Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | BILENGE

Ntango yo ná fianse na yo bosilani

Ntango yo ná fianse na yo bosilani

MOKAKATANO

“Nakanisaki ete nazwi moto oyo abongi na ngai. Namilobelaki, ‘nakoki kolekisa bomoi na ngai mobimba ná mwana mobali oyo.’ Kasi nsima ya kolekisa sanza mibale ná ye, namonaki malamu tósilana. Nandimaki te ete ndenge oyo tobandaki malamu ekokaki kosila noki ndenge wana!”​—Anna. *

“Namonaki lokola ngai ná ye tokokani na makambo mingi. Nazalaki komona na makanisi ete tosí tobalani. Kasi ntango mikolo ezalaki koleka, nakómaki komona ete tokesanaki mpenza. Ntango namonaki libunga monene oyo nalingaki kosala, naboyaki ye.”​—Elaine.

Naino okutaná na likambo ya ndenge wana te? Soki ɛɛ, lisolo oyo ekoki kosalisa yo oyeba ndenge ya kosala.

OYO OSENGELI KOYEBA

Kokabwana ekoki kozala mpasi, ata epai ya oyo aboyi moninga. Elenge mwasi moko na nkombo Sarah oyo aboyaki fianse na ye nsima ya sanza motoba, alobi boye: “Nayokaki mpasi mpenza! Moto oyo lelo azalaki nyonso mpo na ngai; oyo nakanisaki ete tokozala na ye bomoi mobimba; kasi lobi elikya nyonso ekendaki na mai. Na nsima nakómaki koyoka banzembo oyo biso na ye tozalaki kosepela na yango mpe yango ezalaki kozongisa na makanisi na ngai bantango ya malamu oyo tolekisaki ná ye. Soki nakei bisika oyo biso ná ye tozalaki kosepela kokende, nazalaki komona ete nazangi ye mpenza. Nazalaki komiyoka ndenge wana atako ngai nde naboyaki ye!”

Atako kokabwana esalaka mpasi, ekoki kozala likambo ya malamu. Elaine alobi boye: “Ozali na mposa te ya kosala moto yango mpasi na motema. Kasi epai mosusu, okoki komona ete soki bokobi na ye atako makambo ezali kosimba te, nsukansuka mpasi yango ekozala ya bino mibale.” Sarah mpe andimi yango; alobi boye: “Nakanisi ete soki ozali kosepela na fianse na yo te, na ntembe te okozala na esengo te soki bobalani; yango wana koboyana eleki malamu.”

Kokabwana elingi koloba te ete ozali mabe. Kolonga ntango bozali bafianse esukaka ntango nyonso te na kobalana kasi nde na ekateli oyo bozwi. Soki ezali na makambo mpenza oyo ezali kosala ete yo ná fianse na yo bótyelana motema te kokabwana ekoki kozala ekateli ya malamu. Soki yango ekómeli yo, yango elingi koloba te ete ozali mabe mpo bosilani. Okoki kokende liboso! Ndenge nini?

OYO OKOKI KOSALA

Ndimá mpasi yango. Elaine, oyo tolobelaki na ebandeli, alobi boye: “Nazangaki kaka fianse te kasi moninga na ngai ya motema mpenza. Soki okabwani na moto moko oyo azalaki moninga, koyoka mawa mpo na mwa ntango ezali mabe te.” Elenge mobali moko na nkombo Adam, alobi boye: “Kokabwana esalaka kaka mpasi, ata soki oyebi ete kosala bongo ezali malamu mingi.” Okoki komiyoka lokola Mokonzi Davidi oyo Biblia elobeli. Akomaki boye na boumeli ya ntango oyo azalaki na mitungisi: “Butu nyonso nazali kopɔlisa mbeto na ngai na mpisoli.” (Nzembo 6:6) Na bantango mosusu ezalaka malamu kondima mpasi na yo na esika ya kosala lokola likambo ezali te. Kondima mpasi na yo ekoki kozala eloko ya liboso oyo ekosalisa yo omiyoka malamu.​—Toli ya Biblia: Nzembo 4:4.

Zalá elongo na bato oyo batyelaka yo likebi. Mpo na koloba solo, yango ekoki kozala pɛtɛɛ te. Anna oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Na ebandeli, nazalaki kolinga ata komona bato te. Esɛngaki ntango eleka mpo nakanisa malamu likambo yango mpe nandima oyo ekómelaki ngai.” Kasi na nsima, Anna amonaki ete kolekisa ntango ná baninga ya motema oyo bakokaki kolendisa ye ebongaki mpenza. Alobi boye: “Sikoyo nazali na makanisi ya malamu mpe kokabwana esalaka ngai lisusu mpasi makasi te ndenge ezalaki liboso.”​—Toli ya Biblia: Masese 17:17.

Zwá liteya na oyo ekómeli yo. Omituna boye: ‘Likambo yango esalisi ngai namona bisika oyo nasengeli kobongisa? Soki ezali, nini nasengeli kosala mbala ya nsima oyo nakozwa fianse mosusu?’ Elenge mwasi moko na nkombo Marcia, alobi boye: “Nsima ya mikolo, nayebaki malamu likambo oyo ekómelaki ngai. Kasi, esɛngaki ntango mingi eleka liboso natya ndenge nazalaki komiyoka pembeni mpe nakanisa malamumalamu likambo yango.” Adam oyo tolobelaki liboso, amoni mpe bongo. Alobi boye: “Esɛngaki mbula mobimba eleka mpo namiyoka malamu. Esɛngaki kutu ntango mingi mpo nazwela likambo yango liteya. Oyo ekómelaki ngai eteyaki ngai makambo mingi mpo na bomoto na ngai, mpo na basi mpe boninga. Sikoyo kokabwana esalaka ngai lisusu mpasi mingi te.”

Bondelá mpo na mitungisi na yo. Biblia elobi ete Nzambe “abikisaka baoyo bazoki na motema, mpe akangaka bampota na bango oyo ezali kosala mpasi.” (Nzembo 147:3) Lokola Yehova te nde aponelaka moto molongani, okoki kopesa ye foti te soki yo ná fianse na yo bosuki na nzela. Nzambe alingaka bolamu na yo. Monisá ye ndenge ozali komiyoka na libondeli.​—Toli ya Biblia: 1 Petro 5:7.

^ par. 4 Bankombo mosusu ezali ya bango te.