NINI EPESAKA ESENGO?
Kolimbisa
“NA BOMWANA NA NGAI, NAZALAKI KOYOKA MALOBA MINGI YA KOFINGA MPE KOGANGA.” Wana ezali maloba ya mwasi moko na nkombo Patricia. Abakisi: “Nayekolá kolimbisa te. Ata ntango nakómaki mokóló, nazalaki kobomba nkanda na motema mikolo mingi, mpe nazalaki kokoka kolala malamu te.” Ya solo, soki moto asilikaka mpambampamba mpe abombaka nkanda na motema, akozala na esengo te, akozala mpe na sante malamu te. Kutu, baankɛtɛ mingi emonisi ete bato oyo balimbisaka te . . .
-
Batikaka nzela ete kosilika mpe nkanda oyo babombi na motema ebebisa boyokani na bango ná basusu mpe etinda bango báboya kofanda elongo na basusu, mpe bázala kaka bango moko
-
Basilikaka noki, bamitungisaka mingi, mpe banyokwamaka ata na makanisi
-
Batyaka makanisi nyonso kaka na mabe oyo basaleli bango, yango wana basepelaka mpenza na bomoi te
-
Bamonaka ete bazali te kolanda mibeko ya Nzambe na bomoi na bango
-
Bamitungisaka mingi mpe yango ememelaka bango bamaladi lokola tansiɔ, maladi ya motema, maladi ya mikuwa mpe motó mpasi. *
KOLIMBISA ELIMBOLI NINI? Kolimbisa elimboli koboya kokangela moto oyo asaleli biso mabe nkanda na motema, koboya kosilikela ye, to koboya kozongisa mabe na mabe. Yango elimboli te kokanga miso na mabe, kozwa na lisɛki mabe oyo esalemi, to komonisa lokola ete eloko moko esalemi te. Kolimbisa ezali nde mposa makasi oyo moto azalaka na yango ya kokoba kozala na kimya mpe na boyokani malamu elongo na basusu mpo alingaka bango.
Kolimbisa emonisaka mpe ete tozali komitya na esika ya basusu. Moto oyo alimbisaka andimaka ete biso nyonso tozali bato ya masumu mpe tosalaka mabunga, ezala na maloba to na misala. (Baroma 3:23) Biblia elobeli likambo yango na maloba oyo: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu.”—Bakolose 3:13.
Yango esalisi biso tóyeba ete moto oyo alimbisaka amonisaka bolingo, oyo ezali “ekanganeli ya kokoka Bakolose 3:14) Na yango, ndenge site Internet ya Mayo Clinic emonisi yango, kolimbisa esalisaka moto . . .
mpo na bomoko.” (-
Azala na boyokani malamu na basusu, ayokela moto oyo asaleli ye mabe mawa mpe amitya na esika na ye
-
Azala na kimya na makanisi mpe azala na boyokani malamu na Nzambe
-
Amitungisa mingi te mpe ayina bato te
-
Anyokwama mingi na makanisi te
KOMILIMBISA. Zulunalo moko (Disability & Rehabilitation) elobi ete komilimbisa ekoki kozala “likambo oyo eleki mpasi, nzokande yango nde likambo eleki ntina mpo na kozala na sante malamu,” ezala na makanisi to na nzoto. Nini ekoki kosalisa yo omilimbisa?
-
Kokanisa te ete okosala makambo nyonso na ndenge ya kokoka; osengeli koyeba ete yo mpe okosala mabunga.—Mosakoli 7:20
-
Zwá mateya na mabunga na yo; yango ekosalisa yo ozongela yango te
-
Monisá motema molai; yebá ete bizaleli mpe mimeseno mosusu ya mabe elongwaka mbala moko te.—Baefese 4:23, 24
-
Luká baninga oyo bakolendisa yo, oyo batalelaka makambo na ndenge ya malamu, bazali na boboto, mpe bakoki kosembola yo soki esengeli.—Masese 13:20
-
Soki olobi to osali likambo moko oyo eyokisi moto mpasi, ndimá libunga na yo mpe sɛngá bolimbisi nokinoki. Soki ozongisi kimya, yo moko mpe okozala na kimya na motema.—Matai 5:23, 24
BATOLI YA BIBLIA ESALISAKA MPENZA!
Nsima ya koyekola Biblia, Patricia, oyo tolobelaki na ebandeli, ayekolaki kolimbisa. Akomaki boye: “Namonaka ete nalongwá na boombo ya nkanda oyo ezalaki kobebisa bomoi na ngai. Nanyokwamaka lisusu te mpe nanyokolaka lisusu bato te. Batoli ya Biblia emonisi ete Nzambe alingaka biso mpe alingaka bolamu na biso.”
Mobali moko na nkombo Ron, alobi: “Nakoki te kobongola to kopekisa makanisi ya basusu to makambo oyo basalaka. Kasi nakoki kobongola oyo ya ngai moko. Soki nalingi kozala na kimya, nazalaki kosala makasi naboya kokangela basusu nkanda. Nakómaki kotalela kimya mpe kokanga nkanda na motema lokola butu ná moi. Nakokaki te kozala mbala moko na kimya mpe kaka na ntango yango kobomba nkanda na motema. Sikoyo, nazali na lisosoli ya malamu.”
^ par. 8 Euti na: Site Internet Mayo Clinic and Johns Hopkins Medicine mpe na zununalo Social Psychiatry and Psychiatric Epidemiology.