Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Likanisi mpo na koyekola

Likanisi mpo na koyekola

Kangáká “nzembo ya elimo” na motó

“Ntango nazali na mitungisi, Yehova alendisaka ngai na nzela ya banzembo oyo ebimaka na emisyo ya TV JW®.”—Lorraine, États-Unis.

“Nzembo ya elimo” ezalaka ntango nyonso na kati ya losambo ya bakristo. (Kol. 3:16) Soki okangi banzembo yango na motó, ekosalisa yo ata ntango ozali na buku ya nzembo te to aparɛyi. Meká kosalela mwa makanisi oyo elandi mpo okanga mwa banzembo na motó.

  • Tángáká na likebi maloba ya nzembo mpo oyeba malamu ndimbola na yango. Ntango oyebi malamu ndimbola ya likambo moko, ezalaka pɛtɛɛ etikala yo na motó. Maloba ya banzembo na biso nyonso, ata mpe banzembo mosusu mpe banzembo mpo na bana, ezali na site jw.org. Kɔtá na Bibliotɛkɛ, mpe kende na Miziki.

  • Komá maloba ya nzembo yango na papye. Kosala bongo ekosalisa yo okanga yango mpenza malamu na motó.—Mib. 17:18.

  • Tángá to yembá na mongongo makasi. Tángáká to yembáká yango mbala na mbala.

  • Zongelá na motó banzembo oyo okangi. Mekáká kozongela maloba ya nzembo kozanga kotala na papye, mpe na nsima talá soki okangi yango malamu.