Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Lingomba

Lingomba

Mpo na nini mangomba ezali mingi boye?

“Botiki mobeko ya Nzambe, bozali kokangama makasi na bonkɔkɔ ya bato.”​—Marko 7:8.

OYO BIBLIA ELOBI

Bato babotamaka na mposa ya koyeba Nzambe oyo bakoki kokokisa yango kaka soki bazali kosambela ye. (Matai 5:3) Mpo na kokokisa mposa yango, bato babimisi ebele ya mangomba oyo mateya na yango euti na makanisi ya bato kasi oyo Nzambe te.

Na ndakisa, Biblia elobi boye mpo na bandimi ya lingomba moko ya siɛklɛ ya liboso: “Bazali na molende mpo na Nzambe; kasi nde na boyebi ya solosolo te; mpo lokola bayebi boyengebene ya Nzambe te kasi bazali koluka kotya oyo ya bango moko, batosaki boyengebene ya Nzambe te.” (Baroma 10:2, 3) Ndenge moko mpe lelo, ezali na ebele ya mangomba oyo ‘eteyaka mibeko ya bato.’​—Marko 7:7.

Kozala mondimi ya lingomba moko boye ezali na ntina?

“Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te.”​—Baebre 10:24, 25.

OYO BIBLIA ELOBI

Baebre 10:25 esaleli maloba “tótika koyanganaka na makita na biso te.” Maloba yango emonisi ete Nzambe alingaka bato báyanganaka esika moko mpo na kosambela ye. Kasi mondimi mokomoko asengeli kolimbola na ndenge na ye soki Nzambe azali nani mpe makambo nini asɛngaka? Te. Biblia elobi ete baoyo basambelaka na ndenge oyo Nzambe andimaka basengeli ‘kolobaka bango nyonso na boyokani’ mpe ‘kozala nde liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.’ (1 Bakorinti 1:10) Bakozala na kati ya masangá mpe ‘bakolinga lisangá mobimba ya bandeko’ na mokili mobimba. (1 Petro 2:17; 1 Bakorinti 11:16) Kosambela Nzambe ndenge wana na bomoko ezali na ntina mpo na kosepelisa ye.

Moto akoki koyeba lingomba ya solo?

“Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:35.

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia elobi boye mpo na koyeba baoyo bazali na lingomba ya solo: “Bokoyeba bango na mbuma na bango. Babukaka mbuma ya vinyo na nzete ya nzubɛ te to mbuma ya figi na nzete ya nsende te, boye te?” (Matai 7:16) Esɛngi te ozala moto oyo ayekolaka banzete mpo okesenisa nzete ya figi ná nzete ya nsende; ndenge moko mpe, esɛngi te ozala moto ya mayele na makambo ya mangomba mpo oyeba oyo ya solo to ya lokuta. Wapi mwa bambuma to makambo oyo ekoki kosalisa moto ayeba lingomba ya solo?

  • Lingomba ya solo eteyaka solo ya Biblia, Liloba ya Nzambe. (Yoane 4:24; 17:17) Eteyaka te mateya oyo euti na bafilozofi ya bato.

  • Lingomba ya solo esalisaka bato báyeba Nzambe; báyeba mpe nkombo na ye Yehova.​—Yoane 17:3, 6.

  • Lingomba ya solo emonisaka ete Bokonzi ya Nzambe nde solisyo mpo na makambo ya bato, kasi baguvɛrnema ya bato te.​—Matai 10:7; 24:14.

  • Lingomba ya solo elendisaka bato bázala na bolingo ya solosolo. (Yoane 13:35) Eteyaka bato bámemyaka bato ya bikólo nyonso, básalelaka ntango mpe biloko na bango mpo na kosalisa basusu, mpe bákɔtaka te na bitumba ya bikólo.​—Mika 4:1-4.

  • Bandimi ya lingomba ya solo basukaka kaka te na koteya basusu, kasi basalelaka mpenza makambo bateyaka.​—Baroma 2:21; 1 Yoane 3:18.

Batatoli ya Yehova, babimisi ya zulunalo oyo basalaka makasi mpo bákumisa Nzambe na maloba mpe bizaleli na bango. Mpo na nini te koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi mpo yo moko omona na miso?