Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LAMUKÁ! No 1 2024 | Mpo na nini limemya elimwe boye na mokili?

Ndenge moko na mitindo ya banyama oyo emonanaka lisusu mpenza te, limemya mpe ekómá komonana na mpasi, mpe soki moto moko azali komonisa limemya, yango ekómá kokamwisa bato.

Na ndakisa, bato mingi bamonisaka limemya te epai ya baboti na bango, mikóló, bapolisi, bakonzi ya mosala, to balakisi. Lisusu na ba-réseaux sociaux, bato bazali kosalela mingi maloba ya nsɔni. Na kotalela lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo Harvard Business Review, kozanga limemya na mokili “ezali komata se komata.” Zulunalo yango ebakisi ete “esali sikoyo bambula mingi [bato bazali] kolobela mingimingi makambo yango.”

 

Mpo na nini bato bamemyaka lisusu basusu te?

Talá mpo na nini komemya basusu ezali na ntina mpe oyo okoki kosala mpo na komonisa limemya.

Mpo na nini bato bazwaka lisusu bomoi na valɛrɛ te?

Talelá batoli ya Biblia mpo oyeba ndenge okoki kozwa bomoi na yo moko mpe ya bato mosusu na valɛrɛ.

Mpo na nini limemya ezalaka lisusu te na mabota?

Libota nyonso ekoki kozala na esengo soki moto mokomoko ya libota azali komonisela basusu limemya.

Mpo na nini bato mingi bamonaka ete bazali na ntina te?

Biblia ekoki kosalisa bato bázwa bomoi na valɛrɛ mpe bábongisa bomoi na bango, mpe lisusu bámona ete bazali na ntina.

Mpo na nini limemya elimwe boye na mokili?

Tangá masolo elobeli limemya mpe makambo oyo Batatoli ya Yehova bazali kosala na mokili mobimba mpo komonisa limemya.