Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na nini ezali na ntina koyeba ete Mozalisi azali?

Mpo na nini ezali na ntina koyeba ete Mozalisi azali?

Mpo na nini ezali na ntina mingi tóyeba ete Mozalisi azali? Soki bilembeteli endimisi yo ete Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso azali, okosepela mpe kotalela makambo oyo emonisi ete Biblia ekomamaki na litambwisi ya elimo na ye. Mpe soki ondimi makambo oyo Biblia elobi, okoki kozwa bolamu na makambo oyo elandi.

Bomoi na yo ekozala na ntina mpenza

BIBLIA ELOBI BOYE: “[Nzambe] asaleli bino bolamu, ndenge apesaka bino bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, ndenge atondisaka mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.”​—Misala 14:17.

YANGO ELIMBOLI NINI?: Eloko nyonso oyo olingaka na mokili oyo ezali likabo oyo euti epai ya Mozalisi. Okosepela na makabo yango lisusu mingi mpenza ntango okoyeba ndenge oyo Moto oyo apesá yo yango abatelaka yo.

Okozwa toli ya malamu oyo ekosalisa yo sikoyo

BIBLIA ELOBI BOYE: “Okokanga ntina ya boyengebene ná bosembo ná kolongobana, nzela mobimba ya oyo ezali malamu.”​—Masese 2:9.

YANGO ELIMBOLI NINI?: Lokola Nzambe azali Mozalisi na yo, ayebi eloko oyo osengeli na yango mpo ozala na esengo. Ntango ozali koyekola Biblia, okoyeba makambo mingi oyo ekosalisa yo na bomoi.

Okozwa biyano na mituna na yo

BIBLIA ELOBI BOYE: “Okozwa boyebi ya Nzambe.”​—Masese 2:5.

YANGO ELIMBOLI NINI?: Koyeba ete Mozalisi azali ekoki kosalisa yo ozwa biyano na mituna ya ntina mingi mpenza, na ndakisa: Ntina ya bomoi ezali nini? Mpo na nini bampasi etondi na mokili? Ntango moto akufaka akómaka ndenge nini? Biblia ekoki kopesa yo biyano ya malamu mpenza na mituna yango.

Okozala na bomoi malamu na mikolo ezali koya

BIBLIA ELOBI BOYE: “‘Ngai nayebi malamu makanisi oyo nazali kokanisa mpo na bino,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘makanisi ya kimya, kasi ya mpasi te, mpo na kopesa bino bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.’”​—Yirimia 29:11.

YANGO ELIMBOLI NINI?: Nzambe alaki ete, na mikolo ezali koya, akolongola mabe, bampasi, ata mpe liwa. Ntango ozali kotyela bilaka ya Nzambe motema, elikya oyo ozali na yango mpo na bomoi na mikolo ezali koya ekosalisa yo oyikela mikakatano ya lelo mpiko.