Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Makambo nini osengeli kotalela?

Makambo nini osengeli kotalela?

“Molɔ́ngɔ́ ekoki kosalema yango moko mpe ekomisala yango moko.”​—Stephen Hawking ná Leonard Mlodinow, bato ya mayele na physique, 2010.

“Nzambe azalisaki likoló mpe mabele.”​—Biblia, Ebandeli 1:1.

Nzambe nde asalá molɔ́ngɔ́ mpe bomoi oyo ezali na kati na yango to ebimá kaka yango moko? Eyano oyo bato ya mayele mibale na makambo ya physique oyo touti kolobela na ebandeli ya lisolo oyo bapesi, mpe eyano oyo vɛrsɛ ya liboso ya Biblia epesi ekeseni mosika mpenza. Bato mingi bandimaka makanisi yango nyonso mibale. Kasi, bato mingi mpe bayebi eyano ya malamu te. Bato batyelanaka ntembe na likambo yango na babuku mpe na baemisyo ya TV.

Ntango mosusu, balakisi na yo mpe basilá koloba ete molɔ́ngɔ́ mpe bomoi oyo ezali na kati na yango ebimá kaka yango moko, moto asala yango te, mpo Nzambe azali te. Kasi, balakisi na yo basilá kolakisa yo makambo oyo emonisi ete Mozalisi azali te? Ntango mosusu, osilá koyoka basango ná bapastɛrɛ bazali koteya ete Mozalisi azali. Kasi, basilá kopesa yo elembeteli moko oyo endimisi likanisi na bango? To basɛngaki yo nde ondima maloba na bango mpo ezali likambo ya “kondima” to mpo ezali liteya ya lingomba?

Ntango mosusu, osilá kokanisa na motuna yango. Mbala mosusu, moto moko te akoki komonisa na bosikisiki ete Mozalisi azali. Okoki mpe komituna boye: Kozwa eyano na motuna yango ezali mpenza na ntina?

Ya liboso, nimero ya Lamuká! oyo ekolobela makambo oyo etindá bato mingi bándima ete Mozalisi azali. Na nsima, ekolobela ntina oyo eyano na motuna etali ndenge bomoi ebandá ezali na motuya mingi mpenza.