Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli

Maloba ya ebandeli

Sekele 12 mpo na libota ya esengo

Toyokaka bansango mingi oyo emonisi makambo oyo esalaka ete mabota mingi etambola malamu te. Kasi, nini esalaka ete makambo etambola malamu na mabota mosusu?

  • Banda 1990 tii 2015, motángo ya mabala oyo ekufaki na États-Unis emataki mbala mibale koleka epai ya babalani oyo bazali na mbula koleka 50 mpe emataki mbala misato koleka epai ya babalani oyo bazali na mbula koleka 65.

  • Baboti mingi bayebaka te oyo basengeli kosala: Bapesi-toli mosusu balendisaka baboti bábondelaka bana, nzokande basusu balendisaka bango básalelaka bana makambo makasimakasi.

  • Bilenge mingi bazali kokóma mikóló kozanga ete báyekola makambo oyo ekosalisa bango bázala na bomoi ya malamu.

Nzokande, esengeli koyeba ete . . .

  • Libala ekoki kozala boyokani ya esengo mpe ekoki koumela libela.

  • Baboti bakoki koyekola kopesa bana na bango disiplini na bolingo.

  • Bilenge bakoki koyekola makambo oyo ekosalisa bango ntango bakokóma mikóló.

Na ndenge nini? Lamuká! oyo elobeli sekele 12 mpo na kozala na libota ya esengo.