Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 44

Yekoláká Liloba ya Nzambe na likebi mpenza

Yekoláká Liloba ya Nzambe na likebi mpenza

‘Sosoláká malamumalamu bonene, bolai, bosanda mpe bozindo.’—EF. 3:18.

LOYEMBO 95 Pole ezali kongɛnga se kongɛnga

NA MOKUSE a

1-2. Wapi lolenge eleki malamu ya kotánga mpe koyekola Biblia? Pesá ndakisa.

 KANISÁ ete olingi kosomba ndako moko. Makambo nini okolinga kotala liboso ozwa ekateli? Okotala kaka fɔtɔ oyo emonisi liboso ya ndako yango? Na ntembe te, okolinga ete yo moko otala ndako yango, otambola zingazinga na yango, okɔta na kati mpo na kotala biteni na yango nyonso, mpe otala eloko nyonso na likebi. Okoki kutu kosɛnga plan ya ndako yango mpo oyeba ndenge oyo batongaki yango. Ya solo, okosepela kotala makambo nyonso oyo etali ndako oyo olingi kosomba.

2 Tokoki kosala mpe bongo ntango tozali kotánga mpe koyekola Biblia. Moto moko ya mayele alobaki ete nsango ya Biblia “ezali lokola ndako moko ya monene mpenza, mpe ya molai mpenza oyo ezali na miboko oyo ekɔtá mpenza na nse.” Na yango, ndenge nini okoki koyeba malamu makambo oyo ezali na Biblia? Soki otángi yango kaka mbangumbangu, okoki koyeba kaka makambo na mokuse, “mateya ya ebandeli ya maloba mosantu ya Nzambe.” (Ebr. 5:12) Kasi, ndenge moko na ndako oyo tolobeli, osengeli kokɔta “na kati” mpo omona makambo mikemike oyo ekosalisa yo okanga malamu ntina ya Biblia. Lolenge eleki malamu ya koyekola Biblia ezali ya komona ndenge oyo makambo oyo elobi na esika moko eyokani na makambo oyo elobi na esika mosusu. Salá makasi osukaka kaka te na koyeba makambo oyo ondimaka kasi mpe ntina oyo ondimaka yango.

3. Ntoma Paulo alendisaki bandeko na ye bakristo básala nini, mpe mpo na nini? (Baefese 3:​14-19)

3 Mpo tókanga malamumalamu ntina ya Liloba ya Nzambe, tosengeli koyekola mateya na yango ya mozindo. Ntoma Paulo alendisaki bandeko na ye bakristo báyekolaka Liloba ya Nzambe na likebi mpenza mpo bázala na “likoki ya kososola malamumalamu bonene, bolai, bosanda mpe bozindo” ya mateya ya solo. Na ndenge yango, ‘bakopika misisa mpe bakotɛlɛma lisusu makasi’ na kondima na bango. (Tángá Baefese 3:​14-19.) Biso mpe tosengeli kosala bongo. Tótalela sikoyo ndenge oyo tokoki koyekola Liloba ya Nzambe mpo tómona kitoko ya biloko ya motuya oyo ezali na kati.

YEKOLÁKÁ MATEYA MOZINDO YA BIBLIA

4. Ndenge nini tokoki kokómisa boninga na biso ná Yehova makasi? Pesá bandakisa.

4 Lokola tozali bakristo, tolingaka te kosuka kaka na mateya ya ebandeli ya Biblia. Na lisalisi ya elimo santu ya Nzambe, tosepelaka koyekola ‘ata makambo mozindo ya Nzambe.’ (1 Ko. 2:​9, 10) Mpo na nini te omityela mokano ya koyekola likambo moko na mozindo mpo okómisa boninga na yo na Yehova makasi? Na ndakisa, okoki koyekola na likebi ndenge Yehova amoniselaki basaleli na ye ya ntango ya kala bolingo mpe ndenge oyo yango emonisi ete alingaka mpe yo. Okoki mpe kotalela ebongiseli ya losambo oyo Yehova atyaki na Yisraele mpe kokokanisa yango na ebongiseli ya losambo oyo atye mpo na bakristo lelo oyo. To okoki koyekola na mozindo bisakweli oyo Yesu akokisaki na bomoi mpe mosala na ye awa na mabele.

5. Likambo nini okosepela koyekola yo moko na mozindo?

5 Bandeko mosusu oyo balingaka koyekola Biblia na mozindo balobelaki mwa makambo oyo bakolinga koyekola na likebi mpenza na Liloba ya Nzambe. Makambo mosusu oyo balobelaki ezali na etanda “ Makambo ya koyekola yo moko na mozindo.” Okoyoka esengo mpenza soki oyekoli makambo yango na lisalisi ya Index des Publications des Témoins de Jéhovah to ya Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova. Koyekola Biblia na mozindo ekoki kokómisa kondima na yo makasi mpe kosalisa yo ‘ozwa boyebi ya Nzambe.’ (Mas. 2:​4, 5) Tótalela sikoyo mwa mateya ya mozindo ya Biblia oyo tokoki koyekola na likebi.

TALELÁ MOKANO YA NZAMBE NA MOZINDO

6. (a) Bokeseni nini ezali kati na mwango mpe mokano? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete mokano ya Yehova mpo na bato mpe mabele ezali ya “seko”? (Baefese 3:11)

6 Na ndakisa, tótalela oyo Biblia elobi mpo na mokano ya Nzambe. Ezali na bokeseni monene kati na mwango mpe mokano. Mwango ezali lokola nzela kaka moko mpe ya sikisiki oyo ekoki komema yo na esika oyo ozali kokende. Kasi, mwango ekolonga te soki eloko moko ekangi nzela oyo oponaki. Mokano ezali kaka lokola esika oyo olingi kokende. Oyebi malamu esika oyo olingi kokende, kasi ozali kaka na nzela moko te mpo na kokóma kuna. Okoki kozwa nzela mosusu soki esengeli. Likambo ya esengo, Yehova amonisi mokemoke ‘mokano na ye ya seko’ na kati ya Biblia. (Ef. 3:11) Ata soki azwi nzela nini, alongaka kaka mpo “asalá eloko nyonso mpo na mokano na ye.” (Mas. 16:4) Mpe mbuma ya makambo oyo Yehova asalaka ekoumela libela na libela. Mokano ya Yehova ezali nini, mpe bambongwana nini asali mpo na kokokisa yango?

7. Ndenge nini Yehova abongolaki lolenge oyo alingaki kokokisa mokano na ye? (Matai 25:34)

7 Nzambe ayebisaki mwasi ná mobali ya liboso mokano na ye mpo na bango. Alobaki na bango ete: “Bóbota mpe bókóma mingi, bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino, mpe bózala na bokonzi likolo ya . . . ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi” na mabele. (Eba. 1:28) Ntango Adama ná Eva batombokaki, mpe bakɔtisaki lisumu na libota ya bato, mokano ya Yehova esukaki te. Abongolaki nzela mpo na kokokisa mokano na ye. Na mbala moko, Yehova azwaki ekateli ya kotya Bokonzi moko na likoló oyo ekokokisa mokano oyo azalaki na yango na ebandeli mpo na bato mpe mabele. (Tángá Matai 25:34.) Na ntango oyo ebongi, na bolingo na ye, Yehova atindaki Mwana na ye ya liboso na mabele mpo na koteya bato makambo etali Bokonzi yango mpe kopesa bomoi na ye lisiko mpo na kosikola biso na lisumu mpe na liwa. Na nsima, Yesu asekwaki mpe azongaki na likoló mpo na koyangela lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. Kasi makambo ya kotalela na oyo etali mokano ya Nzambe esuki wana te.

Kanisá ntango oyo bikelamu nyonso ya mayele na likoló mpe na mabele bakozala na bomoko mpe bakozala sembo epai ya Yehova! (Talá paragrafe 8)

8. (a) Motó ya likambo ya Biblia ezali nini? (b) Ndenge Baefese 1:​8-11 emonisi yango, mokano monene ya Yehova ezali nini? (Talá eliingi ya ezipeli.)

8 Motó ya likambo monene ya Biblia ezali ete nkombo ya Yehova ekolongisama wana akokokisa mokano na ye mpo na mabele na nzela ya Bokonzi na ye oyo Kristo azali koyangela. Mokano ya Yehova ekoki kobongwana te. Alaki ete akokokisa yango kaka ndenge alobaki. (Yis. 46:​10, 11, msl; Ebr. 6:​17, 18) Na nsima, mabele ekobongwana paradiso, esika oyo bakitani ya Adama oyo bakozala bato ya kokoka mpe ya sembo ‘bakosepela na bomoi mpo na libela.’ (Nz. 22:26) Kasi, Yehova azali na mokano moko monene koleka. Mokano monene ya Yehova ezali ya kosangisa na bomoko bikelamu na ye nyonso ya mayele ya likoló mpe ya mabele. Na ntango yango, baoyo nyonso bakozala na bomoi bakozala sembo mpe bakotosa Mokonzi oyo aleki nyonso, Yehova. (Tángá Baefese 1:​8-11.) Ezali kokamwisa mpenza komona ndenge oyo Yehova azali kokokisa malamu mokano na ye!

KANISÁ BOMOI OYO OKOZALA NA YANGO NA MIKOLO EKOYA

9. Kotánga Biblia ekosalisa biso tómona nini mpo na mikolo ezali koya?

9 Tótalela esakweli oyo Yehova abimisaki na elanga ya Edene, oyo ezali na Ebandeli 3:15. b Elobelaki makambo oyo ekokokisa mokano na ye, kasi makambo yango esengelaki kosalema bankóto ya bambula na nsima. Na ndakisa, Abrahama asengelaki kobota mwana, elingi koloba kobimisa molɔngɔ oyo ekomema na kobotama ya Kristo. (Eba. 22:​15-18) Na nsima, na mobu 33 T.B., bazokisaki Yesu na litindi, ndenge esakolamaki. (Mis. 3:​13-15) Likambo ya nsuka oyo esakweli yango elobelaki, elingi koloba, kopanza motó ya Satana, ekosalema na mikolo ezali koya, nsima ya bambula koleka nkóto. (Em. 20:​7-10) Lisusu, Biblia emonisi makambo mosusu oyo ekosalema ntango bonguna kati na mokili ya Satana mpe ebongiseli ya Yehova ekokóma na nsuka.

10. (a) Makambo nini ekosalema mosika te? (b) Ndenge nini tokoki kobongisa makanisi mpe motema na biso? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

10 Kanisá makambo minene oyo ekoningisa mabele, oyo Biblia esakoli. Ya liboso, bikólo ekoloba “kimya, likambo ya kobanga ezali te!” (1 Tes. 5:​2, 3) “Na mbala moko,” bolɔzi monene ekobanda ntango bikólo ekobundisa mangomba nyonso ya lokuta. (Em. 17:16) Na nsima, ekoki kozala na likambo moko ya kokamwa, mbala mosusu bato bakomona, “Mwana ya moto azali koya na mapata ya likoló na nguya mpe na nkembo mingi.” (Mat. 24:30) Yesu akosambisa bato, akokabola bampate ná bantaba. (Mat. 25:​31-33, 46) Na ntango yango, Satana akokoba kaka kotɛmɛla Yehova. Lokola ayinaka bato ya Nzambe, akotinda etuluku ya bikólo oyo esangani oyo Biblia ebengi Goge ya mokili ya Magoge ebundisa basaleli ya Yehova. (Ezk. 38:​2, 10, 11) Na ntango moko boye, bakristo oyo batyami mafuta oyo bakozala naino na mabele bakoyanganisama na likoló mpo bázala elongo na Kristo mpe mampinga ya likoló mpo na kobunda na etumba ya Armagedone, oyo ekosukisa bolɔzi monene. c (Mat. 24:31; Em. 16:​14, 16) Na nsima, Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo ekobanda na mabele mobimba.—Em. 20:6.

Boyokani na yo ná Yehova ekokóma makasi ndenge nini nsima ya koyekola makambo na ye na boumeli ya bamiliare ya bambula? (Talá paragrafe 11)

11. Elikya ya kozala na bomoi ya seko elakisi nini mpo na yo? (Talá mpe elilingi.)

11 Sikoyo, kanisá makambo oyo ekosalema nsima ya mbula nkóto yango. Biblia elobi ete Mozalisi na biso “atyá na mitema [na biso] mposa ya kozala na bomoi ya seko.” (Mos. 3:11) Kanisá oyo yango elakisi mpo na yo mpe boninga na yo ná Yehova. Buku Pusaná penepene na Yehova, lokasa 319 elobi boye: “Nsima ya koumela na bomoi bambula nkama na nkama, nkóto na nkóto, bamilio na bamilio, ata mpe bamiliare na bamiliare, tokoyeba Yehova Nzambe malamu koleka ndenge toyebi ye sikoyo. Kasi tokomona kaka ete makambo malamu ya koyekola etikali naino ebele. . . . Tokoki ata moke te kokanisa makambo ya kosepelisa ndenge na ndenge oyo ekozala na bomoi ya seko, mpe kopusana penepene na Yehova nde ekozala ntango nyonso mbano oyo eleki malamu na bomoi yango.” Kasi liboso ntango yango ekóma, wana tozali kokoba koyekola Liloba ya Nzambe, makambo nini mosusu tokoki koyekola na mozindo?

MEKÁ KOMONA MAKAMBO OYO EZALI NA LIKOLÓ

12. Ndenge nini tokoki komona na makanisi makambo oyo ezali na likoló? Pesá ndakisa.

12 Liloba ya Nzambe elobeli kaka mwa moke ndenge Yehova azali “na bisika oyo etombwaná.” (Yis. 33:5) Biblia emonisi makambo ya kokamwa mpo na Yehova mpe eteni ya likoló ya ebongiseli na ye. (Yis. 6:​1-4; Dan. 7:​9, 10; Em. 4:​1-6) Na ndakisa, tokoki kotánga makambo ya kokamwa oyo Ezekiele amonaki ntango ‘likoló efungwamaki mpe abandaki komona bimonaneli ya Nzambe.’—Ezk. 1:1.

13. Nini esepelisaka yo mpo na mokumba ya Yesu na likoló, ndenge emonisami na Baebre 4:​14-16?

13 Kanisá mpe mokumba oyo Yesu azali na yango na likoló lokola Mokonzi na biso oyo azali koyangela mpe Nganga-nzambe monene oyo atondi na motema mawa. Na nzela na ye tokoki kopusana penepene “na kiti ya bokonzi ya boboto monene” ya Nzambe na libondeli mpe kosɛnga ye ayokela biso mawa mpe asalisa biso na “ntango tozali na mposa ya lisalisi.” (Tángá Baebre 4:​14-16.) Tólekisaka ata mokolo moko te kozanga tókanisa makambo oyo Yehova ná Yesu basali mpe bazali kosala mpo na biso na likoló. Ndenge oyo balingaka biso esengeli kosimba mpenza mitema na biso mpe kotinda biso tózala na molende na mosala na biso mpe na losambo na biso.—2 Ko. 5:​14, 15.

Kanisá esengo oyo okozala na yango na mokili ya sika, koyeba ete osalisaki basusu bákóma Batatoli ya Yehova mpe bayekoli ya Yesu! (Talá paragrafe 14)

14. Wapi lolenge moko oyo eleki malamu ya komonisa ete tozali mpenza na botɔndi epai ya Yehova mpe Yesu? (Talá mpe bililingi.)

14 Lolenge moko oyo eleki malamu ya komonisa ete tozali mpenza na botɔndi epai ya Yehova mpe Mwana na ye, ezali ya kosala makasi mpo na kosalisa basusu bákóma Batatoli ya Yehova mpe bayekoli ya Yesu. (Mat. 28:​19, 20) Yango nde ntoma Paulo asalaki mpo azalaki na botɔndi epai ya Nzambe mpe Kristo. Ayebaki ete mposa ya Nzambe ezali ete “bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Tim. 2:​3, 4) Abomaki nzoto na mosala ya kosakola mpo na kosalisa bato ebele na ndenge oyo akoki ‘mpo ata ndenge nini, abikisa bamosusu.’—1 Ko. 9:​22, 23.

SEPELÁ KOYEKOLA LILOBA YA NZAMBE NA LIKEBI MPENZA

15. Na kotalela Nzembo 1:​2, nini ekopesa biso esengo?

15 Mokomi ya nzembo alobaki ete moto ya esengo, oyo alongaka na makambo nyonso oyo azali kosala, ezali moto oyo “asepelaka na mobeko ya Yehova” mpe oyo “amanyolaka mobeko na Ye butu moi.” (Nz. 1:​1-3; msl.) Na komantɛrɛ oyo asalaki mpo na vɛrsɛ yango na buku na ye (Studies in the Psalms), Joseph Rotherham, oyo azali mobongoli ya Biblia alobaki ete moto asengeli “kosepela mingi mpenza na litambwisi ya Nzambe na boye ete akoluka yango, akoyekola yango, mpe akolekisa ntango mingi na kokanisa yango.” Abakisaki ete motángi ya Biblia akoki “komona ete asali eloko te na mokolo soki azwaki te ntango ya koyekola yango mpo na kozwa bwanya na yango.” Okoki kosepela na boyekoli ya Biblia soki ozali kosala nyonso olandela makambo ya mikemike ya ntina mpe omona ndenge makambo nyonso ezali na boyokani. Ezali esengo mpenza kososola bonene, bolai, bosanda mpe bozindo ya Liloba ya Nzambe!

16. Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

16 Mateya ya solo oyo Yehova azali koteya biso na Liloba na Ye eleki mpasi te mpo tókanga ntina na yango. Na lisolo oyo elandi, tokomona moko ya mateya ya mozindo—tempelo monene ya elimo ya Yehova, oyo Paulo alobelaki na mokanda na ye epai ya bakristo Baebre. Na ntembe te, kotalela na mozindo lisolo yango ekopesa yo esengo mingi.

LOYEMBO 94 Botɔndi mpo na Liloba ya Nzambe

a Koyekola Biblia ekoki kopesa biso esengo bomoi na biso mobimba. Epesaka biso matomba mpe esalaka ete tópusana penepene ya Tata na biso ya likoló. Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo tokoki koyekola Liloba ya Nzambe na ‘bonene, bolai, bosanda mpe na bozindo.’

b Talá lisolo “Esakweli moko ya kala oyo ezali na ntina mingi mpo na yo” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 07/2022.

c Mpo na koyeba ndenge ya komibongisa mpo na makambo oyo ekoningisa mabele na mikolo ezali koya, talá buku Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela! lok. 230.