Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MABELE EKOBEBISAMA NYONSO?

Bazamba

Bazamba

BAZAMBA ebengami “pumɔ ya mabele mpe eloko oyo esimbi bomoi,” mpe ezali mpenza solo. Banzete ebendaka gaz carbonique, gaz oyo ekoki kosala biso mabe. Lisusu, ebimisaka mopɛpɛ ya malamu (oxygène) oyo topemaka. Banzete mpe banyama soki 80% ezalaka na bazamba. Soki bazamba ezalaki te, mbɛlɛ bomoi mpe elingaki kozala te.

Bazamba ekómi na likama

Mbula na mbula, bato bazali kokata bamilio ya banzete, mingimingi mpo na kobongisa mabele ya kosala bilanga. Kobanda na nsuka ya bambula 1940, bazamba mingi ezali kolimwa.

Ntango zamba moko ebebisami, banzete mpe banyama nyonso oyo ezalaka na kati mpe elimwaka.

Mabele esalemá na ndenge ya kokamwa

Bisika mingi oyo bakataki bazamba, banzete ebotaki lisusu mpe ezalaki kokola na ndenge ya kokamwa. Ba-écologiste bakamwaki ntango bamonaki esika oyo bakataki banzete, ndenge banzete yango ebotaki lisusu mpe esika yango ekómaki lisusu zamba monene. Tótala bandakisa oyo:

  • Bato oyo batalelaka makambo ya bazamba bazalaki kolandela mabele oyo liboso ezalaki zamba, na nsima basalaki bilanga na esika yango, mpe na nsuka batikaki yango mpamba. Bolukiluki oyo esalemaki na bisika 2200 na Amerika mpe na wɛsti ya Afrika mpo na likambo yango, emonisi ete nsima ya bambula zomi mabele ekoki kozongela kobota banzete mpe kokóma lisusu zamba kaka ndenge ezalaki na ebandeli.

  • Na kotalela lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo Science, bamonisi ete na nsima ya mbula soki 100, mabele yango moko ekoki kozonga ndenge ezalaki na ebandeli, elingi koloba, kobota lisusu banzete mpe balolenge mosusu ya bomoi oyo ezalaki na zamba yango.

  • Bato ya mayele na Brésil bautaki kosala bolukiluki mpo na koyeba soki banzete ekolaka noki ntango bato baloni yango to ekolaka noki nde ntango batiki mabele yango ebota lisusu na ndenge na yango moko.

  • Lapolo ya zulunalo National Geographic mpo na bulukiluki wana, elobi ete: “Bazalaki na esengo ya komona ete kolona banzete na zamba ezali mpenza na ntina te.” Mpamba te, nsima ya mbula mitano kaka, mabele yango “etondaki na banzete” kozanga ete moto alona yango.

Bato bazali komekameka kobongisa makambo

Bato bazali kosala milende na mokili mobimba mpo na kobatela bazamba mpe kobongisa lisusu oyo ebebaki. Na yango, lapolo moko ya Nations Unies emonisi ete, na boumeli ya mbula 25 oyo eleki “motángo ya kokata banzete ya zamba ekitaki koleka 50%.”

Atako bongo, milende yango ekoki te mpo na kobatela bazamba na biso. Lapolo ya ebongiseli moko na nkombo Global Forest Watch elobaki ete: “Motángo ya banzete oyo ekatamaki na bazamba ya mikili epai molunge mingi ezalaka, ekiti mpenza te.”

Mombongo ya kokata banzete kozanga ndingisa ya leta ezali kokɔtisa bamilio ya badolare, mpe mombongo yango ya lokoso ezali kokoba kobebisa bazamba ya mikili epai molunge ezalaka makasi.

Bato oyo balandelaka makambo ya bazamba bazali kokata mwa banzete mpe kolona mosusu ya sika mpo na kobatela bazamba.

Elikya oyo Biblia epesi

“Yehova a Nzambe akolisaki na mabele nzete nyonso ya kitoko na kotala mpe malamu na kolya.”—Ebandeli 2:9

Mozalisi ya bazamba asalá yango na ndenge ete tokoba kozwela yango matomba. Azali na mposa ya kobatela bazamba mpe likoki na yango ya kobatela bomoi.

Biblia emonisi ete Nzambe akotika nzela te ete bato oyo balukaka matomba na bango moko bákoba kobebisa mabele mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na kati. Talá lisolo “Nzambe alaki ete mabele ekobebisama nyonso te,” na lokasa 15.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe.—Nzembo 83:18.