Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nkisi esengeli kaka te kosalisa moto ayoka malamu, esengeli nde kosilisa maladi

MOKAKATANO

Kokende tii na mosisa ya likambo

Kokende tii na mosisa ya likambo

Okanisi ete tokoki kosilisa ebele ya mikakatano oyo ezali kozangisa biso kimya mpe ezali kotinda biso tóbanga avenire? Mpo na kosilisa mikakatano yango, tosengeli koyeba nini mpenza ememaka yango.

Tokoki kosalela ndakisa ya Tom, mobali moko oyo abɛlaki mpe na nsima akufaki. Mpo na nini akufaki? Monganga moko ya lopitalo epai bamemaki Tom liboso akufa akomaki boye: “Ntango maladi na ye ebandaki, moto moko te akanisaki koluka nini epesaki ye yango.” Ekoki kozala ete minganga oyo bazalaki kosalisa ye liboso bazalaki kaka kopesa ye nkisi mpo ayoka malamu.

Bato bazali mpe kosala bongo mpo na mikakatano ya mokili. Na ndakisa, mpo na kosilisa mobulu, bakonzi ya Leta bazali kobimisa mibeko ya sika, bazali kotya bakamera na babalabala, mpe bazali kobakisa bapolisi. Kasi, nyonso wana ezali kosalisa kaka mwa moke, ezali kosilisa mikakatano nyonso te. Mpo makambo oyo bato basalaka emonisaka makanisi mpe bamposa oyo ezali na mitema na bango.

Daniel, oyo afandaka na ekólo moko ya Amerika ya Sudi epai bobola ezali kokóma makasi, alobi boye: “Liboso tozalaki na kimya. Tozalaki kobanga te ete mokolo mosusu miyibi bákɔtela biso na mandoki. Kasi lelo, mboka to engumba ata moko te ezali lisusu na kimya. Lokola bato bazali se kokóma babola, mingi bazali kokóma na lokoso mpe bakoki ata koboma moto mpo na kobɔtɔla ye biloko.”

Elias, mobali moko oyo akimaki bitumba na ekólo moko ya Moyen-Orient mpe na nsima ayekolaki Biblia, alobi boye: “Na engumba na biso, baboti mpe bakonzi ya politiki mpe ya mangomba bazalaki kolendisa bilenge mingi básimba mandoki mpe bákufa mpo na ekólo. Nzokande, na ngámbo mosusu bazalaki mpe koyebisa bilenge na bango bongo! Nyonso wana ezalaki koteya ngai ete kotyela bakonzi ya mokili oyo motema ezali bozoba.”

Biblia elobi:

  • “Mposa ya motema ya moto ezali mabe banda bolenge na ye.”​—Ebandeli 8:21.

  • “Motema ezali na bokosi mingi koleka eloko mosusu nyonso mpe ezali eloko ya kosakana na yango te. Nani akoki koyeba yango?”​—Yirimia 17:9.

  • “Makanisi mabe, koboma bato, . . . misala ya pite, koyiba, matatoli ya lokuta . . . eutaka na motema.”​—Matai 15:19.

Tozali kokoka te kosilisa makanisi mabe oyo ezali na mitema ya bato. Kutu, ndenge touti komona yango na lisolo oyo eleki, makanisi yango ezali se kokóma mabe koleka. (2 Timote 3:1-5) Makambo ezali kobonga kaka te atako lelo toyekoli makambo mingi mpe tokómi kosalela mayele ndenge na ndenge mpo na kosolola! Mpo na nini tozali kokoka kaka te kotya kimya na mokili? Tozali nde komeka likambo oyo tokokoka te? Tozali komeka kosala likambo oyo ekoki kosalema te?

TOZALI KOMEKA KOSALA LIKAMBO OYO EKOKI KOSALEMA TE?

Ata soki tosilisi makanisi ya mabe na mitema ya bato, tokokoka kaka te kotya kimya na mokili. Mpo na nini? Mpo tozali kaka bato.

Likambo ezali boye: “Ezali te likambo ya moto . . . atambwisa lokolo na ye.” (Yirimia 10:23) Nzambe akelá biso te na mayele ya komitambwisa. Kutu, akelá biso te na mayele ya kotambwisa baninga na biso bato, kaka ndenge akelá biso te mpo tófandaka na nse ya mai to na mapata!

Nzambe akelá biso te na mayele ya kotambwisa baninga na biso bato, kaka ndenge akelá biso te mpo tófandaka na nse ya mai

Tókanisa naino: Bato boni bandimaka moto mosusu ayebisa bango ndenge oyo basengeli kotambwisa bomoi na bango to makambo nini basengeli kolanda? Bato boni balingaka báyebisa bango ndenge oyo basengeli kotalela likambo ya kolongola zemi to ndenge oyo basengeli kobɔkɔla bana na bango? Wana ezali kaka mwa makambo oyo mpo na yango bato na bato bazali na makanisi na bango. Biblia elobaka kaka solo, atako bato mingi baboyaka kondima yango. Ndenge oyo Nzambe akelá biso, apesá biso te mayele to bokonzi ya kotambwisa baninga na biso bato. Lokola ezali bongo, nani abongi kotambwisa biso?

Eyano ezali ete Nzambe nde asengeli kotambwisa biso. Ye moto akelá biso! Apesi biso mokɔngɔ te, ndenge bato mosusu bakanisaka. Kutu, mpo na kolakisa ete akipaka biso, apesá Biblia, mokanda oyo ezali na batoli ya malamu mingi. Soki toyebi malamu mateya ya Biblia, tokomiyeba mpe malamu. Mpe yango ekosalisa biso tóyeba mpo na nini makambo ezali kotambola malamu te na mokili. Tokoyeba mpe mpo na nini moto moko ya mayele na filozofi akomaki ete: “Bato mpe baguvɛrnema bazwaka liteya te na makambo oyo eleká.”

BATOLI YA BIBLIA EBATELAKA BISO!

Biblia elobi ete: “Bwanya ya moto emonanaka na makambo ya boyengebene oyo asalaka.” (Luka 7:35) Na ndakisa, Yisaya 2:22 epesi toli moko malamu ete: “Mpo na bolamu na bino moko, bózala mosika [to bótya motema te] na moto.” Toli wana ekoki kosalisa biso tótya motema te na makambo oyo bato bazali kolaka, oyo bakokoka kosala te. Kenneth, oyo afandaka na engumba moko ya Amerika ya Nɔrdi epai mobulu ezali makasi, alobi boye: “Bato ya politiki, moto na moto azali kolaka ete akobongisa makambo, kasi bazali kokoka kosala eloko te. Yango ezali kondimisa biso ete Biblia elobi solo.”

Daniel, oyo tolobelaki liboso, akomaki boye: “Makambo oyo nazali komona mokolo na mokolo ezali kondimisa ngai ete bato bakoki koyangela malamu te. . . . Kokanisa te ete soki obombi mbongo mingi na banki to soki okozwa mbongo ya malonga ntango okobima pansiɔ elakisi kaka ete okozala malamu. Nayebi bato oyo bamonaki bwale mpo batyelaki biloko wana motema.”

Biblia ezali kosalisa biso tótya motema te na makambo oyo ekosalema te. Kasi longola yango, ezali kopesa biso elikya, ndenge tokomona yango na lisolo elandi.