Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Masiya

Masiya

Biblia esakolaki ete Masiya akoya na mokili mpe akosikola bato na maladi, bampasi mpe liwa. Masiya yango ezali nde Yesu Kristo?

Ndenge nini bato balingaki koyeba Masiya?

Na kotalela bisakweli ya Biblia, Masiya to Kristo, asengelaki koya mpo na kokokisa mikumba mibale, oyo esɛngaki ntango molai mpo akokisa oyo ya mibale. * Mpo na kokokisa mokumba na ye ya liboso, asengelaki kokóma moto. Mpo bato báyeba ye, bakomi ya Biblia basakolaki makambo mingi oyo etali bomoi mpe mosala na ye. Kutu, bisakweli ya Biblia epesamaki libosoliboso nde mpo na “kotatola mpo na Yesu.”​—Emoniseli 19:10.

Ntango azalaki moto, Yesu asalaki kaka mwa makamwisi mpo na komonisa oyo akosala na mokili mobimba lokola ekelamu ya elimo ya nguya

OYO BIBLIA ELOBI

Masiya asengelaki . . .

Yesu akokisaki bisakweli wana nyonso mpe bisakweli mingi mosusu. Abikisaki bato ya maladi mpe asekwisaki bakufi. Asukaki kaka te na komonisa ete azali mpenza Masiya, kasi asalisaki mpe biso tókóma na kondima makasi na bilaka ya Biblia ete akosala makambo yango na mokili mobimba na mikolo ezali koya. (Luka 7:21-23; Emoniseli 21:3, 4) Nsima ya lisekwa na ye, Yesu afandaki na “lobɔkɔ ya mobali,” ya Nzambe mpo na kozela ntango oyo akosilisa mokumba na ye ya Masiya.​—Nzembo 110:1-6.

“Ntango Kristo akoya, akosala nde bilembo mingi koleka oyo moto oyo asali?”​Yoane 7:31.

Ndenge nini Masiya akosilisa mosala na ye?

Bayuda ya ntango ya Yesu bamizelaki ete Masiya alongola bango na nse ya bokonzi ya Baroma mpe ayangela na bokonzi ya Yisraele oyo esengelaki kozongisama. (Misala 1:6) Kaka na nsima nde Bayuda oyo bazalaki bayekoli ya Yesu bakangaki ntina ete asengelaki kosilisa mokumba na ye na likoló lokola ekelamu ya elimo ya nguya oyo bapesi ye bokonzi mingi.​—Matai 28:18.

OYO BIBLIA ELOBI

Na mokumba na ye ya mibale, Masiya asengelaki . . .

Yesu akokisaki mokumba na ye ya liboso lokola Masiya. Akokokisa mpe oyo ya mibale. Yango wana, moto ya bwanya, ayekolaka ye malamumalamu, mpo Yesu alobaki: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi.”​—Yoane 14:6.

“Na mikolo na ye, moyengebene akokola lokola matiti ya sika, mpe kimya ekokóma mingi kino sanza ekozala lisusu te. Mpe akozala na bato oyo ye akoyangela . . . kino na nsuka ya mabele.”​Nzembo 72:7, 8.

^ par. 5 Liloba “Masiya” euti na Ebre. “Kristo” euti na Grɛki, nyonso mibale ezali na ndimbola moko.​—Yoane 1:41.

^ par. 7 Na bavɛrsɛ oyo batyé awa, ya liboso ezali bisakweli mpe ya mibale kokokisama ya bisakweli yango.