Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI NA BANGO EBONGWANAKI

Lisolo ya Ricardo ná ya Andres

Lisolo ya Ricardo ná ya Andres

Mateya ya Biblia ebongolaka bato na ndenge ya kokamwa mpenza. Tótalela ndakisa ya Ricardo ná ya Andres.

RICARDO: Nazalaki na mbula 15 mpamba ntango nakómaki kotambola na bato ya biyoma. Nazalaki kolanda makambo nyonso oyo baninga na ngai bazalaki kosala. Kutu, nakómaki na mposa ya kolekisa mbula 10 na bolɔkɔ! Ekoki kokamwisa; kasi, na kartye epai nakolá, bato bazalaki kobanga mpe kokumisa moto nyonso oyo alekisá mwa bambula na bolɔkɔ. Ngai mpe nalingaki kozala lokola bango.

Nasalaki nyonso oyo bato ya biyoma basalaka, lokola komɛla bangi, kolinga basi, mpe kobunda. Mokolo moko na butu, tobɛtanaki masasi ná bato mosusu oyo tozalaki koyokana na bango te. Nakanisaki bakoboma ngai, kasi nazwaki ata lisasi te. Nsima na yango, nakómaki komituna soki nalingi mpenza bomoi ya ndenge nini, mpe nazwaki mokano ya kobongwana. Kasi nakosala yango ndenge nini? Nani akosalisa ngai?

Bandeko na ngai mingi bazalaki kaka bato ya motó mpasi. Bazalaki na mikakatano ebele. Kasi, noko na ngai moko ná libota na ye bazalaki bato malamu; nayebaki ete batosaka mibeko ya Biblia. Kutu, bango bato bateyaká ngai ete Nzambe nkombo na ye Yehova. Mwa moke nsima ya mokolo oyo tobɛtanaki masasi, nabondelaki Yehova, nabengaki ye mpenza na nkombo na ye mpe nasɛngaki ye asalisa ngai. Likambo ya kokamwa, kaka mokolo oyo elandaki, Motatoli moko ya Yehova ayaki kobɛtela ngai porte! Akómaki koyekola na ngai Biblia.

Mwa moke na nsima, nakómaki na mokakatano. Baninga na ngai bazalaki kobengabenga ngai mpo tókutana. Atako ezalaki mpasi, nazalaki kaka koboya. Nalingaki te kotika koyekola Biblia mpe nazali na esengo ndenge nasalaki yango! Nabongwanaki mpenza, mpe nakómaki na esengo ya solosolo.

Nazali koyeba ete lokola nazalaki na mposa ya kolekisa mbula 10 na bolɔkɔ mpo bato bákóma kobanga ngai, nasɛngaki Nzambe andima ngai namipesa kaka na mosala ya koteya ata mbula 10 mpo nasalisa bato mosusu, ndenge ngai mpe basalisaki ngai. Nzambe ayokaki libondeli na ngai mpo nasali sikoyo mbula 17 na mosala yango! Nakobakisa mpe ete nakɔtá bolɔkɔ ata mokolo moko te.

Nzokande, tii lelo oyo baninga na ngai mingi bazali na bolɔkɔ. Bamosusu mpe bakufá. Soki nakanisi, napesaka mpenza bandeko na ngai oyo bazalaki Batatoli mersi. Baponaki bomoi ya malamu, baponaki kotosa Biblia. Nasepelaka na bango mingi koleka kutu ndenge nazalaki kosepela na baninga na ngai ya kala. Kasi libosoliboso, napesaka Nzambe mersi ndenge ateyaki ngai kozala na bomoi oyo eleki malamu.

ANDRES: Nakolá na kartye moko ya babola epai bangi, moyibi, koboma bato, mpe kindumba ezalaki makasi. Tata na ngai azalaki molangwi-masanga mpe momɛli-bangi. Ye ná mama bazalaki ntango nyonso koswana mpe kobunda.

Nakómaki komɛla masanga mpe bangi ntango nazalaki naino mwana moke. Nazalaki kolekisa ntango na balabala mpo na koyiba mpe na nsima kotɛka biloko oyo nayibaki. Ntango nakómaki mwa mokóló, mpo papa amesana na ngai, alakisaki ngai ndenge ya kokɔtisa na mboka bangi mpe biloko mosusu oyo Leta apekisá mpe kotɛka yango. Eumelaki te, nakómaki na mbongo mingi. Na nsima, mokolo moko, bapolisi bayaki na ndako na ngai. Bakangaki ngai mpe bakatelaki ngai mbula 5 ya bolɔkɔ mpo nalukaki koboma moto.

Mokolo moko, nayokaki ete Batatoli ya Yehova bayei koteya na bolɔkɔ mpe moto nyonso oyo asepeli, akoki kokende kolanda mateya yango. Nakendaki kolanda yango. Makambo nayokaki kuna esepelisaki ngai, mpe nakómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Bazalaki koteya ngai te makambo oyo ekosepelisa ngai, bazalaki nde kolakisa ngai mibeko ya Nzambe.

Namonaki ete nakokoka kobongwana te soki basalisi ngai te, mingimingi ntango baninga mosusu ya bolɔkɔ bakómaki kokanela ngai mpo bazalaki kosepela te ndenge nazalaki koyekola Biblia. Yango wana nabondelaki Yehova apesa ngai makasi mpe bwanya, mpe asalisaki ngai. Kutu, na mpiko nyonso, nateyaki baninga mosusu ya bolɔkɔ makambo ya Biblia.

Ntango mokolo na ngai ya kobima ekokaki, nakómaki kobanga; nakanisaki malamu kutu natikala na ngai na bolɔkɔ! Ntango nazalaki kobima, bato mingi ya bolɔkɔ bazalaki kopepa ngai na mosika. Bamosusu kutu bazalaki koloba ete: “Pastɛrɛ, kende malamu.”

Nalingaka ata kokanisa te ndenge nalingaki kosuka soki natikaki te ete Nzambe ateya ngai. Napesaka Nzambe mersi mingi ndenge alingaki ngai mpe amonaki ete nakoki mpe kobongwana. a

a Masolo mosusu oyo ezali kolakisa ndenge Biblia ekoki kobongola moto ezali na site Internet jw.org. Kende na MATEYA YA BIBLIA > KIMYA MPE ESENGO.