Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 49

Yehova ayanolaka na mabondeli na ngai?

Yehova ayanolaka na mabondeli na ngai?

“Bokobenga ngai, bokoya kobondela ngai, mpe ngai nakoyoka bino.”—YIR. 29:12.

LOYEMBO 41 Yoká libondeli na ngai

NA MOKUSE a

1-2. Mpo nini mbala mosusu tokoki komona ete Yehova azali te koyanola na mabondeli na biso?

 “SEPELÁ mingi mpenza na Yehova, mpe akokokisa mposa ya motema na yo.” (Nz. 37:4) Elaka moko kitoko mpenza! Kasi tosengeli komizela ete Yehova apesa biso mbala moko eloko nyonso oyo tosɛngi ye? Mpo na nini ezali na ntina tómituna bongo? Tótalela makambo oyo elandi. Ndeko mwasi moko ya monzemba azali kobondela mpo akɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Kasi bambula mingi eleki, babengi ye kaka te. Ndeko mobali moko ya elenge asɛngi Yehova abikisa ye na maladi moko ya mpasi mpo akoka kosala mingi na lisangá. Kasi abiki kaka te. Baboti oyo bazali bakristo bazali kobondela ete mwana na bango atikala na kati ya solo. Kasi mwana na bango azwi ekateli ya kotika kosalela Yehova.

2 Mbala mosusu yo mpe osɛngá Yehova eloko moko, kasi ozwá yango te. Yango ekoki kosala omona ete Yehova ayanolaka na mabondeli ya basusu kasi na oyo ya yo te. To mbala mosusu okanisi ete osalaki likambo moko ya mabe. Ndeko mwasi moko na nkombo Janice b amiyokaki bongo. Ye ná mobali na ye babondelaki mpo balingaki mpenza kosala na Betele. Alobi boye: “Nazalaki na kondima ete tokokɔta Betele na ntango moke mpenza.” Kasi basanza ebongwanaki bambula, mpe babengaki bango te. Janice alobi boye: “Nayokaki mawa mpe nabulunganaki. Nazalaki komituna eloko nini nasalaki oyo epesaki Yehova mpasi. Nabondelaki mingi mpo na kokɔta na Betele. Mpo na nini ayanoli te na libondeli na ngai?”

3. Tokolobela nini na lisolo oyo?

3 Na bantango mosusu, tokoki komituna soki Yehova azali koyoka mabondeli na biso. Ata mibali mosusu ya sembo ya kala bamitunaki mpe bongo. (Yobo 30:20; Nz. 22:2; Hab. 1:2) Nini ekoki kondimisa yo ete Yehova akoyanola na mabondeli na yo? (Nz. 65:2) Mpo na kozwa eyano na motuna wana, tosengeli liboso kozwa biyano na mituna oyo: (1) Tokoki komizela ete Yehova asala nini? (2) Yehova alingaka tósala nini? (3) Mpo na nini ekoki kosɛnga ete tóbongola makambo mosusu oyo tosɛngaka?

TOKOKI KOMIZELA ETE YEHOVA ASALA NINI?

4. Na kotalela Yirimia 29:​12, Yehova alaki kosala nini?

4 Yehova alaki ete akoyoka mabondeli na biso. (Tángá Yirimia 29:12.) Nzambe na biso alingaka basaleli na ye ya sembo, na yango akoki ata moke te koboya koyoka mabondeli na bango. (Nz. 10:17; 37:28) Kasi, yango elingi koloba te ete akopesa biso nyonso oyo tosɛngi. Tosengeli mbala mosusu kozela tii na mokili ya sika mpo na kozwa makambo mosusu oyo tosɛngi.

5. Yehova atalelaka nini ntango azali koyoka mabondeli na biso? Limbolá.

5 Yehova atalaka ndenge makambo oyo tosɛngi eyokani na mokano na ye mobimba. (Yis. 55:​8, 9) Likambo moko na kati ya mokano na ye ezali ya kotondisa mabele na mibali mpe basi oyo na esengo nyonso bazali na bomoko na nse ya boyangeli na ye. Kasi Satana alobaka ete bato bakozala malamu koleka soki bazali komitambwisa bango moko. (Eba. 3:​1-5) Mpo na komonisa ete Satana alobaki lokuta, Yehova atiki bato bámiyangela bango moko. Kasi, boyangeli ya bato ebimisi mikakatano mingi oyo tozali na yango lelo oyo. (Mos. 8:9) Toyebi malamu ete Yehova akolongola te mikakatano yango nyonso sikoyo. Soki asalaki bongo, basusu bakokaki koloba ete boyangeli ya bato eleki malamu, ete ekoki kosilisa mikakatano ya bato.

6. Mpo na nini tosengeli komindimisa ete Yehova akosala ntango nyonso makambo na bolingo mpe na bosembo?

6 Yehova akoki koyanola na mabondeli ya ndenge moko na balolenge ekeseni. Na ndakisa, ntango Mokonzi Ezekiasi abɛlaki makasi, asɛngaki Yehova abikisa ye. Mpe Yehova abikisaki ye. (2 Bak. 20:​1-6) Nzokande, ntango ntoma Paulo asɛngaki Yehova alongola ye “nzubɛ moko na kati ya mosuni,” oyo ekokaki kozala maladi moko na nzoto, Yehova alongolaki yango te. (2 Ko. 12:​7-9) Tótalela mpe ndakisa ya ntoma Yakobo ná Petro. Mokonzi Erode alingaki koboma bango mibale. Lisangá ezalaki kobondela mpo na Petro mpe na ntembe te mpo na Yakobo mpe. Kasi, babomaki Yakobo, nzokande Petro abikisamaki na ndenge ya likamwisi. (Mis. 12:​1-11) Tokoki mbala mosusu komituna: ‘Mpo na nini Yehova abikisaki Petro kasi Yakobo te?’ Biblia elobi eloko te mpo na yango. c Oyo tokoki komindimisa na yango ezali ete banzela ya Yehova ‘ezangaka bosembo te.’ (Mib. 32:4) Mpe toyebi ete Yehova azalaki kolinga Petro ná Yakobo. (Em. 21:14) Na bantango mosusu, Yehova akoki te koyanola na mabondeli na biso na ndenge oyo tokanisaki. Kasi lokola totyaka motema ete Yehova akoyanola ntango nyonso na mabondeli na bolingo mpe na bosembo, totyaka ntembe te na lolenge oyo aponi mpo na koyanola biso.—Yobo 33:13.

7. Tosengeli koboya nini, mpe mpo na nini?

7 Tosalaka makasi tóboya kokokanisa makambo na biso na oyo ya basusu. Na ndakisa, tokoki kosɛnga Yehova asalisa biso na lolenge moko ya sikisiki mpenza, kasi apesi biso te oyo tosɛngi. Na nsima, toyoki ete moto mosusu abondelaki mpo na likambo ya ndenge wana, mpe emonani ete Yehova ayanoli na libondeli na ye. Yango nde ekómelaki ndeko mwasi moko na nkombo Anna. Abondelaki mpo mobali na ye, Matthew, abika na maladi ya kansɛr. Mpe na ntango yango kaka, bandeko basi mibale bazalaki mpe na maladi ya kansɛr. Anna abondelaki mingi mpo na Matthew mpe bandeko basi wana. Bandeko basi wana babikaki, kasi Matthew akufaki. Na ebandeli, Anna amitunaki soki Yehova asalisaki bandeko basi wana bábika. Mpe soki ezali bongo, mpo na nini ayanoli te na mabondeli na ngai ete mobali na ngai abika? Ya solo, toyebi te ndenge oyo bandeko basi wana mibale babikaki. Kasi oyo toyebi ezali ete Yehova akosilisa bampasi na biso nyonso, mpe azali na mposa makasi ya kosekwisa baninga na ye oyo bakufá.—Yobo 14:15.

8. (a) Na kotalela Yisaya 43:​2, ndenge nini Yehova asalisaka biso? (b) Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso na ntango ya mikakatano? (Talá video Libondeli esalisaka biso toyika mpiko.)

8 Yehova akosalisa biso ntango nyonso. Lokola azali Tata na biso ya bolingo, Yehova asepelaka te komona biso na mpasi. (Yis. 63:9) Atako bongo, apekisaka te mikakatano nyonso oyo ekoki kozala lokola ebale to mɔtɔ ekómela biso. (Tángá Yisaya 43:2.) Kasi, alaki ete akosalisa biso ‘tóleka na’ yango. Mpe akotika te ete mikakatano na biso epesa biso mpasi mpo na libela. Yehova apesi biso mpe elimo santu na ye ya nguya mpo esalisa biso tóyika mpiko. (Luka 11:13; Flp. 4:13) Na yango, tokoki komindimisa ete tokozala ntango nyonso na oyo tosengeli na yango mpenza mpo na koyika mpiko mpe kotikala sembo epai na ye. d

YEHOVA ALINGAKA TÓSALA NINI?

9. Na kotalela Yakobo 1:​6, 7, mpo na nini tosengeli kotya motema ete Yehova akosalisa biso?

9 Yehova alingaka tótyela ye motema. (Ebr. 11:6) Na bantango mosusu, mikakatano na biso ekoki komonana lokola ekosila te. Tokoki kobanda ata komituna soki Yehova akosalisa biso. Kasi Biblia eyebisi biso ete na nguya ya Nzambe tokoki ata “komata efelo.” (Nz. 18:29) Na yango na esika tómitungisa mingi, tosengeli nde kobondela Yehova na kondima nyonso, kotya motema ete akoyanola na mabondeli na biso.—Tángá Yakobo 1:​6, 7.

10. Pesá ndakisa mpo na ndenge oyo tokoki kosala na boyokani na mabondeli na biso.

10 Yehova alingaka tósala na boyokani na mabondeli na biso. Na ndakisa, ndeko mobali moko akoki kosɛnga ete Yehova asalisa ye azwa konje na mosala mpo ayangana na liyangani ya etúká. Ndenge nini Yehova akoki koyanola na libondeli na ye? Akoki kopesa ndeko yango mpiko mpo asolola na patrɔ na ye. Kasi ekosɛnga ete ndeko yango akende epai ya patrɔ mpe asɛnga konje yango. Mbala mosusu ekosɛnga asolola na ye kaka mbala moko te. Akoki kosɛnga ata moninga moko asala na esika na ye. Mpe soki esengeli, akoki kosɛnga asala na nsima ya bangonga ya mosala kozanga ete báfuta ye.

11. Mpo na nini tosengeli kobondela mbala na mbala mpo na makambo oyo tozali na yango mposa?

11 Yehova alingaka tóbondela mbala na mbala mpo na makambo oyo tozali na yango mposa. (1 Tes. 5:17) Ndenge Yesu amonisaki yango, Yehova ayanolaka mbala moko te na mabondeli na biso mosusu. (Luka 11:9) Yango wana kolɛmba te! Bondeláká na etingya mpe mbala na mbala. (Luka 18:​1-7) Ntango tozali kokoba kobondela mpo na likambo moko, tozali komonisa Yehova ete oyo tozali kosɛnga ezali mpenza na ntina mpo na biso. Tozali mpe komonisa kondima na likoki na ye ya kosalisa biso.

MPO NA NINI EKOKI KOSƐNGA ETE TÓBONGOLA MAKAMBO MOSUSU OYO TOSƐNGAKA?

12. (a) Motuna nini tosengeli komituna mpo na makambo oyo tosɛngaka, mpe mpo na nini? (b) Ndenge nini tokoki komindimisa ete mabondeli na biso emonisaka limemya epai ya Yehova? (Talá etanda “ Mabondeli na ngai emonisaka limemya epai ya Yehova?”)

12 Soki tozwi te oyo tosɛngi na libondeli, tokoki komituna mituna misato. Ya liboso, ‘Nazali kobondela mpo na makambo oyo ebongi?’ Mbala mingi, tokanisaka ete toyebi oyo eleki malamu mpo na biso. Kasi makambo oyo tosɛngaka, mbala mosusu yango nde te eleki malamu mpo na biso. Soki tozali kobondela mpo na mokakatano moko, ekoki kozala na lolenge ya malamu ya kosilisa mokakatano yango koleka lolenge oyo biso tozali kosɛnga. Mpe makambo mosusu oyo tosɛngaka mbala mosusu eyokani te na mokano ya Yehova. (1 Yoa. 5:14) Na ndakisa, tótalela lisusu ndakisa ya baboti oyo tolobelaki na ebandeli. Basɛngaki Yehova ete mwana na bango atikala na kati ya solo. Emonani ete basɛngaki likambo ya malamu. Kasi, Yehova atindaka biso te na makasi tósalela ye. Alingaka ete biso nyonso, ata mpe bana na biso, tópona kosalela ye. (Mib. 10:​12, 13; 30:​19, 20) Na yango, baboti yango bakokaki nde kosɛnga Yehova asalisa bango básimba motema ya mwana na bango mpo etinda ye alinga Yehova mpe akóma moninga na ye.—Mas. 22:6; Ef. 6:4.

13. Na kotalela Baebre 4:​16, ntango nini Yehova asalisaka biso? Limbolá.

13 Talá motuna ya mibale oyo tosengeli komituna, ‘Ezali mpenza ntango ya Yehova ya kopesa ngai oyo nasɛngi?’ Mbala mosusu tomoni ete tozali na mposa ya eyano mbala noko na mabondeli na biso. Kasi, Yehova ayebi mpenza ntango ya malamu ya kosalisa. (Tángá Baebre 4:16.) Ntango tozwi mbala moko te oyo tosɛngi, tokoki kokanisa ete eyano ya Yehova ezali ‘Te.’ Nzokande eyano na ye ekoki kozala nde ‘Sikoyo te.’ Na ndakisa, tólobela lisusu ndeko mobali oyo ya elenge oyo abondelaki Yehova abikisa ye na maladi na ye. Soki Yehova abikisaka ye na ndenge ya likamwisi, Satana akokaki koloba ete ndeko yango akobaki kosalela Yehova kaka mpo abikisaki ye. (Yobo 1:​9-11; 2:4) Lisusu, Yehova asilá kotya ntango oyo akosilisa maladi nyonso. (Yis. 33:24; Em. 21:​3, 4) Mpe liboso ntango yango ekoka, tokoki kozela te Yehova abikisa biso na maladi na ndenge ya likamwisi. Na yango ndeko yango akokaki kosɛnga Yehova apesa ye makasi mpe kimya ya makanisi mpo ayikela maladi na ye mpiko mpe akoba kosalela Nzambe na bosembo nyonso.—Nz. 29:11.

14. Liteya nini ozwi na likambo oyo ekómelaki Janice?

14 Kanisá lisusu ndakisa ya Janice, oyo abondelaki mpo na kokɔta na Betele. Mbula mitano elekaki liboso ayeba ndenge oyo Yehova ayanolaki na libondeli na ye. Alobi boye: “Yehova asalelaki ntango yango mpo na koteya ngai mpe kobongisa ngai. Esengelaki nakoba kotyela ye motema lisusu koleka. Nasengelaki kobongisa momeseno ya boyekoli na ngai ya Biblia. Mpe nasengelaki koyeba ete nakoki kozala na esengo esika nyonso nazali kosalela Yehova.” Na nsima, Janice ná mobali na ye batindaki bango na mosala ya zongazonga. Kotala ndenge makambo esalemaki, Janice alobi: “Yehova ayanolaki na mabondeli na ngai, kasi na ndenge oyo nakanisaki te. Ezwaki ntango mpo namona eyano na ye ya kitoko, kasi nazali na botɔndi mpenza ya komona bolingo mpe boboto na ye.”

Soki omoni ete Yehova azali koyanola te na libondeli na yo, bondelá mpo na makambo mosusu (Talá paragrafe 15) f

15. Mpo na nini tosengeli mbala mosusu kobondela mpo na makambo mosusu? (Talá mpe bililingi.)

15 Motuna ya misato ezali, ‘Nasengeli kobondela mpo na eloko mosusu?’ Atako ezali malamu mabondeli na biso ezala ya sikisiki, mbala mosusu tokoki koyeba mokano ya Yehova mpo na biso soki tozali kobondela mpo na makambo mosusu. Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi oyo ya monzemba oyo abondelaki mpo akɔta na Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Alingaki kokɔta eteyelo yango mpo apesa mabɔkɔ na esika oyo mposa ezali mingi. Na yango, wana azalaki kokoba kobondela mpo bábenga ye na eteyelo, akokaki mpe kosɛnga Yehova asalisa ye amona mabaku mosusu oyo akoki kosala mingi na mosala ya kosakola. (Mis. 16:​9, 10) Na nsima akokaki kosala na boyokani na libondeli na ye, kotuna mokɛngɛli ya zongazonga na bango soki ezali na lisangá oyo ezali na mposa ya babongisi-nzela. To akokaki kokomela biro ya filiale mpo na koyeba esika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezali mingi. e

16. Tokoki komindimisa na likambo nini?

16 Ndenge tomoni yango, tokoki komindimisa ete Yehova ayanolaka na mabondeli na biso na bolingo mpe na bosembo mpenza. (Nz. 4:3; Yis. 30:18) Na bantango mosusu tokoki kozwa eyano te na ndenge oyo tokanisi. Kasi Yehova akoki koboya ata moke te koyanola na mabondeli na biso. Alingaka biso mingi mpenza. Mpe akosundola biso ata moke te. (Nz. 9:10) Na yango, kobá ‘kotyela ye motema ntango nyonso,’ fungolelá ye motema na yo na libondeli.—Nz. 62:8.

LOYEMBO 43 Libondeli ya kopesa matɔndi

a Lisolo oyo ekolimbola ntina oyo tokoki kotya motema ete Yehova akoyanola ntango nyonso na mabondeli na biso na bolingo mpe na bosembo mpenza.

b Topesi bango bankombo mosusu.

c Talá lisolo “Otyelaka ndenge oyo Yehova asalaka makambo motema?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya sanza ya 02/2022, par. 3-6.

d Mpo na koyeba ndenge oyo Yehova asalisaka biso tóyikela mikakatano mpiko, talá video Libondeli esalisaka biso toyika mpiko na jw.org.

e Soki olingi koyeba ndenge oyo okoki kosala mingi na teritware ya filiale mosusu, talá buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova, mok. 10, par. 6-9.

f NDIMBOLA YA ELILINGI: Bandeko basi mibale bazali kobondela liboso ya kotondisa formilɛrɛ ya Eteyelo ya bapalanganisi ya nsango malamu ya Bokonzi. Na nsima, babengi ndeko moko, kasi mosusu babengi ye te. Na esika ndeko mwasi oyo babengi te alɛmba nzoto, akobi kobondela Yehova asalisa ye amona mabaku mosusu ya kosala lisusu mingi na mosala ya kosakola. Na nsima akomeli Betele mpo na koyeba esika oyo mposa ya basakoli ezali mingi.