Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndɛkɛ babengi sterne arctique ekamwisaka

Ndɛkɛ babengi sterne arctique ekamwisaka

BANDA kala, bato bakanisaka ete ndɛkɛ babengi sterne artique esalaka mobembo ya kilomɛtrɛ 35 200 mpo na kokende tii na nɔrdi ya mokili (pôle Nord) mpe kozonga tii na sudi ya mokili (pôle Sud). Kasi bolukiluki oyo euti kosalema mikolo oyo emonisi ete, bandɛkɛ yango epumbwaka bakilomɛtrɛ mingi koleka wana.

Sterne arctique epumbwaka nyokanyoka, ndenge emonisami na elilingi

Balatisaki bandɛkɛ yango mwa baaparɛyi oyo babengi géolocalisateurs. Mwa baaparɛyi wana, oyo ezalaka mpenza kilo te, esalisaki bato báyeba ete bandɛkɛ yango mosusu esalaki mobembo ya bakilomɛtrɛ 90 000 mpo na kokende mpe kozonga; eleki banyama nyonso oyo esalaka mibembo. Kutu, ndɛkɛ moko esalaki bakilomɛtrɛ pene na 96 000! Mpo na nini mbongwana wana?

Ata soki ndɛkɛ yango ebandi mobembo na yango na esika nini, ekendaka nyokanyoka. Ndenge emonisami na elilingi, nzela oyo bandɛkɛ yango elekaka na Océan Atlantique esali lokola lɛtrɛ S. Mpo na nini esalaka bongo? Bandɛkɛ yango epumbwaka na kolanda mopɛpɛ.

Na boumeli ya mbula soki 30 oyo ndɛkɛ yango eumelaka na bomoi, ekoki kosala mibembo ya bakilomɛtrɛ koleka milio 2,4. Yango ezali lokola kosala mobembo longwa na mabele tii na sanza, kende-zongá, mbala misato to minei! Moto moko oyo asalaka bolukiluki alobaki ete: “Yango ezali mpenza likambo ya kokamwa ete mwa ndɛkɛ oyo ezali na gramɛ soki 100 mpamba esala mibembo ya ndenge wana.” Lokola ndɛkɛ babengi sterne arctique emonaka bileko ya molunge ezala na nɔrdi to na sudi ya mokili, buku moko (Life on Earth: A Natural History) elobi ete “mbula na mbula, ndɛkɛ yango emonaka pole ya mokolo koleka bikelamu mosusu nyonso.”