LISOLO YA BOMOI
Nazwaki libateli ya solosolo mpo natyelaki Yehova motema
Ntango bato batunaka ngai mpo na bomoi na ngai, mbala mingi nayebisaka bango, “nazali bisaka na mabɔkɔ ya Yehova!” Elingi koloba, kaka ndenge namemaka bisaka na ngai esika nyonso oyo nalingi, nalingaka mpe Yehova ná ebongiseli na ye básala mpe bongo epai na ngai—bámema ngai esika oyo balingi mpe na ntango oyo balingi. Nandimá mikumba oyo esɛngaka ngai komipimela mpe na bantango mosusu ezalaka na makama. Kasi nayekoli ete kotyela Yehova motema ezali mpenza libateli ya solosolo.
NABANDI BOMOI YA KOTYELA YEHOVA MOTEMA
Nabotamá na 1948 na mboka moko ya moke na sudi-wɛsti ya Nigeria. Na ntango yango, leki ya tata na ngai Moustapha, mpe na nsima yaya na ngai ya mobali Wahabi, bazwaki batisimo mpe bakómaki Batatoli ya Yehova. Ntango nakómaki na mbula libwa, tata na ngai akufaki. Nayokaki mpasi mingi na motema. Wahabi ayebisaki ngai ete tokoki komona lisusu tata na lisekwa. Likanisi wana ya kobɔndisa etindaki ngai nayekola Biblia. Nazwaki batisimo na 1963. Bandeko na ngai mosusu misato ya mibali mpe bazwaki batisimo.
Na 1965, nakendaki epai ya yaya na ngai ya mobali Wilson na Lagos mpe nasepelaki mingi kozala elongo na babongisi-nzela mosusu ya sanza na sanza na lisangá ya Igbobi. Esengo mpe molende na bango elendisaki ngai, mpe na sanza ya yambo 1968, ngai mpe nakómaki mobongisi-nzela.
Albert Olugbebi, ndeko moko oyo azalaki kosala na Betele, asalaki likita moko ya sipesiale ná biso bilenge mpo na mposa ya babongisi-nzela minene oyo ezalaki na nɔrdi ya Nigeria. Nabosanaka te maloba ya ndeko Olugbebi oyo ya kolendisa: “Bozali bilenge, Yis. 6:8.
mpe bokoki kosalela ntango mpe makasi na bino mpo na Yehova. Bozali na mingi ya kosala kuna!” Nazalaki na mposa makasi ya komekola elimo ya komipesa ya mosakoli Yisaya, yango wana natondisaki formilɛrɛ.—Na sanza ya mitano 1968, nakómaki mobongisi-nzela monene na engumba Kano, na nɔrdi ya Nigeria. Ezalaki na ntango ya etumba ya bana-mboka (Guerre du Biafra 1967-1970), oyo ebebisaki esika yango liboso ete etumba yango ekende na ɛsti ya Nigeria. Ndeko moko alukaki kondimisa ngai ete nakende te. Kasi nayebisaki ye: “Matɔndi ndenge ozali komibanzabanza mpo na ngai. Kasi, soki Yehova alingi nasalela ye kuna, na ntembe te akozala elongo na ngai.”
KOTYELA YEHOVA MOTEMA NA ESIKA OYO ETUMBA EBEBISI
Ezalaki mawa komona ndenge Kano ekómaki. Etumba yango ya bana-mboka ebebisaki engumba yango ya monene. Ntango tozalaki kosakola, na bantango mosusu tozalaki koleka bibembe ya baoyo babomamaki na ntango ya etumba yango. Kano ezalaki na masangá mingi, kasi bandeko mingi bakimaki. Kaka basakoli soki 15 nde batikalaki, balɛmbaki nzoto mpe bazalaki kobanga mpenza. Bandeko mibali mpe basi yango basepelaki mingi ntango babongisi-nzela motoba kati na biso toyaki. Tolendisaki bango mpe bamiyokaki malamu. Tosalisaki bango bázongela makita mpe mosala ya kosakola, bábanda kotinda lapolo mpe básɛngaka mikanda na Betele.
Biso babongisi-nzela minene tokómaki koyekola monɔkɔ ya Hausa. Bato mingi ya esika yango basepelaki koyoka nsango malamu na monɔkɔ na bango mpenza. Kasi, bato ya lingomba ya monene ya engumba Kano bazalaki kolinga te tósakola, yango wana tosengelaki kozala mpenza ekɛngɛ. Na libaku moko, mobali moko alandaki ngai ná ndeko tozalaki na ye na mbeli. Tokimaki mpenza mbangu mpe azwaki biso te! Atako makama wana, Yehova ‘apesaki biso kimya’ mpe motángo ya basakoli ekómaki komata. (Nz. 4:8) Lelo oyo, basakoli koleka 500 bazali na masangá 11 na Kano.
BOTƐMƐLI NA NIGER
Na sanza ya mwambe 1968, nsima ya kosala mwa basanza na Kano, batindaki biso na
Niamey, engumba-mokonzi ya ekólo Niger, elongo na babongisi-nzela mosusu mibale. Mwa moke nsima ya kokóma na Niger, na Afrika ya Wɛsti, tomonaki ete ezali moko ya bisika oyo molunge ezalaka makasi mpenza na mabele. Longola komesana na molunge makasi wana, tosengelaki mpe koyekola Français, monɔkɔ oyo leta esalelaka. Atako mikakatano wana, totyelaki Yehova motema mpe tobandaki kosakola na engumba-mokonzi yango elongo na basakoli moke oyo bazalaki wana. Na mwa ntango moke, bato mingi na engumba Niamey oyo bakokaki kotánga bazwaki buku ya koyekola Biblia Solo oyo ezali komema na nzela ya bomoi ya seko. Bato bazalaki kutu koya koluka buku yango!Eumelaki te, tomonaki ete bakonzi bazalaki kosepela na Batatoli ya Yehova te. Na sanza ya nsambo 1969, tosalaki liyangani ya zongazonga ya liboso na ekólo yango, mpe bato soki 20 bayanganaki. Tozalaki kozela na motema likoló batisimo ya basakoli ya sika mibale. Kasi, na mokolo ya mibale ya liyangani, bapolisi bayaki mpe bakataki liyangani. Bamemaki babongisi-nzela minene ná mokɛngɛli ya zongazonga na biro ya polisi. Nsima ya kotunatuna biso mituna, bayebisaki biso tózonga mokolo oyo elandi. Tomonaki ete bakonzi yango bakoki kobimisa mobulu, yango wana tozwaki bibongiseli diskur ya batisimo esalema na ndako ya ndeko moko mpe na nsima basakoli yango bázwa batisimo na kobombana na mai moko.
Mwa bapɔsɔ na nsima, guvɛrnema ebenganaki ngai ná babongisi-nzela minene mosusu mitano na Niger. Bapesaki biso mikolo mibale ya kolongwa na ekólo na bango mpe biso moko nde tosengelaki kosala oyo esɛngi mpo na kolongwa. Totosaki mpe tokendaki mbala moko na Betele ya Nigeria, mpe bapesaki biso mikumba ya sika.
Batindaki ngai na Orisunbare, mboka moko ya Nigeria, esika oyo nazalaki kosakola ná etuluku ya moke ya basakoli oyo bazalaki kuna mpe mosala ezalaki kobota mbuma. Kasi basanza motoba na nsima, biro ya filiale eyebisaki ngai nazonga na Niger ngai moko. Liboso nakamwaki mpe nabangaki mwa moke, kasi na nsima nakómaki lisusu na mposa ya kokutana na bandeko na Niger!
Nazongaki na Niamey. Mokolo moko nsima ya kokóma na ngai, moto moko ya mombongo ayebaki ete nazalaki Motatoli ya Yehova mpe abandaki kotuna ngai mituna na oyo etali Biblia. Nakómaki koyekola na ye, mpe nsima ya kotika komɛla makaya mpe masanga mingi, azwaki batisimo. Nasepelaki kosakola ná bandeko ya bisika ndenge na ndenge ya Niger mpe komona ndenge nsima ya bambula bato bandimaki solo kuna. Liboso ntango nakómaki Batatoli bazalaki 31; kasi ntango nalongwaki, bakómaki 69.
“TOYEBI MAKAMBO MINGI TE MPO NA MOSALA YA BOKONZI NA GUINÉE”
Na nsima na 1977, nazongaki na Nigeria mpo na kozwa formasyo. Na nsuka ya pɔsɔ misato ya formasyo, ndeko Malcolm Vigo, kordinatɛrɛ ya Komite ya filiale, asɛngaki ngai natánga mokanda
moko oyo eutaki na filiale ya Sierra Leone. Bandeko bazalaki koluka ndeko mobali moko mobongisi-nzela, oyo azali nzoto makasi, monzemba mpe alobaka Français ná Anglais mpo akoka kosala lokola mokɛngɛli ya zongazonga na Guinée. Ndeko Vigo ayebisaki ngai ete nazwaki formasyo mpo na mokumba yango. Ayebisaki ngai polele ete ezalaki mokumba moko ya pɛtɛɛ te. Apesaki ngai toli oyo, “Kanisá malamu liboso ya kondima yango.” Nayebisaki ye mbala moko, “Lokola ezali Yehova Moto atindi ngai, nakokende.”Nakendaki na Sierra Leone mpe nakutanaki na bandeko na biro ya filiale. Ndeko moko ya Komite ya filiale ayebisaki ngai: “Toyebi makambo mingi te mpo na mosala ya Bokonzi na Guinée.” Atako filiale yango nde ezalaki kotalela mosala ya kosakola na Guinée, bazalaki te na likoki ya kosolola na bandeko mpo na kobeba ya makambo ya politiki oyo ezalaki kuna. Balukaki mbala na mbala kotinda ndeko moko mpo atala basakoli na Guinée, kasi ezalaki kosimba te. Yango wana, basɛngaki ngai nakende na Conakry, engumba-mokonzi ya Guinée, mpo nasɛnga bakonzi nzela ya kofanda kuna.
“Lokola ezali Yehova Moto atindi ngai, nakokende”
Ntango nakómaki na Conakry, nakendaki na ambasade ya Nigeria mpe nakutanaki na ambasadɛrɛ. Nayebisaki ye mposa na ngai ya kosakola na Guinée. Ayebisaki ngai natikala wana te mpo bakoki kokanga ngai to kosala ngai mabe. Alobaki: “Zongá na Nigeria mpe sakolá kuna,” kasi, nazongiselaki ye: “Nazali na ekateli ya kotikala awa.” Na yango akomelaki guvɛrnema ya Guinée mokanda mpo básalisa ngai, mpe ministre asalisaki ngai.
Mwa moke na nsima, nazongaki na biro ya filiale ya Sierra Leone mpe nayebisaki bandeko ekateli ya guvɛrnema. Bandeko basepelaki mingi ntango bayokaki ndenge oyo Yehova apambolaki mobembo na ngai. Guvɛrnema epesaki ngai nzela ya kofanda na Guinée!
Kobanda 1978 tii 1989, nasalaki mosala ya zongazonga na Guinée, na Sierra Leone, mpe nasalaki lokola mokɛngɛli ya zongazonga mosungi na Libéria. Na ebandeli, nazalaki kobɛlabɛla. Ezalaki mbala mingi kokóma na esika oyo bato bazali mingi te. Kasi bandeko bazalaki kosala nyonso mpo na komema na ngai na lopitalo.
Na libaku moko, nabɛlaki makasi malaria ná banyama ya libumu. Ntango nakómaki kobika mokemoke, nayaki koyeba ete bandeko bazalaki kosolola mpo na esika oyo bakokunda ngai! Atako nakutanaki na makambo wana ya nsɔmɔ, nakanisaki ata moke te kotika mikumba na ngai. Mpe namindimisaki ete libateli ya solosolo mpe oyo eumelaka eutaka epai ya Nzambe oyo akoki kosekwisa biso uta na bakufi.
NGAI NÁ MWASI NA NGAI TOTYELI YEHOVA MOTEMA
Na 1988, nakutanaki na Dorcas, ndeko mwasi moko mobongisi-nzela ya komikitisa mpenza mpe oyo alingaka Yehova mingi. Tobalanaki mpe tokobaki na mosala ya zongazonga. Dorcas asalaki mosala makasi elongo na ngai mpe azalaki kolinga komipimela mpo na Yehova. Tozalaki kotambola elongo bakilomɛtrɛ 25 ná bisaka na biso longwa na lisangá moko tii na lisangá mosusu. Mpo na masangá ya mosika mpenza, tozalaki komata na eloko
nyonso oyo tomoni mpe kokende na nzela ya pɔtɔpɔtɔ mpe ya mabulu.Dorcas azali na mpiko mpenza. Na ndakisa, na bantango mosusu tozalaki kokatisa bamai oyo etondi na bangando. Na mobembo moko ya mikolo mitano, gbagba ya libaya oyo ezalaki likoló ya mai ebukanaki, mpe tosengelaki kosalela bwato. Ntango Dorcas azalaki koluka kobima na bwato, akweaki na mai oyo ezalaki mozindo. Moto te ayebaki kobɛta mai, mpe mai yango ezalaki na bangando. Likambo ya esengo, bilenge mibali mosusu bamibwakaki na mai mpe babikisaki ye. Likambo yango ezalaki kosala biso nsɔmɔ na boumeli ya mwa ntango, kasi tokobaki kaka na mokumba na biso.
Na ebandeli ya mobu 1992, tokamwaki makasi ntango toyebaki ete Dorcas azali na zemi. Mosala na biso ya ntango nyonso esilaki wana? Tokanisaki boye, “Yehova apesi biso likabo!” Yango wana, tozwaki ekateli ya kopesa mwana na biso ya mwasi nkombo Jahgift (oyo elimboli na Anglais “Likabo ya Yehova”). Mbula minei nsima ya kobotama ya Jahgift, tobotaki ndeko na ye ya mobali, Eric. Bana na biso nyonso mibale bazali mpenza makabo ya Yehova. Jahgift apesaki mabɔkɔ mpo na mwa ntango na biro ya kobongola mikanda na Conakry, mpe Eric azali mosaleli na misala.
Atako na ebandeli Dorcas atikaki mosala ya mobongisi-nzela monene, akobaki na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, wana tozalaki kobokola bana na biso. Na lisalisi ya Yehova, nakobaki na mosala ya ntango nyonso ya sipesiale. Ntango bana na biso bakolaki, Dorcas azongelaki lisusu mosala ya mobongisi-nzela monene. Sikoyo biso mibale tozali kosala lokola bamisionɛrɛ na Conakry.
ESIKA LIBATELI YA SOLOSOLO EUTAKA
Nazalaki kokende ntango nyonso esika oyo Yehova azalaki kotinda ngai. Ngai ná mwasi na ngai tomonaki mbala na mbala libateli mpe lipamboli na ye. Kotyela Yehova motema ebateli biso na mikakatano mingi oyo ekómelaka baoyo batyelaka biloko ya mosuni motema. Ngai ná Dorcas toyekoli na nzela ya makambo oyo tokutani na yango ete libateli ya solosolo eutaka nde epai ya Yehova, “Nzambe, mobikisi na biso.” (1 Nt. 16:35) Namindimisi ete baoyo nyonso batyelaka Yehova motema, “akozipa mpe akobomba [bango] . . . na kati ya saki ya bomoi.”—1 Sam. 25:29.