Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Kitoko ya nzoto

Kitoko ya nzoto

Kotalela kitoko na ndenge ebongi ekoki kopesa moto esengo na esika epesa ye mawa.

Mpo na nini kitoko esepelisaka biso?

Ndenge bɔɔngɔ ya moto esalisaka moto atyela kitoko likebi ekamwisaka. Biblia elimboli te ndenge likambo yango esalemaka, kasi emonisi mpo na nini tosepelaka na biloko ya kitoko—Nzambe akelá biso na bizaleli lokola oyo ya ye. (Ebandeli 1:27; Mosakoli 3:11) Akelá nzoto ya moto na ndenge ya kokamwa mpe esalaka na ndenge ya kokamwa. Mpo na yango nde mokomi moko ya kala ya nzembo alobaki boye: “Nakokumisa yo [Nzambe] mpo nasalami na ndenge moko ya kokamwa, na ndenge moko ya nsɔmɔ.”Nzembo 139:14.

Lelo oyo, mbala mingi bakompanyi ya bilamba mpe bapanzi-nsango basalaka ete bato bátalela kitoko na ndenge ebongi te. Buku moko (Body Image) elobi ete mwa bolukiluki oyo esalemi na mikili ya Mpoto “emonisi ete bato mingi bamiyokaka malamu te ata soki bazali bato malamu. Bamiyokaka malamu kaka soki bazali kitoko.” Kotalela makambo ndenge wana ekoki kotinda bato bábosana eloko oyo eleki ntina—motema ya moto.1 Samwele 16:7.

Bikólo mingi etalelaka kitoko ya nzoto mpe kosangisa nzoto na ndenge ebongi te

Kotyela kitoko ya nzoto likebi mingi etambolaka nzela moko na likambo etali kosangisa nzoto, mingimingi na basi. Lapolo ya mobu 2007 ya ebongiseli moko (American Psychological Association) elobi boye: “Baankɛtɛ oyo esalemi na makambo etali bapanzi-nsango emonisi ete balobelaka basi mingimingi kaka na makambo etali kosangisa nzoto.” Soki Biblia elendisaka biso tóboya ezaleli yango, ezali na ntina!Bakolose 3:5, 6.

“Monzɛlɛ na bino ezala oyo ya libándá te . . . , kasi ezala nde bomoto oyo ebombaná, oyo ya motema, na molato oyo epɔlaka te ya elimo ya kimya mpe ya boboto, oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe.”1 Petro 3:3, 4.

Mpo na nini kotalela kitoko na ndenge oyo ebongi?

Bato mosusu balobaka boye mpo na kitoko ya nzoto: “Salelá kitoko na yo!” Lapolo ya APA ebakisi ete na bisika oyo bato mingi bakanisaka bongo, bilenge, ata mpe bana-basi oyo babandi kokóma bilenge “balingaka bato bálula bango . . . , bátala bango mpo na kitoko na bango.” Kokanisa bongo ekoki kozala likama. Kutu ndenge Lapolo yango emonisi, yango nde likambo ya libosoliboso oyo ezali kotungisa bato mpe sante na bango mpe ekoki kobimisa “ebele ya maladi oyo eyaka mpo na mpota oyo bato bazokaka na mitema.” Yango ekoki kosangisa makambo lokola komitungisa mpe “komiyina . . . , kolya malamu te, komimona ntina te mpe konyokwama na makanisi.”

“Longolá mitungisi na motema na yo, mpe longolá mpasi na nzoto na yo; mpo bolenge mpe eleko kitoko ya bomoi ezali mpamba.”Mosakoli 11:10.

Makanisi malamu emonanaka na nini?

Biblia emonisaka ete “makanisi malamu” etambolaka nzela moko na bopɔlɔ. (1 Timote 2:9) Na ndakisa: Bato ya bopɔlɔ bazalaka likolólikoló te, balekisaka ndelo te na ndenge bazali komonana na miso ya bato kasi bamitalelaka na ndenge ebongi. Batalelaka mpe ndenge bamosusu bazali komiyoka, yango wana bato basepelaka na bango, bapesaka bango limemya mpe oyo eleki nyonso, Nzambe andimaka bango. (Mika 6:8) Longola yango, ezalaka mpasi te bázwa baninga ya solosolo mpe bázwa molongani oyo akipaka kaka te kitoko ya nzoto kasi mpe kozala na libala ya esengo mpe oyo ekoumela.

Yango wana Biblia elendisaka biso tótyaka miso nde na bomoto ya kati—“bomoto oyo ebombaná, oyo ya motema.” (1 Petro 3:3, 4) Kitoko ya kati esilaka te. Kutu, ebakisamaka nde ntango mikolo ezali koleka! Masese 16:31, elobi boye: “Nsuki mpɛmbɛ ezalaka motole ya kitoko ntango yango ezwami na nzela ya boyengebene.” Na yango, bázala bilenge to mikóló, baoyo bayokaka toli ya Biblia oyo eleki toli nyonso bayebaka sekele ya kitoko oyo esilaka te, bamipesaka kilo mpe basepelaka na oyo bazali na yango.

“Bonzenga ekoki kokosa, mpe kitoko ekoki kozala mpamba; kasi mwasi oyo abangaka Yehova ye nde azwaka lokumu.”Masese 31:30.