Makambo oyo molɔ́ngɔ́ ezali koteya biso
Molɔ́ngɔ́ ezali kokoba kokamwisa bato ya astronomi. Tii sikoyo, bazali kaka kokoba koyeisa malamu bisaleli oyo bazali na yango mpo na koyekola minzoto. Makambo nini basili komona?
Molɔ́ngɔ́ ebongisamá na molɔngɔ mpenza. Zulunalo moko (Astronomy) elobi boye: “Na likoló bagalaksi etambolaka na mobulu te, elandaka mpenza nzela moko boye.” Mpo na nini esalemaka bongo? Bato ya siansi bakanisaka ete sekele na yango ezali na kati ya eloko moko oyo emonanaka te, eloko moko ya moindo (matière noire). Babengaka eloko yango ya moindo “nzoto oyo emonanaka te oyo . . . etɛlɛmisaka bagalaksi, ba amas ya galaksi, mpe ba superamas ya galaksi . . . mpe esimbaka yango.”
Ndenge nini molɔ́ngɔ́ ebongisamá bongo? Ndenge makambo esalemaka na molɔngɔ, ebimá kaka yango moko? Talá makambo Allan Sandage alobaki na nsima. Bato bamonaka ete azali “moko ya bato ya mayele mingi mpenza mpe oyo bato bandimaka na makambo ya koyekola minzoto na siɛklɛ ya 20,” mpe azalaki kondimela Nzambe.
Alobaki boye: “Namonaka ete ekoki kosalema te ete makambo esalema na molɔngɔ boye na kati ya mobulungano moko. Eloko moko nde esalá ete makambo etambola na molɔngɔ bongo.”
Molɔ́ngɔ́ esalemá na ndenge ete ebatelaka bomoi. Talá eloko oyo bato ya siansi babengaka nguya ya pɛtɛɛ (interaction faible). Yango esalaka ete moi engɛnga kaka ndenge engɛngaka bongo. Soki nguya yango ezalaka pɛtɛɛ mingi, mbɛlɛ moi esalemá te. Soki mpe nguya yango ezalaka makasi, mbɛlɛ moi elimwá kala mpenza.
Banguya oyo ezalaka na molɔ́ngɔ́ ezali ebele mpenza mpe esalaka ete bomoi ezala. Moto moko ya mayele na makambo ya siansi na nkombo Anil Ananthaswamy alobi ete, soki kaka moko ya biloko yango ezalaka ndenge mosusu, mbɛlɛ “minzoto, baplanɛti, mpe bagalaksi ekokaki kosalema ata moke te. Mbɛlɛ bomoi mpe ezali te.”
Molɔ́ngɔ́ ezali na esika moko oyo ebongi mpo moto afanda. Mabele ezali na mopɛpɛ oyo ekoki, mai oyo ekoki, mpe sanza oyo ezali na bonene oyo ebongi mpenza mpo mabele etikala kaka na esika na yango. Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (National Geographic) elobi boye: “Biloko ndenge na ndenge oyo ezali na kati ya géologie, écologie mpe biologie esali ete libanga ya ndenge mosusu [elingi koloba mabele] ezala esika kaka moko oyo ebongi mpo na bato.” a
Mokomi moko alobi boye: “Mabele, sanza, minzoto mpe baplanɛti oyo ezalaka zingazinga ya moi, ezali mpenza mosika na minzoto mosusu oyo ezali na galaksi na biso.” Kasi, lokola ezali mosika bongo, yango nde esalá ete bomoi ezala awa na mabele. Soki tózalaka pene na minzoto mosusu wana, ezala katikati mpenza ya galaksi na biso to mpe na kati ya ebele ya minzoto na yango mosusu, mbɛlɛ kongɛnga ya minzoto wana mosusu etyá bomoi na biso na likama. Yango wana, bato ya siansi mosusu bazali koloba ete mabele ezali mpenza eteni ya galaksi na biso oyo ebongi na bikelamu ya bomoi.”
Na kotalela boyebi ya makambo ya siansi oyo etali molɔ́ngɔ́ mpe mibeko na yango, oyo Paul Davies, moto ya mayele na makambo ya physique azali na yango, etindi ye aloba boye: “Nakoki kondima te ete esalemá kaka bongo ete tobimá na molɔ́ngɔ́ kaka na mbalakaka bongo mpo na likambo moko boye, to mpo na likama moko boye oyo esalemaki. . . . Tozali na bomoi mpo na mokano moko.” Davies azali koteya te ete Nzambe azalisaki molɔ́ngɔ́ mpe bato. Kasi okanisi nini? Emonani ete molɔ́ngɔ́ mpe mabele esalemá mpo bomoi ezala wana. Omoni te ete ezali bongo mpo moto moko nde asalaki yango?
a Lisolo ya zulunalo yango (National Geographic) ezali komonisa mpenza te ete Nzambe nde asalaki mabele ná bato. Kasi, ezali koloba nde ete mabele ezali mpenza esika oyo ebongi ete bato bafanda.