Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Makambo oyo ezali koleka na mokili

États-Unis

Ankɛtɛ moko oyo Departema ya makambo ya bilanga esalaki elobi ete na bileko mosusu ya mobu 2012, bato milio 49 to (14,5%) ya mabota bazalaki “koyeba te soki bakozwa bilei ndenge nini to mpe soki bakokoka kozwa bilei oyo esengeli mpo na bato nyonso ya mabota na bango.”

Espagne

Ankɛtɛ moko oyo basalaki epai ya bana kelasi ya iniversite emonisi ete basi mingi (56%) mpe mibali mingi (41%) bandimaki ete bazali bamɛli minene ya masanga, elingi koloba mibali bamɛlaka na mbala moko milangi soki mwambe mpe basi milangi motoba.

Mbu ya Pasifike

Bato ya siansi oyo bazwaki mwa biloko mikemike na bozindo ya mɛtrɛ soki 11 000 na libulu oyo babengi Fosse des Mariannes oyo ezali na kati ya Mbu ya Pasifike mpo báyekola yango, bamonaki ete bikelamu ya mikemike mpenza mpe bamikrobe mosusu ezali mingi na libulu yango atako molili, malili makasi mpe makambo mosusu ekoki kosala ete bomoi ezala kuna te. Kala bazalaki kokanisa ete bikelamu ya bomoi ekoki kozala mingi te na esika ya ndenge wana.

Émirats Arabes Unis

Mpo motángo ya bato oyo baleki minene ekita, bakonzi ya Leta ya Dubai bautaki koloba kala mingi te ete bakopesa gramɛ moko ya wolo oyo na ntango wana ezalaki na valɛrɛ ya badolare soki 45 na moto nyonso ya monene oyo alongoli kilo moko. Mpo na kozwa wolo yango, bato basengelaki kokomisa bankombo mpe kolongola kilo 2 na sanza ya Ramadan.