Akangamaki na mateya oyo andimaka
Ntango Song Hee azalaki na mbula 11, mama na ye amonaki ete mokɔngɔ ya Song Hee egumbamá mwa moke. Monganga moko azwaki ye na maladi babengi scoliose, oyo esalaka ete ngámbo moko ya mokɔngɔ ya moto egumbama lokola lɛtrɛ “C” to “S.” Maladi ya Song Hee ekómaki makasi mpenza yango wana esɛngaki básala ye lipaso. Kasi alingaki te bázongisa ye makila. Zulunalo “Lamuká!” etunaki ye ndenge makambo elekaki.
Ntango bazwaki yo na maladi yango, minganga bazalaki na likoki ya kosalisa yo?
Mbula soki misato mobimba minganga mibale bazalaki kosalisa ngai kasi mokɔngɔ na ngai ekobaki kaka kogumbama. Kutu, ekómaki mabe mpenza na boye ete mokɔngɔ na ngai ekómaki kokangama na motema mpe bapumɔ na ngai mpe ezalaki kosala ete mpema ekóma mokuse. Esɛngaki kaka básala ngai lipaso.
Ondimaki básala yo lipaso?
Ɛɛ. Kasi bayebisaki ngai ete lipaso yango ekozala pɛtɛɛ te. Na ntango yango, mokɔngɔ na ngai egumbamaki makasi mpenza (116 degrés) mpe ezalaki likama mpenza. Kasi lipaso ezalaki mokakatano monene mpo na ngai. Nasengelaki koboya bázongisa ngai makila mpo na mateya ya Biblia oyo nandimaka. *
Ozwaki monganga oyo andimaki kosala yo lipaso?
Ngai ná mama tomonaki monganga moko oyo ayebi mpenza kosala lipaso yango na Floride, na États-Unis epai tozalaki kofanda. Kasi, ntango nayebisaki ye ete nakondima te bázongisa ngai makila, alobaki ete ata monganga moko te akosala lipaso ya mpasi bongo kozanga kozongisa moto makila. Longola yango, alobaki ete nakokokisa mbula 20 te soki basali ngai lipaso te. Nazalaki kaka na mbula 14.
Omonisaki ye ntina oyo oboyaki bázongisa yo makila?
Ɛɛ. Nayebisaki ye ete mobeko yango euti na Biblia, namonisaki ye ete Nzambe alobaki ete makila ezali mosantu, ezala ya moto to ya nyama. * Moyisraele nyonso oyo alye makila bazalaki kopesa ye etumbu ya liwa! * Nalakisaki ye mpe Misala 15:19, 20, oyo esɛngaka bakristo “báboya . . . makila.” Yango elingi koloba ete esengeli te kotya yango na nzoto ya moto ata ndenge nini, ezala na monɔkɔ to na misisa.
Monganga yango alobaki nini?
Atingamaki kaka azongisa ngai makila. Likambo ya kokamwa, lopitalo yango elobaki ete soki nandimi bázongisa ngai makila, bakosala ngai lipaso yango ofele.
Ezalaki mpenza kado! Yo ná mama na yo bosalaki nini?
Atako moto moko te amonanaki oyo andimaki kosala lipaso yango kozanga kozongisa makila, tozwaki ekateli ya kokangama kaka na mateya ya Biblia. Na nsima, makambo ebebaki lisusu koleka. Na kotalela mibeko ya Leta, nazalaki naino mwana. Yango wana, lokola maladi na ngai ezalaki se kokóma
makasi, bamemaki likambo yango na tribinale. Likambo ya esengo, zuzi ya Floride apesaki biso mikolo 30 mpo na koluka monganga oyo akondima kosala ngai lipaso kozanga kozongisa makila.Ozwaki monganga yango?
Ɛɛ! Batatoli ya Yehova ya mboka na biso oyo basalaka na komite oyo eyokanaka na minganga bakutanaki na monganga moko oyo ayebi kosalisa maladi yango malamu na New York, oyo andimaki makanisi na bango mpe alukaki komona ngai. Na yango, tozwaki monganga liboso ete mikolo oyo bakatelaki biso na tribinale ekoka. *
Lipaso yango elekaki ndenge nini?
Elekaki malamu mpenza! Mpo na kosembola mokɔngɔ na ngai, doktɛrɛ Robert Bernstein akɔtisaki ngai mabende na mokɔngɔ mpo esembola yango. Asalaki lipaso yango na biteni mibale, oyo ya mibale esalemaki nsima ya pɔsɔ mibale.
Mpo na nini asalaki yango na biteni mibale?
Soki eteni ya liboso ya lipaso yango ebimisi makila mingi, mwa mikolo oyo ekoleka ekosalisa nzoto ebimisa baselile mingi lisusu ya makila liboso ete básala oyo ya mibale. Ndenge makambo elekaki, na biteni nyonso mibale wana makila ebimaki ngai mingi te mpo etuluku ya minganga yango babongisaki makambo malamu, bazalaki mayele mpe basalaki mosala yango malamumalamu. Nzoto ezongaki malamu mpenza kozanga mikakatano oyo ebimaka soki bazongisi moto makila. *
Monganga yango amiyokaki ndenge nini nsima ya lipaso yango?
Minganga basengeli kotalela bamposa ya moto ya maladi
Asepelaki mingi mpenza! Alobaki boye: “Lisalisi ya monganga esuki kaka te na kosala lipaso.” Amoni ete minganga basengeli kotalela bamposa ya moto ya maladi, ezala mpe mateya oyo andimaka mpe mimeseno na ye. Longola Batatoli ya Yehova, bato mingi mpe bandimaka likanisi yango.
^ par. 7 Mama ya Song Hee azali Motatoli ya Yehova. Song Hee andimaka mpe mateya oyo mama na ye andimaka mpe azwaki batisimo na 2012 ntango akokisaki mbula 16.
^ par. 17 Komite ya Batatoli ya Yehova oyo eyokanaka na minganga esalisaka Batatoli ya Yehova oyo bazali maladi bákutana na minganga oyo bakosalisa bango kozanga ete bázongisa makila.
^ par. 21 Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo (Clinical Excellence Commission) na Nouvelle-Galles du Sud, na Australie, emonisaki makama ya kozongisa makila; elobaki boye: “Kozongisa makila ezali kokɔtisa na nzoto eloko oyo ezali mopaya. Nzoto ya moto elukaka yango moko kobwakisa eloko nyonso ya mopaya oyo ekɔteli yango. Ndenge nzoto esalaka bongo ezali na ntina.”