Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 46

Yehova andimisi biso ete akokómisa mabele paradiso

Yehova andimisi biso ete akokómisa mabele paradiso

“Moto nyonso oyo akoluka kozwa lipamboli na mabele Nzambe ya solo akopambola ye.”—YIS. 65:16.

LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai

NA MOKUSE a

1. Nsango ya mosakoli Yisaya epai ya Bayisraele ezalaki nini?

 MOSAKOLI Yisaya alobelaki Yehova lokola “Nzambe ya solo,” to oyo alobaka solo. Liloba oyo ebongolami na “solo,” elimboli mpe “amen.” (Yis. 65:​16, msl.) Liloba “amen” elimboli “solo mpenza,” to “ezala bongo.” Biblia esalelaka mbala mingi liloba “amen” mpo na komonisa ete oyo Yehova ná Yesu balobaka to basalaka ezali solo. Na yango, nsango ya Yisaya epai ya Bayisraele ezalaki polele: Makambo oyo Yehova alobi ekokisamaka ntango nyonso. Ya solo, Yehova akokisaka ntango nyonso bilaka na ye.

2. Mpo na nini tokoki kotya motema na bilaka ya Yehova mpo na mikolo ezali koya, mpe tokozwa biyano na mituna nini?

2 Tokoki mpe kotya motema ndenge wana na bilaka ya Yehova mpo na mikolo ezali koya? Bambula pene na 800 nsima ya ntango ya Yisaya, ntoma Paulo alimbolaki ntina oyo bilaka ya Nzambe ebongi ntango nyonso kotyelama motema. Paulo alobaki: “Nzambe akoki kobuka lokuta ata moke te.” (Ebr. 6:18) Ndenge kaka liziba ekoki kobimisa te mai ya malamu ná mai ya mungwa, ndenge moko mpe, Yehova, Liziba ya solo, akoki koloba lokuta ata moke te. Na yango, tokoki kotya motema mobimba na makambo nyonso oyo Yehova alobi, ata mpe bilaka na ye nyonso mpo na biso na mikolo ezali koya. Na lisolo oyo, tokozwa biyano na mituna oyo: Yehova alaki kopesa biso nini na mikolo ezali koya? Mpe ndenge nini Yehova andimisi biso ete elaka na ye ekokokisama?

YEHOVA ALAKI BISO NINI?

3. (a) Elaka nini basaleli ya Nzambe balingaka mingi? (Emoniseli 21:​3, 4) (b) Bato mosusu balobaka nini ntango toyebisaka bango elaka yango?

3 Tokotalela elaka oyo basaleli ya Nzambe na mokili mobimba balingaka mingi. (Tángá Emoniseli 21:​3, 4.) Yehova alaki ntango moko oyo “liwa ekozala lisusu te, matánga te, koganga te, mpasi mpe ekozala lisusu te.” Mingi na biso tosalelaka vɛrsɛ oyo esimbaka motema ntango tosakwelaka basusu ndenge bomoi ekozala na paradiso. Bato mosusu balobaka nini ntango toyebisaka bango elaka yango? Mbala mosusu balobaka: “Ezali kitoko mpenza, kasi ekoki kosalema te.”

4. (a) Nini Yehova ayebaki mpe amonaki liboso? (b) Longola elaka oyo Yehova apesaki, asalaki lisusu nini?

4 Ya solo, ntango atambwisaki ntoma Yoane na elimo santu mpo akoma elaka oyo ya paradiso, Yehova ayebaki ete tokoyebisa basusu elikya yango lelo oyo ntango tozali kosakola nsango ya Bokonzi. Yehova ayebaki mpe ete ekozala mpasi mpo bato mingi bándima elaka oyo ya “makambo ya sika.” (Yis. 42:9; 60:2; 2 Ko. 4:​3, 4) Na yango, ndenge nini tokoki komindimisa mpe kondimisa basusu ete mapamboli oyo Emoniseli 21:​3, 4 elobeli ekokokisama? Yehova asukaki kaka te na kopesa elaka oyo esimbaka motema, kasi apesaki mpe bantina oyo emonisi ete tokoki kotyela yango motema. Bantina nini apesaki?

YEHOVA ANDIMISI BISO ETE ELAKA NA YE EKOKOKISAMA

5. Bantina nini tozali na yango ya kotyela elaka ya Yehova ya paradiso motema, mpe esika nini tokoki komona bantina yango?

5 Tozali komona bantina ya kotya motema na elaka ya Yehova ya paradiso na bavɛrsɛ oyo elandi. Bavɛrsɛ yango elobi: “Moto oyo afandi na kiti ya bokonzi alobaki ete: ‘Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.’ Alobaki lisusu ete: ‘Komá, mpo maloba oyo ezali sembo mpe solo.’ Mpe alobaki na ngai ete: ‘Ekokisami! Ngai nazali Alfa ná Omega, ebandeli mpe nsuka.’”—Em. 21:​5, 6a.

6. Mpo na nini maloba oyo ezali na Emoniseli 21:​5, 6 ezali kotinda biso tótyela elaka ya Yehova motema mingi koleka?

6 Mpo na nini bavɛrsɛ yango ezali kotinda biso tótyela Yehova motema mingi koleka? Buku Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi! elobi boye mpo na bavɛrsɛ yango: “Ezali lokola ete Jéhovah ye moko atii maboko na mokanda mpo na kopesa yango epai na bato na sembo, mokanda oyo ekopesa bango lotomo mpo na kozwa mapamboli wana ezali koya.” b Elaka yango ya Nzambe ezali na Emoniseli 21:​3, 4. Kasi na nsima, na vɛrsɛ 5 mpe 6, tozali komona sinyatire ya Yehova, oyo endimisi biso ete elaka na ye ekokokisama mpenza. Tótalela na likebi maloba oyo Yehova asaleli mpo na kondimisa biso ete tokoki kotyela ye motema.

7. Nani abandi koloba na vɛrsɛ 5, mpe mpo na nini maloba yango ezali kobenda mpenza likebi?

7 Vɛrsɛ 5 ebandi na maloba oyo: “Moto oyo afandi na kiti ya bokonzi alobaki ete.” (Em. 21:5a) Maloba yango ezali moko ya mbala misato oyo emonisi ntango Yehova abandi koloba na bimonaneli yango. Na yango maloba yango ezali ndanga oyo euti, epai ya anzelu moko te, ata mpe epai ya Yesu te oyo asekwaki, kasi epai ya Yehova ye moko! Yango emonisi ete tosengeli kotyela mpenza maloba oyo Yehova alobi na nsima motema. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo Yehova “akoki kokosa te.” (Tito 1:2) Likanisi wana nde esali ete tótyela maloba oyo ezali na Emoniseli 21:​5, 6 motema mobimba.

“TALÁ! NAZALI KOSALA BILOKO NYONSO BILOKO YA SIKA”

8. Yehova alobi nini mpo na komonisa ete elaka na ye ekokokisama? (Yisaya 46:10)

8 Sikoyo, tólobela liloba “Talá!” (Em. 21:5) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “talá!” ezongelami mingi na mokanda ya Emoniseli. Buku moko elobi ete liloba yango esalelami “mpo na kobenda likebi ya motángi na makambo oyo elandi.” Maloba nini ezali nsima ya liloba “talá”? Maloba oyo ya Nzambe: “Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.” Ya solo, Yehova azali kolobela bambongwana oyo ekosalema na mikolo ezali koya, kasi lokola mpo na ye elaka yango ekokokisama mpenza, alobeli bambongwana yango lokola nde esili kokokisama.—Tángá Yisaya 46:10.  

9. (a) Maloba “kosala biloko nyonso biloko ya sika” ezali komonisa makambo nini mibale oyo Yehova asali? (b) Nini ekokómela “likoló” ná “mabele” oyo ezali lelo oyo?

9 Tótalela fraze ya mibale oyo ezali na Emoniseli 21:5: “Kosala biloko nyonso biloko ya sika.” Na mokapo oyo, fraze yango ezali komonisa makambo mibale oyo Yehova asali: kolongola eloko mpe kotya mosusu na esika na yango mpe kozongisa. Ya liboso, Yehova akolongola nini mpo na kotya mosusu na esika na yango? Emoniseli 21:1 elobi: “Likoló ya kala mpe mabele ya kala elekaki.” “Likoló ya kala” ezali baguvɛrnema oyo etambwisami na Satana ná bademo na ye. (Mat. 4:​8, 9; 1 Yoa. 5:19) Biblia esalelaka mpe liloba “mabele” mpo na kolobela bato oyo bafandi na mabele. (Eba. 11:1; Nz. 96:1) Na yango, “mabele ya kala” ezali komonisa bato mabe oyo bazali lelo na mabele. Yehova akosuka kaka te na kobongisa “likoló” mpe “mabele” oyo ezali lelo oyo; kasi akobebisa yango mpe akotya mosusu na esika na yango. Akolongola likoló ná mabele oyo ezali lelo mpe akotya na esika na yango “likoló ya sika ná mabele ya sika,” elingi koloba, guvɛrnema moko ya sika ná bato ya sembo oyo yango ekoyangela.

10. Nini Yehova akosala ya sika?

10 Lisusu, na Emoniseli 21:​5, tozali kotánga oyo Yehova alobi mpo na biloko oyo akosala biloko ya sika. Tósimba ete Yehova alobaki te ete: “Nazali kosala biloko nyonso ya sika.” Kasi, alobaki nde: “Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.” Yehova akosala ete mabele mpe bato bázala ya sika na ndenge akokómisa bato mpe mabele ya kokoka. Ndenge Yisaya asakolaki yango, mabele mobimba ekokóma elanga moko kitoko, oyo ekokani na elanga ya Edene. Tokokóma mpe sika, to Yehova akozongisa biso, na ndenge akobikisa mpenza mokomoko na biso. Batɛngumi, bato oyo bakufá miso, mpe baoyo bakufá matoi bakobika, ata bakufi bakozonga na bomoi.—Yis. 25:8; 35:​1-7.

“MALOBA OYO EZALI SEMBO MPE SOLO. . . . EKOKISAMI!”

11. Etinda nini Yehova apesaki Yoane, mpe apesaki ye ntina nini?

11 Nini lisusu Yehova alobi oyo ezali kotinda biso tótyela ye motema? Yehova alobaki na Yoane: “Komá, mpo maloba oyo ezali sembo mpe solo.” (Em. 21:5) Yehova asukaki kaka te na kopesa etinda ete “komá.” Apesaki mpe ntina ya kosala yango. Alobaki: “Mpo maloba oyo ezali sembo mpe solo.” Tozali na botɔndi ndenge Yoane atosaki etindaki oyo “komá.” Mpo na yango, tokoki kotánga elaka ya Nzambe ya paradiso mpe komanyola na mapamboli kitoko oyo ezali kozela biso.

12. Mpo na nini ebongaki mpenza Yehova aloba ete: “Ekokisami!”

12 Nzambe alobaki nini na nsima? “Ekokisami!” (Em. 21:6) Sikoyo Yehova azali koloba lokola nde makambo nyonso oyo etali paradiso oyo alaki esili kokokisama. Mpe ebongi mpenza aloba bongo mpo eloko moko te ekoki kopekisa ye akokokisa mokano na ye. Na nsima, Yehova alobi likambo moko oyo etindi biso tóndima ete elaka na ye ekokokisama mpenza. Likambo nini?

“NGAI NAZALI ALFA NÁ OMEGA”

13. Mpo na nini Yehova alobaki ete: “Ngai nazali Alfa ná Omega”?

13 Ndenge tomonaki yango liboso, Yehova ye moko alobaki mbala misato na Yoane na bimonaneli. (Em. 1:8; 21:​5, 6; 22:13) Na mabaku yango misato, Yehova azongeli kaka maloba moko: “Ngai nazali Alfa ná Omega.” Alfa ezali lɛtrɛ ya liboso ya alfabɛ ya Grɛki, mpe Omega ezali lɛtrɛ ya nsuka. Ndenge asalelaki maloba “Alfa ná Omega,” Yehova amonisaki ete ntango abandi likambo moko, akómisaka na yango na nsuka.

Ntango Yehova abandi likambo moko, akómisaka yango na nsuka (Talá paragrafe 14, 17)

14. (a) Pesá ndakisa oyo emonisi lokola ntango oyo Yehova alobaki “Alfa” mpe ntango oyo ekozala lokola alobi “Omega.” (b) Maloba nini ezali na Ebandeli 2:​1-3 oyo endimisi biso ete Yehova akokokisa mokano na ye?

14 Nsima ya kokela Adama ná Eva, Yehova amonisaki mokano na ye ya ebandeli mpo na bato mpe mabele. Biblia elobi ete: “Nzambe apambolaki bango, mpe Nzambe alobaki na bango ete: ‘Bóbota mpe bókóma mingi, bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino.’” (Eba. 1:28) Ezali lokola Yehova alobaki na ntango wana “Alfa.” Ekozala na ntango moko oyo bana ya Adama oyo bazali bato ya kokoka mpe ya botosi bakotondisa mabele mpe bakokómisa yango paradiso. Na ntango yango, ekozala lokola Yehova alobi “Omega.” Nsima ya kosilisa mosala ya kozalisa “likoló mpe mabele ná biloko na yango nyonso,” Yehova alobaki likambo oyo emonisi ete mokano na ye ekokokisama. Ezali na Ebandeli 2:​1-3. (Tángá.) Yehova alobaki ete mokolo ya nsambo ezali mosantu mpo na ye. Yango elimboli nini? Yehova alingaki komonisa ete kozanga ntembe akokokisa mokano na ye mpo na bato mpe mabele. Ekokokisama mpenza na nsuka ya mokolo yango ya nsambo.

15. Mpo na nini ekokaki komonana ete Satana abebisaki mokano ya Nzambe mpo na bato?

15 Ntango Adama ná Eva batombokaki, bakómaki bato ya masumu mpe bapesaki bana na bango lisumu mpe liwa. (Rom. 5:12) Na yango, emonanaki lokola ete Satana abebisaki mokano ya Nzambe ya kotondisa mabele na bato ya kokoka mpe ya botosi. Emonanaki lokola Satana asalaki ete Yehova akoka koloba ata moke te “Omega.” Mbala mosusu Satana akanisaki ete Yehova azalaki na likambo mosusu te ya kosala. Ntango mosusu akanisaki ete Yehova akoboma Adama ná Eva mpe akosala mobali ná mwasi mosusu ya kokoka oyo bakokokisa mokano na ye mpo na bato. Kasi soki Nzambe asalaka bongo, Satana alingaki koloba ete Nzambe azali moto ya lokuta. Mpo na nini? Mpo na Ebandeli 1:​28, Yehova ayebisaki Adama ná Eva ete bana na bango nde bakotondisa mabele.

16. Mpo na nini Satana akanisaki ete akoki koloba Yehova alongi te kokokisa mokano na ye?

16 Ekoki kozala ete Satana akanisaki lisusu ete Nzambe akosala nini? Mbala mosusu Satana akanisaki ete Yehova akotika Adama ná Eva bábota bana ya kozanga kokoka oyo bakokóma ata moke te bato ya kokoka. (Mos. 7:20; Rom. 3:23) Soki esalemaka bongo, na ntembe te Satana alingaki koloba ete Yehova alongi te kokokisa mokano na ye. Mpo na nini? Mpo yango elingaki kokokisa te mokano ya Nzambe ya kotondisa paradiso awa na mabele, na bana ya Adama ná Eva oyo bazali bato ya kokoka mpe ya botosi.

17. Likambo nini Yehova asalaki mpo na botomboki ya Adama ná Eva, mpe nsukansuka nini ekosalema? (Talá mpe elilingi.)

17 Likambo oyo Yehova asalaki mpo na botomboki ya Satana mpe ya Adama ná Eva, na ntembe te ekamwisaki mpenza Satana. (Nz. 92:5) Na esika amonisa ete azali moto ya lokuta, Yehova amonisaki ete alobaka solo na ndenge atikaki Adama ná Eva bábota bana. Mpe Yehova amonisaki ete ntango alobi akosala likambo moko, eloko moko te ekoki kopekisa ye kosala yango. Asalaki likambo moko mpo na kokokisa mokano na ye, apesaki “mwana” to momboto oyo asengelaki kobikisa bana ya Adama ná Eva ya botosi. (Eba. 3:15; 22:18) Na ntembe te Satana akamwaki mpenza ndenge Yehova azwaki ebongiseli ya kopesa lisiko! Mpo na nini? Mpo lisiko euti na bolingo oyo ezangi moimi. (Mat. 20:28; Yoa. 3:16) Satana azalaka na ezaleli yango te, azali moimi. Sikoyo, makambo nini ekosalema lokola lisiko epesamaki? Na nsuka ya Mbula Nkóto, bana ya Adama ná Eva oyo bazali bato ya kokoka mpe ya botosi bakofanda na paradiso awa na mabele, kaka ndenge Yehova akanaki yango na ebandeli. Na ntango yango, ekozala lokola nde Yehova alobi “Omega.”

NTINA OYO TOSENGELI KOTYELA ELAKA YA YEHOVA YA PARADISO MOTEMA KOLEKA

18. Wapi bantina misato oyo Yehova amonisi ete akokokisa elaka na ye? (Talá mpe etanda “ Bantina misato ya kotyela elaka ya Yehova motema.”)

18 Na lisolo oyo, tomoni bantina oyo tokoki kondima ete mabele ekokóma paradiso. Nini tokoki koloba mpo na kondimisa bato ete elaka yango ekokokisama? Ya liboso, Yehova ye moko nde apesi elaka yango. Mokanda ya Emoniseli elobi: “Moto oyo afandi na kiti ya bokonzi alobaki ete: ‘Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.’” Azali na bwanya, na nguya, mpe na mposa ya kokokisa elaka na ye. Ya mibale, elaka yango ekokokisama mpenza mpo na miso ya Yehova ezali lokola nde elaka yango esili kokokisama. Yango wana alobi ete: “Maloba oyo ezali sembo mpe solo. . . . Ekokisami!” Ya misato, ntango Yehova abandi likambo moko, akómisaka yango na nsuka, ndenge emonisami na maloba oyo: “Ngai nazali Alfa ná Omega.” Yehova akomonisa ete Satana azali moto ya lokuta mpe akoki te kopekisa ye kokokisa mokano na ye.

19. Ntango bato bandimi te elaka ya Yehova ya paradiso, okoki kosala nini?

19 Kobosana te, ntango nyonso oyo oyebisaka bato na mosala ya kosakola oyo Yehova alobi mpo na kondimisa biso ete akokokisa bilaka na ye, esalisaka yo otyela lisusu bilaka ya Yehova motema koleka. Na yango mbala nsima oyo okotánga elaka ya paradiso oyo esimbaka motema na Emoniseli 21:4 mpe moto alobi, “Ezali kitoko kasi ekoki kosalema te,” okosala nini? Okoki kotánga vɛrsɛ 5 mpe 6 mpe kolimbolela ye. Monisá ndenge Yehova andimisi biso ete akokokisa elaka na ye na ndenge atye sinyatire, oyo ya ye moko mpenza.—Yis. 65:16.

LOYEMBO 145 Nzambe alaki biso paradiso

a Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo Yehova andimisi biso ete elaka na ye ya paradiso ekokokisama. Ntango nyonso oyo toyebisaka basusu ntina oyo elaka yango ekokokisama, esalisaka biso tótyela elaka ya Yehova motema lisusu koleka.

b Talá Emoniseli—Kokokana na yango monene ebelemi! nk. 303-304, par. 8-9.