Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mpo na nini kosukola mabɔkɔ ebimisaki matata epai ya banguna ya Yesu?

Yango ezalaki kaka moko ya ebele ya makambo oyo banguna ya Yesu bazalaki koloba mabe mpo na ye mpe bayekoli na ye. Mibeko ya Moize elimbolaki makambo oyo ekokaki kokómisa moto mbindo, na ndakisa salite oyo ebimaka na nzoto, maladi ya maba, to kosimba ebembe ya moto to ya nyama. Mibeko epesaki mpe malako mpo na ndenge oyo moto akokaki kokóma lisusu pɛto. Yango ekokaki kosalema na nzela ya mbeka, kosukola, to koningisa.​—Balevi, mokapo 11-15; Mitángo, mokapo 19.

Bateyi ya Bayuda, oyo bayebanaki na nkombo ya Barabi, babakisaki malako mosusu na mibeko wana. Mokanda moko elobi ete Barabi basalaki malako mosusu ebeleebele mpo na makambo oyo ekokaki kokómisa moto pɛto mpe ndenge oyo moto akokaki kokómisa basusu mbindo. Barabi batyaki mpe mibeko mpo na lolenge ya basaani, banzungu, to biloko oyo ekokaki kokóma mbindo to kokóma mbindo te mpe milulu oyo bato basengelaki kosala mpo na kokóma lisusu pɛto.

Banguna ya Yesu batunaki ye boye: “Mpo na nini bayekoli na yo bazali komitambwisa te na kolanda bonkɔkɔ oyo euti na bato ya kala, kasi bazali kolya biloko na mabɔkɔ mbindo?” (Marko 7:5) Bafarisai wana bazalaki te kolobela bopɛto ya nzoto, oyo esɛngaka kosukola mabɔkɔ liboso ya kolya. Bafarisai batyaki mobeko ete liboso moto alya, esengelaki kosopela ye mai na mabɔkɔ, mpo yango ezalaki molulu moko ya kopɛtolama. Mokanda oyo tolobeli liboso ebakisi ete Barabi “bakataki saani ya ndenge nini esengelaki kosalela mpo na kosopela moto mai yango, mai ya ndenge nini esengeli kosalela, nani asengeli kosopela moto mai, mpe esika nini na lobɔkɔ mai esengelaki kosuka.”

Yesu asalaki nini na mibeko wana nyonso oyo bato babakisaki? Ayebisaki bakambi ya lingomba ya Bayuda ete: “Yisaya asakolaki malamu mpo na bino, bakosi, se ndenge ekomamá: ‘Bato oyo bazali kokumisa ngai na mbɛbu na bango, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai [Yehova]. Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo mateya oyo bazali koteya ezali nde mibeko ya bato.’ Botiki mobeko ya Nzambe, bozali kokangama makasi na bonkɔkɔ ya bato.”​—Marko 7:6-8.