Mituna ya batángi
Longola mana mpe ndɛkɛ na nkombo kayɛ, Bayisraele bazalaki na eloko mosusu ya kolya na esobe?
Mana ezalaki bilei ya libosoliboso ya Bayisraele na boumeli ya mbula 40 oyo balekisaki na esobe. (Kob. 16:35) Yehova apesaki bango mpe bandɛkɛ na nkombo kayɛ na mabaku mibale. (Kob. 16:12, 13; Mit. 11:31) Kasi, Bayisraele bazalaki mpe na mwa biloko mosusu ya kolya.
Na ndakisa, na bantango mosusu Yehova azalaki komema bato na ye na “esika ya kopema” epai mai ná biloko ya kolya ezalaki. (Mit. 10:33) Moko ya bisika yango ezalaki Elime, “esika [oyo] ezalaki na maziba ya mai 12 mpe nzete ya mbila 70,” na ntembe te mbila ya date. (Kob. 15:27) Buku moko (Plants of the Bible) elobi ete nzete ya mbila ya date, oyo “ekolaka na bisika ndenge na ndenge, . . . ezali nzete ya mbuma ya kolya oyo basalelaka mingi na esobe, epesaka bilei, mafuta mpe esika ya kopema na bamilio ya bato.”
Mbala mosusu Bayisraele bapemaki mpe na esobe moko oyo ezalaki na mai mpe milona, oyo eyebani lelo na nkombo Feiran, na Wadi ya Feiran. a Buku mosusu (Discovering the World of the Bible) elobi: “Lobwaku yango ya mokɛli ezali na molai ya kilomɛtrɛ 130 mpe ezali moko ya mabwaku ya mokɛli oyo eleki milai, eleki kitoko mpe eyebani mingi na Sinai.” Ebakisi boye: “Na kilomɛtrɛ 45 longwa esika oyo lobwaku yango ya mokɛli ekutani na mbu, okokuta esobe ya Feiran, oyo ezali soki na mɛtrɛ 610 likoló ya mbu. Ezali Elanga ya Edene ya Sinai. Bankóto ya bato ya mimbongo ya ntango ya kala bazalaki kokende na esika yango oyo etondi na nzete ya mbila ya date.”
Ntango Bayisraele babimaki na Ezipito, bamemaki pɔtɔpɔtɔ ya farini, basaani mpo na kobɛta pɔtɔpɔtɔ, mpe mbala mosusu mwa mbuma mpe mafuta. Na ntembe te biloko yango eumelaki ntango molai te. Bamemaki mpe “bitonga ya bampate mpe bitonga ya bangɔmbɛ, ebele mpenza ya bibwɛlɛ.” (Kob. 12:34-39) Kasi lokola bomoi na esobe ezali mpasi, banyama mingi ekufaki. Ekoki kozala ete Bayisraele balyaki banyama mosusu. Banyama mosusu epesamaki mbeka, ata mpe epai ya banzambe ya lokuta. b (Mis. 7:39-43) Nzokande, Bayisraele bazalaki kobɔkɔla mwa banyama, mpo ntango bazangaki mpenza kondima, Yehova alobaki na bango: “Bana na bino bakokóma babateli ya mpate na esobe mbula 40.” (Mit. 14:33) Na yango, ekoki kozala ete banyama na bango ezalaki kopesa bango miliki mpe na mabaku mosusu mosuni ya kolya, kasi emonani ete ekokaki te mpo na bato soki milio 3 na boumeli ya mbula 40. c
Epai wapi banyama ezalaki kozwa bilei mpe mai? d Na ntango yango, mbala mosusu mbula ezalaki konɔka mingi mpe ezalaki na milona mingi na esobe. Buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 1, elobi ete eleki sikoyo mbula 3500, “mai ezalaki mpenza mingi na Arabie koleka ndenge ezali lelo oyo. Ebele ya mabulu mpe mabwaku oyo ekauká makasi, oyo kala ezalaki bibale, emonisi ete na kala, mbula ezalaki kobɛta mingi mpe bibale ezalaki wana.” Atako bongo, esobe ezalaki esika ekauká mpe ya kobangisa. (Mib. 8:14-16) Soki Yehova abimiselaka bango mai te na ndenge ya likamwisi, na ntembe te Bayisraele ná banyama na bango balingaki kokufa bango nyonso.—Kob. 15:22-25; 17:1-6; Mit. 20:2, 11.
Moize ayebisaki Bayisraele ete Yehova aleisaki bango na mana “mpo [báyeba] ete moto abikaka kaka na mampa te, kasi abikaka na liloba nyonso oyo euti na monɔkɔ ya Yehova.”—Mib. 8:3.
a Talá lisolo oyo ezali ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/1992, nk. 24-25.
b Biblia elobeli mabaku mibale oyo banyama epesamaki mbeka epai ya Yehova na esobe. Libaku ya liboso ezalaki ntango bonganga-nzambe etyamaki; libaku ya mibale ezalaki na fɛti ya Elekeli. Milulu nyonso mibale esalemaki na 1512 L.T.B., na mbula ya mibale nsima ya kobima ya Yisraele na Ezipito.—Lev. 8:14–9:24; Mit. 9:1-5.
c Pene na nsuka ya mbula 40 na esobe, Bayisraele bazwaki banyama ebele oyo bapunzaki na bitumba. (Mit. 31:32-34) Atako bongo, bakobaki kolya mana tii ntango bakɔtaki na Mokili ya Ndaka.—Yos. 5:10-12.
d Eloko moko te emonisi ete banyama ezalaki kolya mana, mpo Yehova ayebisaki bato ete bálɔkɔtaka yango na kotalela oyo moto mokomoko akolya.—Kob. 16:15, 16.