Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Misisa mpe baselile oyo esalaka na boyokani na bɔɔngɔ (oyo ezali na langi ya bulé) ezalaka na kati ya mongongo, na kati ya estoma mpe na kati ya misɔpɔ

Ndenge oyo libumu esalaka lokola “bɔɔngɔ ya mibale”

Ndenge oyo libumu esalaka lokola “bɔɔngɔ ya mibale”

OZALI na bɔɔngɔ boni? Soki olobi: “moko,” ezali solo. Kasi, na nzoto na yo ezali na misisa mpe baselile mosusu oyo esalaka na boyokani na bɔɔngɔ. Ebele ya baselile wana oyo esalaka na boyokani ezwá esika monene na nzoto, yango wana bato mosusu ya siansi babengaka yango “bɔɔngɔ ya mibale.” Misisa mpe baselile yango oyo esalaka na boyokani na bɔɔngɔ ezalaka na kati ya motó te, kasi na kati ya libumu.

Nzoto na biso esalaka mosala makasi mpo na konika biloko oyo tolyaka mpo etonga nzoto. Yango wana, ezali malamu ndenge bɔɔngɔ etindaka misisa mpe baselile wana etalela makambo mingi oyo etali konika bilei.

Atako misisa mpe baselile oyo esalaka na boyokani na bɔɔngɔ ezali mindɔndɔ mingi te lokola bɔɔngɔ yango moko, esalaka makambo ebele. Nzoto ya moto ezali na baselile kobanda milio 200 tii 600. Baselile wana oyo esalaka na boyokani ezalaka na kati ya libumu. Bato ya siansi balobaka ete soki mosala ya misisa mpe baselile wana nyonso esukaka kaka na bɔɔngɔ, elingaki kosɛnga ete misisa yango ezala minene koleka. Buku moko (The Second Brain) elobi: “Na yango, ezali malamu mpe ebongi mpenza ete makambo etali konika bilei mpo etonga nzoto esalema na kati ya libumu.”

ESIKA OYO BILOKO ESANGISAMAKA

Mpo bilei etonga nzoto, esɛngaka biloko ebele esangisama na ntango oyo ebongi mpe ekende na esika oyo ebongi. Ndenge oyo biloko yango esangisamaka ekamwisaka mpenza. Na ndakisa, na kati ya misɔpɔ, ezalaka na baselile oyo eyebaka mpe emekaka biloko oyo ezali na kati ya bilei oyo olei mpo na koyeba soki ezali malamu to mabe. Ndenge oyo baselile wana esalaka, esalisaka misisa mpe baselile oyo esalaka na boyokani na bɔɔngɔ ebimisa aside oyo ebongi mpo na konika bilei mpo etonga nzoto. Lisusu, misisa mpe baselile oyo esalaka na boyokani na bɔɔngɔ esalaka mpe mosala monene mpo na kotya aside mpe biloko mosusu oyo ebongi mpo bilei enikama malamu.

Ezali likambo ya kokamwa ndenge oyo bilei elekaka na mongongo mpo na kokóma na estoma mpe na misɔpɔ; misisa mpe baselile oyo esalaka na boyokani na bɔɔngɔ nde etambwisaka mosala yango. “Bɔɔngɔ ya mibale” etindaka bilei na libumu na ndenge esalaka ete misisa oyo ezali na nzela oyo bilei elekaka ekóma mike. Misisa mpe baselile oyo esalaka na boyokani na bɔɔngɔ esalaka ete misisa oyo ezali na nzela oyo bilei elekaka ekóma mike makasi te mpo bilei eleka malamu.

Longola yango, misisa mpe baselile oyo esalaka na boyokani na bɔɔngɔ ebatelaka nzoto. Biloko oyo tolyaka ekoki kozala na mikrobe. Yango wana, tokoki kokamwa te soki na kati ya libumu na biso ezali na baselile ebele (70 tii 80%) oyo babengi lɛmfosite, oyo ebundisaka maladi! Soki moto alye biloko oyo ezali na mikrobe mingi, misisa mpe baselile oyo esalaka na boyokani na bɔɔngɔ ekosala ete asanza yango to mpe asala pulupulu mpo na kobimisa yango.

BOYOKANI YA MALAMU

Atako misisa mpe baselile oyo tozali kolobela ezalaka na kati ya bɔɔngɔ te, esalaka na boyokani na bɔɔngɔ. Na ndakisa, misisa mpe baselile yango nde eyebisaka bɔɔngɔ ntango moto ayoki nzala mpe soki asengeli kolya mingi to te. Kaka yango mpe eyebisaka bɔɔngɔ soki moto atondi mpe ekoki kosala ete moto ayoka mposa ya kosanza ntango atondi mingi.

Ntango mosusu, ata liboso ya kotánga lisolo oyo, ozalaki komona ete bɔɔngɔ esalaka na boyokani ná mongongo, estoma mpe misɔpɔ. Na ndakisa, omonaka te ete soki olei bilei moko boye epesaka yo esengo? Bato ya mayele balobi ete esalemaka bongo ntango misisa mpe baselile oyo esalaka na boyokani na bɔɔngɔ etindaka ‘nsango ya esengo’ na bɔɔngɔ na yo, mpe yango esalaka ete omiyoka malamu mpenza. Yango wana bato balingaka kolya bilei oyo esepelisaka bango ntango bazali kotungisama na makanisi. Bato ya siansi bazali koluka mayele ya komekola ndenge oyo misisa mpe baselile oyo esalaka na boyokani na bɔɔngɔ esalaka mpo na kosalisa bato oyo bazali konyokwama na makanisi.

Ndakisa mosusu oyo emonisi ete bɔɔngɔ ná libumu ezali na boyokani ezali ntango moto ayokaka lokola makila ya nzoto epanzani. Esalemaka bongo mpo misisa mpe baselile oyo esalaka na boyokani na bɔɔngɔ etindaka makila na estoma ntango moto azali komitungisa to kobanga mingi. Moto ayokaka mposa ya kosanza mpo ntango atungisami, bɔɔngɔ etindaka misisa mpe baselile oyo esalaka na boyokani na yango ebongola lolenge oyo estoma esalaka. Bato ya mayele balobi ete boyokani wana kati na estoma ná bɔɔngɔ ekoki kosalema kozanga ete moto ayeba.

Atako misisa mpe baselile oyo esalaka na boyokani na bɔɔngɔ ekoki kosala makambo nyonso wana, ekoki te kokanisa to kosalisa yo ozwa bikateli. Na maloba mosusu, misisa mpe baselile yango ezali mpenza bɔɔngɔ te. Ekoki te kosalisa yo osala nzembo, osalela mbongo na yo malamu, to osala devuare. Ebongiseli wana ya kokamwa ezali kaka kokamwisa bato ya siansi mpo na ndenge oyo esalemi, atako makambo mosusu oyo yango esalaka eyebani naino te. Na yango, mbala ya nsima oyo okolya bilei, kanisá makambo nyonso wana oyo esalemaka mpe boyokani oyo ezali na kati ya libumu na yo!