Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MABELE EKOBEBISAMA NYONSO?

Mopɛpɛ

Mopɛpɛ

TOZALAKA na mposa ya mopɛpɛ, kasi kaka mpo na kopema te. Mopɛpɛ ebatelaka planɛti na biso na pole ya mabe oyo moi ebimisaka. Mopɛpɛ esalaka ete klima na mokili ekoba kozala malamu.

Mopɛpɛ ezali kobeba se kobeba

Kobeba ya mopɛpɛ ekómi likama mpo na bomoi awa na mabele. Nakotalela lapolo ya ebongiseli ya ONU oyo etalelaka sante, kaka mwa ndambo ya bato (1%) awa na mabele nde bapemaka mopɛpɛ ya malamu mpe oyo ebongi.

Mopɛpɛ oyo ebebi ekoki kosala ete moto akóma kobela maladi ya mpema, kanser ya pumɔ, maladi ya motema mpe ya misisa. Mbula na mbula bato soki 7000000 bazali kokufa mpo na kobeba ya mopɛpɛ.

Mabele esalemá na ndenge ya kokamwa

Mabele na biso ekelamá na likoki ya kopɛtola mpe kobatela mopɛpɛ ya malamu mpe kokoba kopesa yango na bikelamu ya bomoi. Likambo yango ekoki kosalema kaka soki bato bazali kobebisa mopɛpɛ mingi te. Tótala mwa bandakisa oyo.

  • Likoki oyo bazamba ezalaka na yango ya kobenda mopɛpɛ ya mabe (gaz carbonique) eyebani malamu mpenza. Kasi bisika oyo ezali na mabulu mingi, na ndakisa esika oyo banzete ya Mangrove ekolaka, esalaka mosala yango kitoko mingi. Banzete ya Mangrove esalaka mosala makasi ya kolongola mbala mitano mopɛpɛ ya mabe koleka banzete ya zamba.

  • Bolukiluki oyo euti kosalema emonisi ete ba-algues mosusu ya minene elongolaka mpe gaz ya mabe na mopɛpɛ. Nkasa na yango oyo etɔndi na gaz epesaka yango likoki ya kokende na ntaka ya molai. Mosika mpenza na libongo, nkasa ya algues yango oyo etondi na gaz epasukaka mpe ezindaka tii na nse ya mai. Kuna, efandaka mpo na bambula mingi.

  • Likoki oyo mopɛpɛ ezalaka na yango ya kobonga yango moko ata soki bato babebisi yango na ndenge ya mabe mpenza, emonanaki na eleko ya maladi mabe ya coronavirus, ntango bato bazalaki lisusu kobima te. Na 2020, ntango bakompanyi ya minene mpe mituka ezalaki lisusu te kobimisa milinga oyo ebebisaka mopɛpɛ, emonanaki ete mopɛpɛ ekómaki malamu mpenza. Lapolo moko ya “2020 World Air Quality Report,” emonisi ete bamboka mingi (koleka 80%) bayei komona ete mopɛpɛ ekómaki pɛto mwa moke nsima ya kotya mobeko ete bato babimaka lisusu te.

Bato bazali komekameka kobongisa makambo

Kokende mosala to na eteyelo na velo ekoki kosalisa mpo na kobatela mopɛpɛ.

Baguvernɛma ezali kotya bakonzi ya bakompanyi mbamba mpo básalelaka mingi te biloko oyo ebebisaka mopɛpɛ. Longola yango, bato ya siansi bauti komona mayele mosusu mpo na kolongola biloko oyo ebebisaka mopɛpɛ. Na ndakisa, bamonisi ete bakoki kosalela bamikrobe mpo na kobongola biloko oyo ebebisaka mopɛpɛ na biloko oyo ezali na likama te. Lisusu, bato yango ya mayele balendisaki bato ete na esika ya kokumba motuka, ekozala malamu ya kotambola na makolo to kosalela velo mpe koboya kosalela bagaze mingi na bandako.

Baguvernɛma mosusu ezali kosalisa bana-mboka na yango mpe kopesa bango baresho oyo ekosala ete ebebisa mopɛpɛ te, kasi bato mingi bazali kaka na yango te.

Kasi, ndenge emonisami na lapolo moko ya 2022 oyo bibongiseli ya mikili mingi esangisaki, bakisa mpe ebongiseli ya ONU oyo etalelaka kolɔngɔnɔ ya nzoto mpe Banque mondiale, milende yango ekoki te.

Lapolo elobaki ete na 2020, na makambo misato oyo ezalaki kobebisa mopɛpɛ, moko na yango ezali milinga oyo ebimaka ntango bato bazali kolamba mpe makambo ya tekinoloji. Na bamboka mingi, kaka mwa ndambo ya bato nde bazali na likoki ya kosalela baresho oyo ebongi to biloko mosusu ya kolambela oyo ebimisaka milinga te.

Elikya oyo Biblia epesi

“Talá oyo Nzambe ya solo, Yehova, alobi, ye Mozalisi ya likoló mpe . . . Ye oyo atandá mabele mpe mbuma na yango, Ye oyo azali kopesa mpema na bato oyo bafandi wana”—Yisaya 42:5.

Nzambe akelá mopɛpɛ oyo topemaka mpe likoki oyo ezalaka na yango ya komipɛtola, yango emonisi ete Nzambe azali na nguya oyo ezangi nsuka mpe bolingo mpo na bato. Na yango, ezali mpenza polele ete Nzambe azali na likoki ya kolongola biloko oyo ebebisaka mopɛpɛ. Talá lisolo “Nzambe alaki ete mabele ekobebisama nyonso te.”