Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MABELE EKOBEBISAMA NYONSO?

Mai ya pɛto

Mai ya pɛto

SOKI mai ezalaki te na mabele, mingimingi mai ya pɛto, bomoi mpe elingaki kozala te. Kutu, ndenge bikelamu mingi ya bomoi esalemá, mai nde ezwaka esika monene na kati na yango. Maziba, balaki, bitanda ya mai oyo etambolaka te mpe mai oyo ezalaka na nse ya mabele, nyonso wana nde esalisaka mpo bato ná banyama bázwa mai ya komela mpe milona ekola.

Mai ya pɛto ekómi ya kokelela

Mai ezwá esika monene na mabele. Nzokande, na kotalela ebongiseli moko oyo elandelaka makambo ya klima, “kaka 0,5% ya mai na mabele nde ezali pɛto mpe bato bakoki kosalela.” Atako motángo moke ya mai yango ekoki kosalisa bato nyonso na mabele, kasi lokola klima ezali kobeba se kobeba mpe bosɛnga ya mai ezali mingi, emonani ete mingi ya mai yango ya pɛto ezali kobebisama to kokóma mpasi mpo bato bázwa yango. Bato ya mayele balobi ete na bambula 30 oyo ezali koya, bato soki miliare 5 bakozanga mai ya pɛto.

Mabele esalemá na ndenge ya kokamwa

Mabele esalemá na ndenge ete mai ekoki kosilaka soki moke te. Lisusu, zɛlo, bikelamu ya mai, ata mpe pole ya moi, nyonso wana esalaka elongo mpo na kopɛtola mai. Tótalela mwa makambo oyo emonisi ete mabele na biso esalemá mpo eumela libela.

  • Bato bamonisi ete zɛlo ekoki kolongola biloko mingi oyo ebebisaka mai. Na bitanda ya mai oyo etambolaka te, milona mosusu elongolaka biloko oyo ebebisaka mai, lokola nitrogène, phosphore, mpe pesticides.

  • Bato ya mayele bauti koyekola ndenge oyo mai esalaka mpo etikala pɛto ata nsima ya kobebisama. Mwa biloko oyo ebebisaka mai elimwaka mbala moko na kati ya mai oyo ezali kotyɔla mpe bamikrobɛ elyaka yango.

  • Banyama oyo efandaka na kati ya mai ya pɛto ekoki kolongola biloko mosusu ya mabe oyo ezalaka na mai na mwa mikolo mpamba, mpe ntango mosusu banyama yango epɛtolaka mai malamu koleka ata milona mosusu oyo epɛtolaka mpe mai.

  • Mai ebatelamaka na mabele na nzela ya eloko oyo babengi “système hydrologique”. Soki système yango mpe makambo mosusu oyo esalemaka na nsense ezalaki te, mbɛlɛ mai nyonso ya mokili elingaki kosopana, ata moke te elingaki kotikala na mabele.

Bato bazali komekameka kobongisa makambo

Soki tozali koboya kosopa mafuta ya motuka mpe koboya kobwaka bankisi oyo ebebá, tokobatela mai na biso pɛto awa na mabele.

Bato ya mayele bazali kosɛnga na bato nyonso báyeba kobatela mai. Mpo na koboya kobebisa mai, basɛngi ete tóbongisaka mituka na biso soki ezali kotangisa mafuta, tóbwakaka te bankisi ebebá na w.c, mpe tóbwakaka te biloko oyo ezali na pwazɔ na nzela oyo mai elekaka.

Ba-ingénieur bazwi mayele ya sika ya kolongola mungwa oyo ezalaka na bambu. Mokano na bango ezali ete mai ya pɛto ekóma mingi na mokili.

Kasi yango ekoki te. Kutu emonani ete mayele yango ya kolongola mungwa na mai ezali kolya mbongo mingi mpe ezali kosɛnga kura mingi. Na 2021, lapolo moko ya États-Unis oyo elobelaki ndenge ya kobatela mai ya pɛto elobaki boye: “Milende oyo bato bazali kosala lelo mpo na kobatela mai ya pɛto esengeli kosalema mbala mibale.”

Elikya oyo Biblia epesi

“Nzambe . . . abendaka matangá ya mai; Ekɔngɔlamaka lokola mbula mpo na kosala londende na ye, bongo mapata ebimisaka matangá ya mai, etangiselaka bato mai ebele.”—Yobo 36:​26-28.

Nzambe akelá mokili na ndenge ete mai ebatelama libela na libela.—Mosakoli 1:7.

Kanisá naino: Soki Mozalisi asalá mokili na ndenge ete mai epɛtolamaka, okanisi ete akoki kozanga nguya mpe mposa ya kobongisa mabe nyonso oyo bato bazali kobimisa na mabele? Talá lisolo, “Nzambe alaki ete mabele ekobebisama nyonso te,” na lokasa 15.