali koloba lokola nde na bana mike—bino mpe bófungwama.” (2 Bakorinti 6:13) Biblia elendisi biso tósala boninga na bato ya ndenge nyonso. Kozala na baninga ya ndenge nyonso ekoki kosala ete omesana na bomoi ya lolenge nyonso mpe ekosala ete basusu básepela na yo.