Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKILI OYO ETONDI NA MAKAMBO YA MPASI

4 Batelá elikya na yo

4 Batelá elikya na yo

MPO NA NINI EZALI NA NTINA?

Komitungisa mpo na makambo ya mpasi oyo ezali kosalema na mokili ekoki kobimisela moto mikakatano na nzoto mpe na makanisi. Bato mingi oyo bakutanaka na makambo ya ndenge wana bandimaka te ete makambo ekoki kobonga. Yango etindaka bango básala nini?

  • Basusu baboyaka kutu kokanisa mpo na avenire.

  • Basusu bamɛlaka masanga to basalelaka drɔgɛ mpo na kobosana makambo ya mpasi oyo bazali kokutana na yango.

  • Mwa bato moke bamonaka ete ezali malamu bákufa na esika ya kozala na bomoi. Yango wana bakómaka na likanisi ya komiboma.

Oyo osengeli koyeba

  • Mikakatano mosusu oyo ozali kokutana na yango ezali kaka mpo na mwa ntango mpe ekoki kobonga na ndenge oyo okanisaki te.

  • Ata soki makambo ebongwani te, ezali na makambo oyo okoki kosala sikoyo mpo oyikela mikakatano yango mpiko.

  • Biblia epesi elikya ya solosolo mpo na kosilisa libela bampasi oyo bato bazali kokutana na yango.

Oyo okoki kosala sikoyo

Biblia elobi boye: “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.”​—Matai 6:34.

Sepelá na oyo ozwi lelo. Komitungisa te mpo na makambo oyo ekosalema lobi mpo yango ekoki kopekisa yo osepela na oyo ozali na yango lelo.

Kobanga makambo ya mabe oyo ekoki kosalema, ekobakisela yo kaka mitungisi mpe ekosala ete ozala lisusu na elikya te mpo na makambo ya malamu oyo ekosalema na mikolo ezali koya.

Biblia epesi elikya ya solosolo

Mokomi moko ya nzembo ya kala ayebisaki Nzambe boye na libondeli: “Liloba na yo ezali mwinda na lokolo na ngai, mpe pole na nzela na ngai.” (Nzembo 119:105) Talá ndakisa moko oyo emonisi ete Biblia Liloba ya Nzambe ezali mpenza bongo.

Na butu, mwinda esalisaka biso tóyeba esika ya kotya lokolo. Ndenge moko mpe, Biblia ezali na batoli ya bwanya oyo ekoki kosalisa biso ntango tolingi kozwa ekateli moko ya ntina mingi.

Mwinda ekoki kopesa pole na nzela oyo tozali kotambola mpo tókoka komona biloko oyo ezali liboso na biso. Ndenge moko mpe, Biblia ekoki kosalisa biso tóyeba ete na mikolo ezali koya makambo ekobonga.