Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Baboti bateyaka bana na bango bolingo na ndakisa oyo bapesaka

LIKAMBO OYO EKOKI KOSALISA

Koteya bato mabe ná malamu

Koteya bato mabe ná malamu

Na Canada, eteyelo moko ya bana ya bato ya mbongo ebongisaki mobembo mpo na bana-kelasi. Na mobembo yango, bana mosusu ya mibali balukaki kosangisa nzoto na moninga na bango mobali. Na nsima, mopanzi-nsango Leonard Stern akomaki boye: “Kozala mayele, kotánga kelasi, kozala na mbongo epekisaka bana te básala makambo ya mabe.”

Mopanzi-nsango yango abakisaki boye: “Likambo eleki ntina oyo baboti basengeli koteya bana na bango ezali koyeba mabe ná malamu. Nzokande, baboti mingi bazali koluka libosoliboso bana na bango bázwa badiplome ya minene mpe bázwa misala ya mbongo mingi.”

Toboyi te, kotánga kelasi ezali na ntina. Kasi, ata kelasi oyo eleki malamu ekoki te kosalisa moto akima bamposa to makanisi ya mabe. Boye, nani akoki koteya bato koyeba mabe ná malamu?

BIBLIA ESALISAKA MOTO AKÓMA NA BIZALELI MALAMU MPE ABANGA NZAMBE

Biblia ezali lokola talatala. Soki moto azali kotala yango, akomona polele bolɛmbu na ye. (Yakobo 1:23-25) Kasi, Biblia esalisaka mpe moto abongwana, akóma na bizaleli oyo etyaka kimya mpe bomoko. Bizaleli yango ezali na ndakisa: motema malamu, boboto, motema molai, komipekisa, mpe bolingo. Kutu, Biblia elobi ete bolingo ezali “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:14) Mpo na nini bolingo eleki bizaleli mosusu? Yoká oyo Biblia elobi mpo na ezaleli yango.

  • “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te, esalaka makambo ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te. Esepelaka na makambo ya kozanga boyengebene [to ya mabe] te, kasi esepelaka nde na solo. Ekangaka motema na makambo nyonso, . . . eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo esilaka soki moke te.”​—1 Bakorinti 13:4-8.

  • “Bolingo esalaka moto mabe te.”​—Baroma 13:10.

  • “Likambo eleki ntina mpenza, bólinganaka makasi, mpo bolingo ezipaka ebele ya masumu.”​—1 Petro 4:8.

Ntango ofandi na bato oyo balingaka yo, ozalaka na kimya, obangaka eloko te, mpe ozalaka motema mpiɔ! Ezalaka bongo mpo oyebi ete bato yango balukaka bolamu na yo, bakoki te kosala yo mabe na nko.

Bolingo ekoki mpe kotinda moto andima komipimela, atika ata makambo mosusu oyo azalaki kosepela na yango, mpo na bolamu ya basusu. Na ndakisa, ntango mwana ya moto moko oyo tokobenga George abotaki, George alingaki amemaka nkɔkɔ na ye mingi. Kasi ezalaki na mokakatano moko: George azalaki komɛla makaya mingi mpe tata ya mwana alingaki te ete amɛlaka likaya pembeni ya mwana na ye. George asalaki nini? Atako asalaki mbula 50 na komɛla likaya, atikaki yango mpo na nkɔkɔ na ye. Bolingo ekoki mpenza kosala makambo minene!

Biblia esalisaka moto akóma na bizaleli malamu lokola motema malamu, boboto, mpe mingimingi bolingo

Moto abotamaka na bolingo te; ayekolaka yango koyekola mpe baboti bazalaka na mokumba monene mpo na koteya ye yango. Baboti baleisaka mwana na bango, babatelaka ye, mpe basalisaka ye ntango abɛli. Baboti ya malamu basololaka na mwana na bango mpe bateyaka ye. Longola yango, bapesaka mwana disiplini, na ndakisa bateyaka ye koyeba mabe ná malamu. Baboti ya malamu bapesaka mpe mwana na bango ndakisa oyo asengeli kolanda.

Nzokande, baboti mosusu basalaka nyonso wana te. Kasi, yango elingi koloba te ete bana na bango bakoki kobonga te. Mikóló mingi, ata oyo baboti bateyá bango mabe ná malamu te, babongwaná mpenza mpe bakómá bato oyo basusu bakoki kotyela motema. Ndenge tokomona yango na lisolo elandi, bato yango mosusu bazalaki komonana ete bakoki kobonga lisusu te!