Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | OYO OKOKI KOSALA SOKI MPASI EKWELI YO

Nzoto ezali lisusu malamu te

Nzoto ezali lisusu malamu te

Mabel, oyo afandaka na Argentine, azalaki na bomoi moko malamu mpe azalaki kosala bato ya maladi masaje na lopitalo moko boye. Na 2007, akómaki koyoka nzoto kolɛmba mpe motó mpasi makasi mikolo nyonso. Alobi boye: “Nakutanaki na minganga ndenge na ndenge mpe namɛlaki bankisi ya ndenge nyonso, kasi esimbaki te.” Nsukansuka, basalaki Mabel ekzamɛ ya RMN oyo emonisaki ete azalaki na mbuma moko na bɔɔngɔ. Alobi boye: “Nakamwaki makasi! Nandimaki te ete nakokaki kozala na maladi ya ndenge wana.

“Ata bongo, nayebaki mpenza te ete ezalaki maladi mabe mpenza tii ntango basalaki ngai lipaso. Ntango nalamukaki na shambrɛ oyo kaka minganga nde bakɔtaka, nazalaki kokoka koningana te. Eloko oyo nazalaki kokoka kosala ezalaki kaka ya kotala plafɔ. Liboso básala ngai lipaso, nazalaki makasi mpe kosala makambo nyonso ngai moko. Kasi na mbala moko mwaye ya kosala bongo ezalaki lisusu te. Mikolo nyonso oyo nalekisaki na shambrɛ yango, makanisi ezalaki kotambola ngai mpe nazalaki koyoka makelele ya bisaleli ya minganga, ya baaparɛyi oyo bato ya maladi bafinaka mpo na kobenga minganga mpe kolela ya bato mosusu ya maladi. Nayokaki lokola mpasi mpe minyoko ezingi ngai.

“Lelo oyo, nzoto ezongi mwa moke malamu. Nakoki kotambola ngai moko mpe na bantango mosusu kobima libanda ngai moko. Kasi nakóma komona biloko nyonso mibalemibale mpe nazangi likoki ya koningisa nzoto.”

SOKI MPASI EKWELI YO

Kobungisa elikya te. Na Masese 17:22, Biblia elobi boye: “Motema oyo ezali na esengo esalaka malamu lokola eloko oyo ebikisaka, kasi elimo oyo elɛmbi ekaukisaka mikuwa.” Mabel alobi boye: “Ntango nzoto na ngai ekómaki kozonga mwa malamu, nakutanaki na mikakatano oyo bato ya maladi oyo nazalaki kosalisa bazalaki na yango. Kosala ngalasisi ezalaki mpasi makasi, mpe na bantango mosusu namonaki lokola natika na ngai. Nasengelaki kosala makasi mpo na kolongola makanisi ya ndenge wana, mpo nayebaki ete nsukansuka milende na ngai ekobimisa litomba.”

Zalá na elikya mpo oyika mpiko. Mabel alobi boye: “Biblia esalisi ngai nayeba ntina oyo makama esalemaka. Kasi nayebi lisusu ete mokolo nyonso oyo ezali koleka, tozali kopusana na ntango oyo bampasi ekosila mpo na libela.” *

Kobosana te ete Nzambe atyelaka yo likebi. (1 Petro 5:7) Mabel alobeli ndenge oyo yango esalisaki ye: “Ntango bamemaki ngai mpo na kosala ngai lipaso, namonaki mpenza ete maloba oyo ezali na Yisaya 41:10 ezali solo; na vɛrsɛ yango, Nzambe alobi boye: ‘Kobanga te, mpo nazali na yo.’ Koyeba ete Yehova Nzambe azalaki kotyela likambo oyo ekómelaki ngai likebi epesaki ngai mpenza kimya na motema.”

Oyebaki yango? Biblia eteyaka ete mikolo ezali koya, moto moko te akotungisama na maladi.​—Yisaya 33:24; 35:5, 6.

^ par. 8 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini?