Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mosala na yo ya kosakola ezali lokola mamwɛ?

Mosala na yo ya kosakola ezali lokola mamwɛ?

MOSALA na biso ya kosakola ezali na ntina mingi mpe na motuya mingi. Kasi bato nyonso oyo topesaka litatoli bayebaka bongo te. Ata soki bato basepeli na makambo oyo Biblia elobi, bamonaka te ete ezali na ntina tóyekola na bango Biblia.

Tózwa ndakisa ya Gavin. Azalaki koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi, kasi azalaki te kolinga koyekola Biblia. Gavin alobi ete ayebaki te makambo mingi ya Biblia mpe azalaki te kolinga ete bato mosusu báyeba likambo yango. Azalaki kobanga ete bákómisa ye mondimi ya lingomba moko, mpe azalaki te kolinga ete bákosa ye. Okanisi nini? Likoki ya kosalisa Gavin ezalaki? Kanisá matomba oyo mateya ya Biblia ekoki kopesa moto. Yehova ayebisaki Bayisraele ete: “Liloba na ngai ekotanga lokola mamwɛ, lokola mbula moke likoló ya matiti.” (Kolimbola Mibeko 31:19, 30; 32:2) Tiká tóyekola makambo mosusu oyo etali mamwɛ mpe tókokanisa yango na mosala na biso ya kosakola mpo tókoka kosalisa “bato ya ndenge nyonso.”​—1 Timote 2:3, 4.

NA NDENGE NINI MOSALA NA BISO YA KOSAKOLA EZALI LOKOLA MAMWƐ?

Mamwɛ ekitaka malɛmbɛmalɛmbɛ, na boboto. Mamwɛ ebandaka boye: mopepe ya malili ebongwanaka mokemoke matangá mikemike ya mai. Ndenge nini maloba ya Yehova ezalaki ‘kotanga lokola mamwɛ’? Azalaki koloba na basaleli na ye na boboto, mpe na ndenge oyo ebongi mpenza. Tomekolaka ye ntango tomonisaka limemya mpo na mateya oyo basusu bandimaka. Tolendisaka bango básosola bango moko mpe bázwa bikateli bango moko. Soki totyeli bato likebi ya ndenge wana, ekozala mpasi te bándima makambo oyo tozali koloba, mpe mosala na biso ekobota mbuma mingi.

Mamwɛ epesaka mwa malili. Mosala na biso ya kosakola ekoki kokitisa basusu mitema soki tokanisi mayele ndenge na ndenge mpo na kosalisa bango báyeba makambo mingi oyo etali mateya ya solo. Chris, ndeko mobali ya liboso oyo asɛngaki Gavin báyekola Biblia, andimisaki ye na makasi te. Alukaki nde mayele ndenge na ndenge mpo Gavin akóma kosepela na masolo ya Biblia. Ndeko Chris ayebisaki Gavin ete Biblia ezali na nsango moko ya ntina mingi mpe ete koyekola yango ekosalisa ye akanga ntina ya makita malamu koleka. Na nsima, ndeko Chris alimbolaki ete bisakweli ya Biblia endimisaki ye moko ete Biblia elobaka solo. Yango esalaki ete bákóma kosolola masolo mingi oyo elobeli kokokisama ya bisakweli. Masolo yango ekitisaki Gavin motema, mpe nsukansuka andimaki koyekola Biblia.

Mamwɛ ezali na ntina mingi mpo na bomoi. Na eleko ya molunge na Yisraele, mbala mosusu mbula enɔkaka te na boumeli ya basanza mingi. Soki malili ya mamwɛ ezali te, milona ekoki kokauka mpe kokufa. Yehova asakolaki ete na mikolo na biso ekozala lokola eleko ya kokauka, elingi koloba ete bato bakozala na mposa ya “koyoka maloba ya Yehova.” (Amose 8:11) Alakaki ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo bakozala “lokola mamwɛ oyo euti epai ya Yehova” ntango bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe “bampate mosusu” bazali kopesa bango mabɔkɔ. (Mika 5:7; Yoane 10:16) Nsango oyo tosakolaka ezali na kati ya bibongiseli oyo Yehova azwi mpo na kopesa bomoi epai ya baoyo bazali na mposa ya solo. Tozwaka nsango yango na motuya mingi?

Mamwɛ ezali lipamboli oyo euti na Yehova. (Kolimbola Mibeko 33:13) Mosala na biso ya kosakola ekoki kozala lipamboli, to likabo epai ya baoyo bazali kondima nsango yango. Boyekoli ya Biblia ezalaki lipamboli mpo na Gavin mpo esalisaki ye azwa biyano na mituna na ye nyonso. Akolaki nɔki na elimo, azwaki batisimo, mpe lelo oyo asepelaka kosakola nsango malamu ya Bokonzi elongo na mwasi na ye, Joyce.

Batatoli ya Yehova batondisi mabele na nsango malamu ya Bokonzi

ZWÁ MOSALA NA YO YA KOSAKOLA NA MOTUYA MINGI

Kokokanisa mosala na biso ya kosakola na mamwɛ ekoki mpe kosalisa biso tóyeba ete milende oyo mokomoko na biso asalaka mpo na kosakola ezali na motuya mingi. Na ndenge nini? Litangá moko ya mai esalaka mpenza eloko te, kasi bamilio ya matangá ya mai epɔlisaka mabele. Ndenge moko mpe, oyo tosalaka na mosala ya kosakola ekoki komonana moke na miso na biso. Kasi soki tosangisi milende oyo bamilio ya Batatoli ya Yehova basalaka, litatoli ezali kopesama “na bikólo nyonso.” (Matai 24:14) Mosala na biso ya kosakola ekozala lipamboli ya Yehova mpo na basusu? Ɛɛ, nsango na biso ekozala kaka lokola mamwɛ, elingi koloba, ekokita malɛmbɛmalɛmbɛ, na boboto, ekopesa mwa malili, mpe ekozala na ntina mingi mpo na bomoi!