Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE NINI BATO BAKÓMI KOTALELA DISIPLINI?

Disiplini oyo esalisaka

Disiplini oyo esalisaka

NA NTEMBE TE, kobɔkɔla bana ezali mosala makasi. Kasi, koboya kopesa bana disiplini ntango esɛngi kopesa yango ekómisaka mokumba yango mpasi lisusu koleka. Mpo na nini? Mpo soki disiplini ezali te, (1) bana bakokoba kozanga botosi mpe yango ekolɛmbisa baboti, (2) baboti bakopesa bana litambwisi ya likolólikoló mpe yango ekotya bana mobulu na motó.

Kasi, disiplini ya koleka ndelo te mpe oyo epesami na bolingo ekoki kobongisa likoki ya kokanisa mpe bizaleli ya mwana. Ekosalisa mpe mwana amiyoka ete abatelami mpe ntango akokóma mokolo, ayeba kokokisa mikumba na ye malamu. Kasi epai wapi okoki kozwa litambwisi oyo ebongi mpo na kopesa bana na yo disiplini?

Batoli ya Biblia ezali na ntina mingi

Batatoli ya Yehova, babimisi ya zulunalo oyo, bandimaka ete Biblia ezali na “litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo, mpo na kopesa disiplini.” (2 Timote 3:16) Biblia ezali kaka te buku oyo eteyaka ndenge ya kobɔkɔla bana; batoli na yango epesaka mpe mabota litambwisi oyo ebongi mpenza. Tótalela mwa bandakisa.

BIBLIA ELOBI BOYE: “Bozoba ekangami na motema ya mwana.”​—Masese 22:15.

Atako bana bakoki kopesa yo esengo, kotyela yo likebi mpe kozala boboto, basalaka mpe makambo ya bozoba. Na yango, bana bazali na mposa ya disiplini. (Masese 13:24) Koyeba yango ekosalisa yo okokisa mokumba na yo ya moboti.

BIBLIA ELOBI BOYE: “Koboyela mwana disiplini te.”​—Masese 23:13.

Osengeli kobanga te ete disiplini oyo ebongi ekobebisa bana to ekosala ete báyina yo ntango bakokola. Soki epesami na bolingo, disiplini ekosalisa bana báyekola kondima kosembolama na komikitisa nyonso; ezaleli oyo bakozala na yango mposa ata ntango bakokóma mikóló.​—Baebre 12:11.

BIBLIA ELOBI BOYE: “Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.”​—Bagalatia 6:7.

Baboti nyonso balingaka kobatela bana na bango mpe yango ezali mabe te. Kasi, esɛngi mpe kolekisa ndelo te. Okosalisa mwana na yo te soki ozali kotika te ete ayoka mpasi mpo na mabe oyo asali to ozali kokɔtela ye ntango molakisi to moto mosusu ayebisi yo mabe oyo asali. Kutu, moná ete bato yango bazali nde kopesa yo mabɔkɔ. Soki osali bongo, okoteya mwana na yo atosaka baoyo bazali na bokonzi; ata mpe bokonzi na yo.​Bakolose 3:20.

BIBLIA ELOBI BOYE: “Mwana oyo batiki asala oyo alingi akoyokisa mama na ye nsɔni.”​—Masese 29:15.

Zalá na bolingo, kokisáká maloba na yo mpe kolekisaka ndelo te

Atako baboti basengeli te konyokola bana, basengeli mpe te kotikela bango nzela básala oyo balingi. Buku moko (The Price of Privilege) elobi boye: “Bana oyo baboti batikelaka bango nzela básala oyo balingi bayebaka te ete na ndako, mikóló nde bazali na bokonzi.” Soki ozali kosalela bokonzi na yo te, bana bakokanisa ete bango nde bakómi bakonzi. Na ntembe te, bakozwa bikateli ya mabe oyo ekopesa yo ná bango mpasi.​—Masese 17:25; 29:21.

BIBLIA ELOBI BOYE: “Mobali . . . akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko.”​—Matai 19:5.

Biblia elobi ete mobali ná mwasi basengeli kobalana liboso bábota mpe basengeli kokoba kozala esika moko tii bana bakokola mpe bakolongwa na ndako. (Matai 19:5, 6) Na ndenge yango, ozali libosoliboso molongani, na nsima nde moboti. Soki makambo oyo otyaka na esika ya liboso ezongi nsima, mwana na yo akoya ‘kokanisa ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza.’ (Baroma 12:3) Na libota oyo mwana azwaka esika ya liboso, boyokani na libala ebebaka.

Lisalisi mpo na baboti

Mpo okokisa mokumba na yo ya moboti, osengeli kolanda batoli oyo ntango ozali kopesa disiplini.

Zalá na bolingo. “Bósilikisaka bana na bino te, mpo bálɛmba nzoto te.”​—Bakolose 3:21.

Kokisáká maloba na yo. “Tiká liloba na bino Ɛɛ ezala Ɛɛ, Te na bino, Te.”​—Matai 5:37.

Kolekisaka ndelo te. “Nasengeli kosembola yo na ndenge oyo ekoki.”​—Yirimia 30:11. *

^ par. 21 Mpo na koyeba makambo mosusu, kɔtá na site jw.org. Fungolá esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BATO BABALÁ MPE BABOTI, epai okokuta masolo lokola “Kopesa bana disiplini,” “Oyo okoki kosala ntango mwana akómi kosala matata,” “Kɔtisá na mitó ya bana na yo bizaleli ya malamu,” mpe “Ndenge ya kopesa mwana na yo oyo akómi elenge disiplini.”