Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISALISI MPO NA LIBOTA | KOBƆKƆLA BANA

Koteya mwana makambo etali kosangisa nzoto

Koteya mwana makambo etali kosangisa nzoto

MOKAKATANO

Kaka na mwa bambula oyo eleki, baboti bazalaki na libaku malamu ya kozala bato ya liboso ya kosolola na bana na bango makambo etali kosangisa nzoto. Mpe bakokaki kolimbolela bango makambo yango malɛmbɛmalɛmbɛ na kotalela mbula mpe mposa ya mwana.

Kasi lelo makambo ebongwani. Buku moko (The Lolita Effect) elobi boye: “Bana bazali komona makambo etali kosangisa nzoto ntango bazali naino mike mpenza mpe makambo etali kosangisa nzoto ezali kokɔta mingi na bafilme ya bana.” Yango ezali kosalisa bana to ezali nde kobebisa bango?

OYO OSENGELI KOYEBA

Makambo yango ezali bisika nyonso. Na buku na ye Talk to Me First, Deborah Roffman, akomaki ete “masolo, bapiblisite, bafilme, babuku, maloba ya nzembo, baemisyo ya televizyo, bamesaje, masano, bitanda ya bapiblisite, batelefone mpe baordinatɛrɛ etondi na bililingi mpe maloba ya kosangisa nzoto mpe yango ezali kotinda [bilenge mpe bana mingi, ata bana mike mpenza] bámona ete kosangisa nzoto ezali . . . likambo oyo eleki ntina mpenza.”

Ezali mpe foti ya bapiblisite. Bato oyo basalaka bapiblisite mpe bakomelesa batindaka baboti básombela bana bilamba oyo elamwisaka mposa ya nzoto mpe yango esalaka ete bana bákóma kotya likebi oyo esengeli te na ndenge bazali komonana na miso ya bato ntango bazali naino mike. Buku So Sexy So Soon elobi ete bato oyo basalaka bapiblisite bayebaka ete bana balingaka baninga bándima bango yango wana balingaka kobenda likebi ya bana. “Mokano na bango ezalaka ete bátɛka biloko na bango kasi te ya kotinda bana básangisa nzoto.”

Koyeba kaka ekoki te. Kaka ndenge koyeba motuka ekeseni na koyeba kokumba motuka, koyeba makambo etali kosangisa nzoto ekeseni mpe na kosalela boyebi yango mpo na kozwa bikateli ya malamu.

Na mokuse: Lelo oyo, ezali likambo ya kozwa na lisɛki te kosalisa bana báyeba kosalela “makoki na bango ya kososola” mpo báyeba “kokesenisa ná mabe ná malamu.”Baebre 5:14.

OYO OSENGELI KOSALA

Yo moko sololá na mwana. Ata soki okomona yango likambo ya nsɔni, kosolola na mwana makambo etali kosangisa nzoto ezali mokumba na yo. Ndimá yango.Toli ya Biblia: Masese 22:6.

Sololáká na ye mokemoke. Na esika osolola na mwana makambo ebele na mbala moko, salelá mwa mabaku mosusu mpo na kosolola na ye, mbala mosusu ntango bino mibale bozali kotambola na motuka to bozali kosala mosala moko boye. Mpo na kosalisa mwana afungolela yo motema, tuná mituna oyo ekosala ete apesa makanisi na ye. Na ndakisa, na esika ya kotuna, “osepelaka na bapiblisite ya boye?” okoki kotuna ye, “okanisi nini, mpo na nini bato oyo basalaka bapiblisite basalelaka bililingi ya boye mpo na kotɛka biloko na bango?” Soki mwana apesi eyano, okoki kotuna ye, “okanisi nini mpo na yango?”Toli ya Biblia: Kolimbola Mibeko 6:6, 7.

Sololá na mwana na kotalela mbula na ye. Okoki kolakisa mwana oyo akɔti naino kelasi te bankombo ya binama ya kobotela ata mpe ndenge akoki komibatela na bato oyo balukaka kobebisa bana. Ntango azali kokola, okoki koyebisa ye makambo ya ntina etali kobota. Kasi ntango abandi kokóma elenge, asengeli koyeba mpenza makambo nyonso oyo etali kosangisa nzoto.

Teyá mwana bizaleli malamu. Banda koteya mwana ntango azali naino moke makambo etali bosembo, koloba solo mpe komemya bato. Na nsima, ntango bokolobela makambo etali kosangisa nzoto, okozanga likambo ya koloba te. Lisusu, yebisá ye polele makambo oyo olingaka. Na ndakisa, soki omonaka ete kosangisa nzoto liboso ya kobala ezali mabe, yebisá ye yango. Mpe limbolelá ye mpo na nini ezali mabe mpe ekopesa ye mpasi. Buku moko Beyond the Big Talk, elobi boye: “Ezalaka mwa mpasi bilenge básangisa nzoto soki bayebi ete baboti na bango balingaka bongo te.”

Zalá ndakisa. Salelá makambo oyo olobaka. Na ndakisa, osɛkaka masɛki ya mbindo? Olataka bilamba oyo elamwisaka mposa ya nzoto? Ozalaka selesele na mwasi to mobali mosusu? Makambo wana ekoki kosala ete mwana alanda te bizaleli oyo olingi amonisa.Toli ya Biblia: Baroma 2:21.

Kolobela yango na ndenge ya mabe te. Kosangisa nzoto ezali likabo ya Nzambe mpe kosala yango na libala ekoki kopesa mwasi ná mobali oyo babalani esengo mpenza. (Masese 5:18, 19) Salisá mwana ayeba ete ntango akokola mpe akobala, ye mpe akosepela na likabo yango kozanga ete ayoka mpasi na motema mpe amitungisa ndenge ekómelaka baoyo basalaka yango liboso bábala.1 Timote 1:18, 19.