LISOLO YA BOYEKOLI 52
Bilenge basi—Bókóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo
“Basi mpe basengeli kozala bato oyo . . . balekisaka ndelo te na bizaleli na bango, bato ya sembo na makambo nyonso.”—1 TIM. 3:11.
LOYEMBO 133 Tósambela Yehova na bolenge na biso
NA MOKUSE a
1. Mpo na kokóma mokristo oyo akɔmɛli, tosengeli kosala nini?
TOKAMWAKA ndenge mwana aumelaka te mpo na kokóma mokóló. Emonanaka ete bokoli yango esalemaka yango moko. Kasi, kokola mpo na kokóma mokristo oyo akɔmɛli esalemaka yango moko ata moke te. b (1 Ko. 13:11; Ebr. 6:1) Mpo na kokokisa mokano yango, tosengeli kozala na boyokani makasi mpenza na Yehova. Tozali mpe na mposa ya elimo santu ya Nzambe wana tozali kolona bizaleli oyo esepelisaka ye, koyekola makambo oyo ekosalisa biso, mpe komibongisa mpo na mikumba na mikolo ezali koya.—Mas. 1:5.
2. Ebandeli 1:27 emonisi biso nini, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?
2 Yehova asalaki moto mpo azala mobali to mwasi. (Tángá Ebandeli 1:27.) Na yango, mwasi ná mobali bakeseni na nzoto, kasi bakeseni mpe na makambo mosusu. Na ndakisa, Yehova akelaki mwasi ná mobali mpo mokomoko akokisa mikumba oyo ebongi na ye; na yango basengeli na bizaleli mpe makoki oyo ekosalisa bango bákokisa mikumba na bango. (Eba. 2:18) Na lisolo oyo, tokomona ndenge ndeko mwasi ya elenge akoki kosala mpo akóma mwasi mokristo oyo akɔmɛli. Na lisolo oyo elandi, tokomona oyo bandeko mibali oyo bazali bilenge bakoki kosala.
KOLISÁ BIZALELI OYO ESEPELISAKA NZAMBE
3-4. Epai wapi bilenge basi bakoki komona bizaleli ya komekola? (Talá mpe elilingi.)
3 Biblia elobeli basi mingi oyo balingaki Yehova mpe basalelaki ye. (Talá na jw.org lisolo “Mateya nini tokoki kozwa epai ya basi oyo Biblia elobeli?”) Bazalaki ndenge vɛrsɛ oyo esimbi lisolo elobi: basi oyo “balekisaka ndelo te na bizaleli na bango” mpe “bato ya sembo na makambo nyonso.” Lisusu, na lisangá na bango moko, bandeko basi bakoki komona bandakisa ya bakristo ya basi oyo bakɔmɛli, oyo ebongi komekola.
4 Bandeko basi ya bilenge, mpo na nini te koluka bandeko basi bakristo oyo bakɔmɛli, oyo bokoki kolanda ndakisa na bango? Tyá likebi na bizaleli na bango ya malamu; mpe talá ndenge yo moko okoki komonisa bizaleli yango. Na baparagrafe oyo ekolanda, tokolobela bizaleli misato ya ntina oyo basi bakristo oyo bakɔmɛli basengeli komonisa.
5. Mpo na nini komikitisa ezali na ntina mingi mpo na mwasi mokristo oyo akɔmɛli?
5 Mokristo oyo akɔmɛli amonisaka komikitisa. Soki mwasi azali na komikitisa, akozala na boyokani ya malamu na Yehova mpe na basusu. (Yak. 4:6) Na ndakisa, na komikitisa nyonso, mwasi oyo alingaka Yehova aponaka kopesa mabɔkɔ na ebongiseli ya bokonzi oyo Tata na ye ya likoló atyá. (1 Ko. 11:3) Kotosa ebongiseli yango ezali na ntina mingi na lisangá mpe na libota. c
6. Liteya nini bandeko basi ya bilenge bakoki kozwa epai ya Rebeka na oyo etali komikitisa?
6 Tótalela ndakisa ya Rebeka. Azalaki mwasi ya bwanya oyo na boumeli ya bomoi na ye azwaki bikateli ya mpiko mpe ayebaki ntango nini mpe ndenge nini kosala likambo. (Eba. 24:58; 27:5-17) Kasi Rebeka azalaki na limemya mpe na komikitisa. (Eba. 24:17, 18, 65) Soki ozali na komikitisa mpe kopesa mabɔkɔ na bibongiseli ya Yehova, ndenge Rebeka asalaki, okozala mpenza ndakisa malamu epai ya bato ya libota na yo mpe na lisangá.
7. Ndenge nini bandeko basi ya bilenge bakoki komekola Estere na oyo etali komonisa bopɔlɔ?
7 Bopɔlɔ ezali ezaleli mosusu oyo bakristo nyonso bakɔmɛli na elimo basengeli na yango. Biblia elobi ete “bwanya ezali elongo na bato ya bopɔlɔ.” (Mas. 11:2) Estere azalaki na bopɔlɔ mpe azalaki kobanga Nzambe. Ezaleli na ye ya bopɔlɔ epekisaki ye asala makambo na lofundo. Ayokaki toli ya ndeko na ye ya mokóló mpe alandaki yango. (Est. 2:10, 20, 22) Yo mpe okoki komonisa bopɔlɔ ya ndenge wana soki olukaka toli ya malamu mpe osalelaka yango.—Tito 2:3-5.
8. Na kotalela 1 Timote 2:9, 10, ndenge nini bopɔlɔ ekosalisa ndeko mwasi azwa bikateli ya bwanya na oyo etali molato mpe monzɛlɛ?
8 Estere amonisaki mpe bopɔlɔ na ndenge mosusu. Estere azalaki “nzoto kitoko mpe elongi kitoko”; kasi azalaki kobenda likebi mingi epai na ye moko te. (Est. 2:7, 15) Ndenge nini mwasi mokristo akoki kolanda ndakisa ya Estere? Lolenge moko ya kosala yango emonisami na 1 Timote 2:9, 10. (Tángá.) Ntoma Paulo apesaki basi bakristo malako ete bálekisaka ndelo te na molato na bango mpe bázala na makanisi malamu. Maloba ya Grɛki oyo esalelami esika yango emonisi ete na molato na ye, mwasi mokristo asengeli komonisa limemya mpe kotalela mayoki ná makanisi ya basusu. Tosepelaka mingi na bandeko na biso oyo bakɔmɛli na elimo mpo balataka na ndenge oyo emonisaka bopɔlɔ!
9. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Abigaile?
9 Bososoli ezali ezaleli mosusu oyo basi bakristo nyonso oyo bakɔmɛli bamonisaka. Bososoli ezali nini? Ezali likoki ya koyeba ete likambo oyo ezali malamu mpe oyo ezali mabe, mpe na nsima kopona kosala oyo ezali malamu. Tótalela ndakisa ya Abigaile. Mobali ya Abigaile azwaki ekateli moko ya mabe mpe elingaki komemela bato ya ndako na ye mobimba likama moko monene. Abigaile asalaki mbala moko mpo na kosilisa likambo yango. Bososoli oyo amonisaki ebikisaki bato. (1 Sam. 25:14-23, 32-35) Bososoli ekosalisa biso mpe tóyeba ntango ya koloba mpe ntango ya kofanda nyɛɛ. Mpe ekosalisa biso tótyelaka basusu likebi kozanga kokɔta na makambo na bango.—1 Tes. 4:11.
YEKOLÁ MAKAMBO OYO EKOSALISA YO NA BOMOI
10-11. Koyeba kotánga mpe kokoma malamu ekoki kopesa yo moko to basusu matomba nini? (Talá mpe elilingi.)
10 Mwasi mokristo asengeli koyekola makambo oyo ekosalisa ye na bomoi. Makambo mosusu oyo mwana mwasi azali koyekola na bomwana ekokoba kosalisa ye bomoi na ye mobimba. Tózwa mwa bandakisa.
11 Yekolá kotánga mpe kokoma malamu. Na mimeseno ya bamboka mosusu, bamonaka ete ezali na ntina te basi báyekola kotánga mpe kokoma. Kasi, koyeba kotánga mpe kokoma ezali na ntina mingi mpo na mokristo nyonso. d (1 Tim. ) Na yango, kotika eloko moko te epekisa yo koyekola kotánga mpe kokoma malamu. Yango ekomemela yo matomba nini? Makoki ya ndenge wana ekoki kosalisa yo ozwa mosala mpe obatela yango. Okokóma moyekoli mpe moteyi malamu mpenza ya Liloba ya Nzambe. Oyo eleki, okokóma mpenza moninga ya penepene ya Yehova wana ozali kotánga Liloba na ye mpe komanyola yango.— 4:13Yos. 1:8; 1 Tim. 4:15.
12. Ndenge nini Masese 31:26 ekoki kosalisa yo oyeba kosolola malamu na basusu?
12 Yekolá kosolola malamu na basusu. Bakristo basengeli koyeba ndenge ya kosolola. Na likambo yango, moyekoli Yakobo apesaki biso toli ya malamu, alobi: “Moto nyonso asengeli koyokaka noki, kowelaka koloba te.” (Yak. 1:19) Ntango ozali koyoka basusu na likebi wana bazali koloba, okoyeba ‘komitya na esika’ na bango. (1 Pe. 3:8) Soki ozali kokanga ntina te ya likambo oyo moto azali koloba to ndenge azali komiyoka, tuná ye mituna oyo ebongi. Na nsima kanisá mwa moke liboso oloba. (Mas. 15:28, Msl.) Omituna boye: ‘Likambo oyo nalingi naloba ezali ya solo mpe ya kolendisa? Ekomonisa limemya mpe ezali ya boboto?’ Yekolá epai ya bandeko basi oyo bakɔmɛli, oyo bayebi mpenza kosolola na basusu. (Tángá Masese 31:26.) Tyáká likebi na ndenge na bango ya koloba. Ntango ozali koyekola malamu kosolola na bato, boyokani na yo na basusu ekokóma mpe malamu.
13. Ndenge nini okoki koyekola kosimba ndako? (Talá mpe elilingi.)
13 Yekolá ndenge ya kosimba ndako. Na bisika mingi, basi nde basalaka misala mingi ya ndako. Mama na yo to ndeko mwasi mosusu ya mokóló akoki kosalisa yo oyekola misala yango. Ndeko mwasi moko na nkombo Cindy alobi boye: “Moko ya makambo ya ntina mingi oyo nayekolaki epai ya mama na ngai ezali ete kosala mosala makasi epesaka esengo mingi. Koyekola misala lokola kolamba, kotya bopɛto, kotonga bilamba mpe kosala wenze, esalisi ngai mingi na bomoi mpe epesi ngai libaku ya kosala mingi na mosala ya Yehova. Mama ateyaki ngai mpe ndenge ya koyamba bapaya, mpe yango esalisaki ngai nakutana na bandeko basi mpe mibali ya malamu mpenza oyo nakoki komekola ndakisa na bango.” (Mas. 31:15, 21, 22) Mwasi oyo azali makasi na mosala, oyo ayambaka bapaya mpe ayebi kosimba ndako azali lipamboli mpenza mpo na bato ya libota na ye mpe mpo na lisangá.—Mas. 31:13, 17, 27; Mis. 16:15.
14. Liteya nini ozwi na ndakisa ya Crystal, mpe osengeli kotya makanisi nyonso na nini?
14 Yekolá kosala makambo malamu yo moko. Ezali na ntina ete bakristo nyonso oyo bakɔmɛli na elimo báyekola kosala makambo malamu bango moko. (Flp. 4:11) Ndeko mwasi moko na nkombo Crystal alobi boye: “Baboti na ngai basalisaki ngai napona kelasi oyo nakotánga mpo nayekola makambo oyo ekosalisa ngai na bomoi. Tata ayebisaki ngai nasala comptabilité mpe eyaki komonana ete ezalaki toli ya malamu.” Longola koyekola makambo oyo ekosalisa yo ozwa mosala, yekolá mpe ndenge ya kosalela malamu mbongo oyo ozwi mpe landelá ndenge ozali kosalela yango. (Mas. 31:16, 18) Tyá makanisi nyonso na mikano ya elimo, boyá kokɔta banyongo ya mpambampamba mpe yekolá kosepela na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ.—1 Tim. 6:8.
OMIBONGISA MPO NA MIKUMBA OYO OKOKI KOZWA NA MIKOLO EZALI KOYA
15-16. Matomba nini bandeko basi oyo bazali minzemba bamemelaka basusu? (Mrk. 10:29, 30)
15 Soki okolisi bizaleli ya elimo mpe oyekoli makambo oyo ekosalisa yo, okozala mpenza moto oyo abongi mpo na kokokisa mikumba na mikolo oyo ezali koya. Talá mwa bandakisa ya makambo oyo okoki kosala.
16 Okoki kotikala monzemba mpo na mwa ntango. Na boyokani na maloba ya Yesu, basi mosusu bazwaka ekateli ya kobala te, ata soki kotikala monzemba ezali likambo ya malamu te na mimeseno ya mboka na bango. (Mat. 19:10-12) Basusu bakoki kotikala minzemba mpo makambo esɛngi bongo. Yebá ete Yehova ná Yesu bamonaka te ete bakristo oyo bazali minzemba bazangi ntina. Na mokili mobimba, bandeko basi oyo bazali minzemba basalaka makambo mingi na lisangá. Lokola balingaka basusu mpe batyelaka bango mpenza likebi, basi bakristo yango bakómi bandeko basi mpe bamama ya elimo ya bato mingi.—Tángá Marko 10:29, 30; 1 Tim. 5:2.
17. Ndenge nini ndeko mwasi oyo azali elenge akoki komibongisa mpo na mosala ya ntango nyonso?
17 Okoki kosala mosala ya ntango nyonso. Bandeko basi basalaka mingi na mosala ya kosakola na mokili mobimba. (Nz. 68:11) Okoki komityela mokano ya kosala mosala ya ntango nyonso? Okoki kokóma mobongisi-nzela, kopesa mabɔkɔ na mosala ya botongi, to kosala na Betele. Bondelá mpo na mokano oyo omityeli. Sololá na bandeko mosusu oyo bamityelaki mikano ya ndenge wana mpe bakokisaki yango, mpe luká koyeba nini osengeli kosala mpo okokisa yango. Na nsima zwá bibongiseli ya malamu mpo okokisa mokano yango. Kokokisa mokano na yo ekofungwela yo mabaku ya kosala lisusu mingi na mosala ya Yehova.
18. Mpo na nini ndeko mwasi asengeli kopona malamu mobali oyo akobala? (Talá mpe elilingi.)
18 Okoki kozwa ekateli ya kobala. Bizaleli mpe makambo ya koyekola oyo tolobeli ekosalisa yo okóma mwasi ya makoki. Soki ozali kokanisa kobala, osengeli kopona molongani na yo na likebi mpenza. Ezali moko ya bikateli eleki ntina oyo okoki kozwa. Kobosana te, okozala na nse ya bokonzi ya mobali oyo okobala. (Rom. 7:2; Ef. 5:23, 33) Na yango omituna boye: ‘Azali mokristo oyo akɔmɛli na elimo? Atyaka Yehova na esika ya liboso na bomoi na ye? Azwaka bikateli ya bwanya? Andimaka mabunga na ye? Azalaka na limemya epai ya basi? Azali na makoki oyo esengeli ya kokokisa bamposa na ngai ya elimo, ya mosuni, mpe ya mayoki? Akokisaka mikumba na ye malamu? Na ndakisa, mikumba nini azali na yango na lisangá mpe ndenge nini akokisaka mikumba yango?’ (Luka 16:10; 1 Tim. 5:8) Nzokande, soki olingi kozwa mobali ya malamu, yo mpe osengeli kozala mwasi ya malamu.
19. Mpo na nini mokumba ya “mosungi” ezali mokumba ya lokumu?
19 Biblia elobi ete mwasi ya malamu azali “mosungi” mpo na mobali na ye mpe “akokani” na ye. (Eba. 2:18) Yango emonisi nde ete mwasi azali na motuya te? Te! Mokumba ya mwasi lokola mosungi ezali ya lokumu. Kutu, mbala mingi Biblia elobaka ete Yehova azali “mosungi.” (Nz. 54:4; Eba. 13:6) Mwasi azalaka mpenza mosungi mpo na mobali na ye ntango azali kopesa ye mabɔkɔ mpe kosalisa ye azwa bikateli oyo etaleli libota. Mpe lokola alingaka Yehova, mwasi yango asalaka nyonso mpo mobali na ye azala na lokumu. (Mas. 31:11, 12; 1 Tim. 3:11) Okoki komibongisa mpo na mokumba yango oyo ekoki koya na mikolo ezali koya soki ozali kokómisa bolingo na yo makasi mpo na Yehova mpe ozali mosungi mpo na basusu, ezala na ndako mpe na lisangá.
20. Mama akoki kozala na bopusi nini na libota na ye ?
20 Okoki kokóma mama. Nsima ya libala, mbala mosusu yo ná mobali na yo bokosepela kobota. (Nz. 127:3) Na yango, ekozala malamu kokanisa oyo yango ekosɛnga. Bizaleli mpe makambo ya koyekola oyo tolobeli na lisolo oyo ekosalisa yo soki obali mpe okómi na bana. Bolingo, boboto, mpe motema molai na yo ekosala ete libota na yo ezala malamu mpe esika oyo bana na yo bakomiyoka ete babatelami mpe bakokola malamu.—Mas. 24:3.
21. Ndenge nini totalelaka bandeko na biso ya basi, mpe mpo na nini? (Talá elilingi ya ezipeli.)
21 Bandeko basi, tolingaka bino mingi mpo na nyonso oyo bosalaka mpo na Yehova mpe basaleli na ye. (Ebr. 6:10) Bosalaka makasi mpo na kokolisa bizaleli ya elimo, koyekola makambo oyo ekosalisa bino na bomoi mpe baoyo bazali elongo na bino, mpe bozali komibongisa malamu mpo na mikumba oyo bokoki kozwa na mikolo ezali koya. Bozali na motuya mingi na ebongiseli ya Yehova!
LOYEMBO 137 Basi ya sembo, basi bakristo
a Bilenge basi, bozali na motuya mingi na lisangá. Bokoki kokóma bakristo oyo bakɔmɛli soki boloni bizaleli oyo esepelisaka Nzambe, soki boyekoli makambo oyo ekosalisa bino, mpe bomibongisi mpo na mikumba na mikolo ezali koya. Na ndenge yango, bokozwa mapamboli ebele na mosala ya Yehova.
b NDIMBOLA YA MALOBA: Moto oyo akómi mokristo oyo akɔmɛli alandaka litambwisi ya elimo ya Nzambe, kasi bwanya ya mokili te. Amekolaka ndakisa ya Yesu, asalaka makasi abatela boyokani ya penepene na Yehova, mpe amoniselaka basusu bolingo ya solosolo.
d Mpo na koyeba ntina ya koyekola kotánga, talá lisolo na jw.org “Mpo na nini ezali na ntina ete bana bátángaka? —Eteni ya 1: Kotánga buku moko to kotala filme?”