Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo oyo bato ya siansi bakoki koyebisa biso te

Makambo oyo bato ya siansi bakoki koyebisa biso te

Emonani ete bato ya siansi bazali koyekola kaka eteni ya molɔ́ngɔ́ mokomoko oyo bamoná. Kasi ezali na mituna mingi ya ntina oyo bakoki kopesa biyano na yango te.

Bato ya siansi bakoki komonisa ndenge molɔ́ngɔ́ mpe bomoi ebandá? Na mokuse, bakoki te. Bamosusu balobaka ete siansi oyo babengi cosmologie ekoki kolimbola esika molɔ́ngɔ́ eutá. Kasi, profesɛrɛ moko, na nkombo Marcelo Gleiser, oyo ayekolaka minzoto na iniversite moko (Dartmouth College), mpe oyo andimaka ete ezali mpasi koyeba soki Nzambe azalaka to te, alobi boye: “Tolimbolá naino te esika molɔ́ngɔ́ eutá.”

Ndenge moko mpe, zulunalo moko (Science News) ekomaki boye mpo na esika bomoi eutá: “Ezali mpasi mpenza tómonisa na bosikisiki ndenge mabele ebandá: Mabanga ná biloko ya kalakala oyo ekokaki kolakisa mpenza ndenge mabele ezalaki na ebandeli ebungá kala mpenza.” Makambo nyonso oyo balobi emonisi ete siansi epesi naino eyano te na motuna oyo: Ndenge nini molɔ́ngɔ́ mpe bomoi ebandaki?

Kasi okoki komituna boye: ‘Soki basalaki bomoi na mabele, nani nde asalaki yango?’ Okoki mpe komituna mituna oyo elandi: ‘Soki Mozalisi moko ya bwanya mpe ya bolingo azali, mpo na nini atiki nzela ete bato bányokwamaka? Mpo na nini mangomba ndenge na ndenge etondi boye? Mpo na nini Nzambe azali kotika bato oyo basambelaka ye básalaka makambo ya mabe?’

Siansi ekoki kopesa biyano na mituna wana te. Kasi, yango emonisi te ete okoki te kozwa biyano na mituna yango. Na ntembe te, bato mingi basilá kozwa biyano ya malamu mpenza na mituna yango na Biblia.

Soki olingi koyeba mpo na nini bato mosusu ya siansi bazwaki ntango ya koyekola Biblia mpe na nsima bakóma kondima ete Mozalisi azali, kende na site Internet jw.org. Talá na eteni “makanisi na oyo etali ndenge bomoi ebandá.”