BIBLIA ELOBI NINI?
Bopɛto
Bopɛto ya nzoto na biso ezalaka na ntina na miso ya Nzambe?
“Tómipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo.”—2 Bakorinti 7:1.
OYO BIBLIA ELOBI
Mozalisi na biso alingaka biso mpe alingaka tózala na sante ya malamu mpe na bomoi molai mpe ya malamu. Nzambe alobi boye: “Motema na yo etosa mitindo na ngai, mpo bolai ya mikolo, bambula ya bomoi ná kimya ekobakisamela yo.” (Masese 3:1, 2) Bolingo ya Nzambe mpo na bato emonanaki na Mibeko oyo apesaki epai ya Bayisraele, oyo ezalaki mpe na malako ya sikisiki na oyo etali bopɛto mpe twalɛti. (Kolimbola Mibeko 23:12-14) Ntango Bayisraele bazalaki kolanda mitinda yango oyo ezalaki makasi te, bazalaki na sante ya malamu mpe bazalaki kobatelama na bamaladi oyo ezalaki konyokola bikóló mosusu, na ndakisa Ezipito, oyo bazalaki te na mobeko wana oyo Nzambe apesaki Moize.—Kolimbola Mibeko 7:12, 15.
Ndenge moko mpe lelo oyo, bato oyo ‘bamipɛtoli na mbindo nyonso ya mosuni,’ na ndakisa na bizaleli mabe lokola komɛla makaya, kolangwa masanga, mpe komɛla bangi, bakoki komibatela na maladi ezala na nzoto to na makanisi, ata mpe na liwa ya mobesu. Mpe lokola tofandaka ná bato mosusu, kotosa mibeko ya Nzambe na oyo etali bopɛto emonisaka mpe ete tozali komemya basusu.—Marko 12:30, 31.
Bopɛto na bizaleli mpe na makambo ya losambo ezali na ntina na miso ya Nzambe?
“Bóboma binama ya nzoto na bino . . . na likambo ya pite, mbindo, mposa ya kosangisa nzoto, mposa oyo eyokisaka mpasi, mpe bilulela, oyo ezali losambo ya bikeko. Ezali mpo na makambo wana nde nkanda ya Nzambe ezali koya.”—Bakolose 3:5, 6.
OYO BIBLIA ELOBI
Ndenge Biblia emonisaki yango liboso, tosengeli ‘komipɛtola na mbindo nyonso ya mosuni mpe ya elimo.’ Na ntango ya Yesu Kristo, bato mingi ezala mpe bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki kolekisa ndelo na makambo etali bopɛto ya nzoto kasi bazalaki kokipe te mibeko ya Nzambe oyo etali bizaleli malamu. (Marko 7:1-5) Mpo na kosembola makambo, Yesu alobaki boye: “Eloko oyo euti na libándá mpe ekɔti na moto ekoki kokómisa ye mbindo te, mpo ezali kokɔta . . . na misɔpɔ na ye, mpe ebimaka libándá na kabinɛ?” Na nsima, abakisaki boye: “Oyo ebimaka na moto nde ekómisaka moto mbindo; mpo na kati, na motema ya bato nde makanisi ya mabe ebimaka: misala ya pite, koyiba, koboma bato, misala ya ekobo, kolula biloko ya bato, misala ya motema mabe, kokosa, etamboli ya nsɔni, liso ya likunya, . . . bozoba. Makambo nyonso wana ya mabe . . . ekómisaka moto mbindo.”—Marko 7:18-23.
Mpo na Yesu, bato oyo balekisaka ndelo na makambo etali bopɛto ya nzoto kasi bakipaka te mibeko ya Nzambe oyo etali bizaleli malamu, bazali lokola kɔpɔ oyo ezali pɛto libándá kasi na kati salite.—Matai 23:25, 26.
Mibeko ya Nzambe ezalaka makasimakasi?
“Bolingo ya Nzambe elakisi boye: ete tótosaka mibeko na ye; kutu mibeko na ye ezali kilo te.”—1 Yoane 5:3.
OYO BIBLIA ELOBI
Mika 6:8 elobi boye: “Eloko nini Yehova azali kosɛnga yo, soki bobele komonisa bosembo, kolinga boboto mpe kotambola na bopɔlɔ elongo na Nzambe na yo?” Eloko oyo asɛngi ezali mpasi? Longola yango, Mozalisi na biso alingaka ete tótosa ye na bolingo na biso moko. Tozwaka mpenza esengo soki tosali bongo. (Nzembo 40:8) Mpe soki tosali libunga, motema mawa ya Nzambe ekoki kobɔndisa biso. Biblia elobi ete: “Se ndenge tata ayokelaka bana na ye mawa, Yehova ayokeli baoyo bazali kobanga ye mawa. Mpo ye moko ayebi malamu ndenge oyo tosalemá, azali kobosana te ete tozali putulu,” to bato ya kozanga kokoka mpe ya bolɛmbu.—Nzembo 103:13, 14.
Na mokuse, mibeko ya Nzambe oyo elobeli bopɛto ya nzoto, ya bizaleli malamu mpe bopɛto ya makambo ya losambo emonisaka ete Nzambe azali malamu mpe alingaka biso. Soki tozali kotosa yango na pɛtɛɛ nyonso ekomonisa ete tozali na bwanya mpe tolingaka ye.