LISOLO YA BOYEKOLI 53
Bilenge mibali—Bókóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo
“Zalá makasi mpe monisá ete ozali mobali.”—1 BAK. 2:2.
LOYEMBO 135 Yehova alobi: ‘Zalá mayele, mwana na ngai’
NA MOKUSE a
1. Mpo na kolonga, ndeko mobali asengeli kosala nini?
MOKONZI Davidi ayebisaki Salomo boye: “Zalá makasi mpe monisá ete ozali mobali.” (1 Bak. 2:1-3) Ezali malamu bandeko mibali nyonso bakristo lelo oyo básalela toli yango. Mpo na kolonga, basengeli koyekola kotosa mibeko ya Nzambe mpe kosalela mitinda ya Biblia na makambo nyonso ya bomoi na bango. (Luka 2:52) Mpo na nini ezali mpenza na ntina bandeko mibali ya bilenge bákóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo?
2-3. Mpo na nini ezali na ntina mingi ndeko mobali ya elenge akóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo?
2 Ndeko mobali mokristo azalaka na mikumba ya ntina mingi na libota mpe na lisangá. Na ntembe te, bino bilenge mibali bokanisaka mikumba oyo bokoki kozwa na mikolo ezali koya. Okoki mbala mosusu komityela mokano ya kosala mosala ya ntango nyonso, kokóma mosaleli na misala mpe na nsima kokóma nkulutu na lisangá. Okoki mpe kosepela kobala mpe kobota bana. (Ef. 6:4; 1 Tim. 3:1) Mpo na kokokisa mikano yango mpe kolonga, osengeli kokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo. b
3 Nini ekoki kosalisa yo okóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo? Osengeli koyekola makambo ya ntina oyo ekosalisa yo. Na yango, okoki kosala nini sikoyo mpo na komibongisa mpe kolonga na mikumba oyo okoki mbala mosusu kozwa na mikolo ezali koya?
NDENGE YA KOKÓMA MOKRISTO OYO AKƆMƐLI NA ELIMO
4. Epai wapi okoki kozwa bandakisa ya malamu oyo okoki komekola? (Talá mpe elilingi.)
4 Poná bandakisa malamu ya komekola. Biblia etondi na bandakisa mingi ya malamu oyo bilenge mibali bakoki komekola. Mibali yango ya ntango ya kala balingaki Nzambe mingi mpe bakokisaki mikumba ndenge na ndenge mpo na kobatela basaleli ya Nzambe. Okoki mpe kozwa ndakisa ya malamu epai ya bakristo oyo bakɔmɛli na elimo na libota na yo moko mpe na lisangá. (Ebr. 13:7) Ozali mpe na ndakisa ya kokoka, ya Yesu Kristo. (1 Pe. 2:21) Wana ozali koyekola bandakisa yango na likebi, talelá bizaleli ya malamu oyo bamonisaki. (Ebr. 12:1, 2) Na nsima, kanisá ndenge okomekola mibali yango.
5. Ndenge nini okoki kokolisa likoki ya kokanisa, mpe mpo na nini ezali na ntina? (Nzembo 119:9)
5 Kolisá mpe “batelá . . . likoki ya kokanisa.” (Mas. 3:21) Mobali oyo azali na likoki ya kokanisa atalelaka na likebi makanisi na ye liboso ya kosala likambo. Yango wana, salá makasi mpo okóma na likoki yango mpe obatela yango. Mpo na nini? Mpo mokili oyo etondi na bilenge mibali oyo bamitambwisaka na kolanda makanisi na bango moko, to oyo basalaka makambo na kolanda mayoki na bango. (Mas. 7:7; 29:11) Makambo oyo elekaka na televizyo, bafilme, mpe Internet ekoki kobongola ndenge na yo ya kokanisa mpe misala na yo. Kasi ndenge nini okoki kokóma na likoki ya kokanisa? Bandá na koyekola mitinda ya Biblia mpe kanisá ntina oyo mitinda yango ezali mpo na bolamu na yo. Na nsima, salelá mitinda yango mpo esalisa yo ozwa bikateli oyo ekosepelisa Yehova. (Tángá Nzembo 119:9.) Soki okolisi likoki ya kokanisa, oyo ezali na ntina mingi, ekosalisa yo mpo okóma ndeko mobali oyo akɔmɛli na elimo. (Mas. 2:11, 12; Ebr. 5:14) Talá ndenge likoki ya kokanisa ekosalisa yo na makambo oyo mibale: (1) na ndenge na yo ya kozala na bandeko basi mpe (2) na bikateli na yo mpo na molato mpe kobongisa nzoto.
6. Ndenge nini likoki ya kokanisa ekosalisa ndeko mobali ya elenge amonisa limemya epai ya bandeko basi?
6 Likoki ya kokanisa ekosalisa yo ozalaka na limemya epai ya basi. Ezali mabe te ndeko mobali ya elenge asepela koyeba ndeko mwasi moko malamu. Kasi, elenge mobali oyo azali na likoki ya kokanisa akoloba te, akokoma te, to akosala likambo moko te oyo ekomonisa bolingo ya mwasi ná mobali, longola kaka soki azali mpenza kokanisa kobala ndeko mwasi yango. (1 Tim. 5:1, 2) Soki alingani na ndeko mwasi moko, akobatela lokumu ya ndeko mwasi, akolinga ata moke te bázala kaka bango mibale kozanga ete bázala na moto oyo akoki kosalisa bango bákwea te.—1 Ko. 6:18.
7. Ndenge nini likoki ya kokanisa ekosalisa ndeko mobali ya elenge na oyo etali kopona molato mpe monzɛlɛ?
7 Lolenge mosusu oyo elenge mobali akomonisa ete akolisi likoki ya kokanisa ezali na molato mpe monzɛlɛ oyo azali kopona. Mbala mingi, bato oyo babimisaka midɛlɛ ya sika ya bilamba mpe basalaka bapiblisite na yango bazalaka na limemya te mpo na Yehova to bazalaka na bomoi ya mbindo. Makanisi na bango ya mbindo emonanaka na midɛlɛ ya bilamba oyo ekangaka nzoto to oyo esalaka ete bana mibali bábima lokola bana basi. Ntango azali kopona elamba na ye ya kolata, elenge mobali oyo azali kokɔmɛla na elimo akolanda mitinda ya Biblia mpe bandakisa malamu oyo amonaka na lisangá. Akoki komituna boye: ‘Elamba oyo nakolata ekomonisa ete nazali na makanisi malamu mpe na limemya mpo na basusu? Molato na ngai ekosalisa basusu bámona na pɛtɛɛ nyonso ete nazali mpenza mosaleli ya Nzambe?’ (1 Ko. 10:31-33; Tito 2:6) Soki elenge mobali azali na likoki ya kokanisa, bandeko na ye ya basi mpe ya mibali na lisangá bakopesa ye limemya mpe Tata na ye na likoló akosepela na ye.
8. Ndeko mobali ya elenge akoki kosala nini mpo azala moto oyo bakoki kotyela motema?
8 Zalá moto oyo bakoki kotyela motema. Elenge mobali oyo azali moto oyo bakoki kotyela motema asalaka makasi akokisa mikumba na ye nyonso. (Luka 16:10) Tótalela ndakisa ya kokoka ya Yesu. Azalaki mafumafu te mpe azalaki kokima mikumba na ye te. Kasi, akokisaki mikumba nyonso oyo Yehova apesaki ye, ata ntango ezalaki mpasi kosala bongo. Alingaki bato—mingimingi bayekoli na ye—mpe andimaki kopesa bomoi na ye mpo na bango. (Yoa. 13:1) Na ndakisa ya Yesu, salá makasi okokisa mokumba nyonso oyo bapesi yo. Soki ozali koyeba te ndenge ya kosala yango, zalá na komikitisa mpe sɛngá bandeko mibali oyo bakɔmɛli na elimo básalisa yo. Koluka te kosala kaka mwa moke na likambo oyo basɛngi yo. (Rom. 12:11) Na esika osala bongo, kokisáká mokumba na yo mobimba, sala yango “mpo na Yehova, kasi mpo na bato te.” (Kol. 3:23) Mpe lokola ozali moto ya kokoka te, zalá na bopɔlɔ mpe ndimá mabunga nyonso oyo okosala.—Mas. 11:2.
YEKOLÁ MAKAMBO OYO EKOSALISA YO NA BOMOI
9. Mpo na nini ndeko mobali ya elenge asengeli koyekola makambo oyo ekosalisa ye?
9 Mpo okóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo, osengeli koyekola makambo oyo ekosalisa yo na bomoi. Yango ekosalisa yo ondima mikumba na lisangá, obatela mosala ya mosuni mpo na kokokisa bamposa na yo mpe ya libota, mpe ozala na boyokani ya malamu na basusu. Tólobela mwa makambo yango mosusu ya ntina.
10-11. Soki ndeko mobali ya elenge ayekoli kotánga mpe kokoma malamu, ndenge nini yango ekosalisa ye moko mpe lisangá? (Nzembo 1:1-3) (Talá mpe elilingi.)
10 Yekolá kotánga mpe kokoma malamu. Biblia elobi ete moto ya esengo mpe oyo alongaka na nyonso oyo azali kosala azwaka ntango ya kotánga Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango mokolo na mokolo. (Tángá Nzembo 1:1-3.) Ntango azali kotánga Biblia mokolo na mokolo, akoyeba makanisi ya Yehova, mpe yango ekosalisa ye akanisaka malamu mpe ayeba kosalela makambo oyo atángaki. (Mas. 1:3, 4) Lisangá ezali na mposa ya bandeko mibali ya ndenge wana. Mpo na nini?
11 Bandeko mibali mpe bandeko basi bazali na mposa ya mibali oyo bakoki mpo na kopesa bango mateya mpe toli oyo euti na Biblia. (Tito 1:9) Soki oyebi kotánga mpe kokoma malamu, okoyeba kobongisa masolo mpe biyano ya malamu oyo ekokómisa kondima ya bandeko makasi. Okoyeba mpe kozwa mwa banɔti ya malamu ntango ozali koyekola mpe ntango ozali koyoka badiskur na makita, na mayangani ya mike, mpe na mayangani ya minene. Makambo oyo okokoma ekosalisa yo okómisa kondima na yo moko makasi mpe olendisa basusu.
12. Nini ekosalisa yo oyeba ndenge ya kosolola malamu na basusu?
12 Yekolá kosolola malamu na basusu. Mokristo asengeli koyeba kosolola malamu na basusu. Ndeko mobali oyo ayebi kosolola malamu na basusu ayokaka ntango basusu bazali koloba mpe atyaka likebi na makanisi mpe mayoki na bango. (Mas. 20:5) Akoki kotalela mongongo ya moto, elongi na ye, mpe bajɛstɛ oyo azali kosala mpo na koyeba ndenge azali koyoka. Okoki koyekola kosala yango te soki olekisaka te ntango elongo na basusu. Soki osalelaka ntango nyonso bamesaje na nzela ya baaparɛyi mpo na kosolola na basusu, yango ekoki kolɛmbisa likoki na yo ya kosolola na bato na miso boye. Yango wana, lukáká mabaku ya kosolola na basusu na miso boye.—2 Yoa. 12.
13. Likambo nini mosusu elenge mobali asengeli koyekola? (1 Timote 5:8)
13 Yekolá koluka mbongo mpo na kokokisa bamposa na yo. Mokristo oyo akɔmɛli na elimo asengeli kozala na likoki ya kokokisa bamposa na ye moko mpe ya bato ya ndako na ye. (Tángá 1 Timote 5:8.) Na bamboka mosusu, bandeko mibali ya bilenge bakoki koyekola mosala ya mabɔkɔ epai ya tata na bango to ndeko mosusu ya libota. Na bisika mosusu, elenge mobali akoki koyekola ndenge ya kosala mombongo to mosala mosusu na kelasi. Ata soki okoyekola na ndako to na kelasi, ezali malamu oyekola kosala likambo oyo ekosalisa yo ozwa mosala. (Mis. 18:2, 3; 20:34; Ef. 4:28) Salá makasi oyebana lokola moto oyo alingaka mosala mpe akómisaka yango tii na nsuka. Soki oyebani bongo, ekosalisa yo ozwa mosala mpe obatela yango. Bizaleli mpe makambo ya koyekola oyo tolobeli ekosalisa mpe ndeko mobali akokisa mikumba oyo akoki kozwa na nsima. Tólobela mikumba yango mosusu.
OMIBONGISA MPO NA MIKUMBA OYO OKOKI KOZWA NA MIKOLO EZALI KOYA
14. Ndenge nini ndeko mobali ya elenge akoki komibongisa mpo na kokɔta na mosala ya ntango nyonso?
14 Kosala mosala ya ntango nyonso. Bakristo mingi oyo bakɔmɛli na elimo babandaki mosala ya ntango nyonso na bolenge mpenza. Mosala ya mobongisi-nzela esalisaka elenge mobali ayekola ndenge ya kosala malamu elongo na bato ya ndenge na ndenge. Esalisaka ye mpe ayeba kosalela mbongo mpe aboya kokɔta banyongo. (Flp. 4:11-13) Mosala ya mobongisi-nzela mosungi nde ebongisaka moto mpo akɔta na mosala ya ntango nyonso. Bato mingi basalaka lokola mobongisi-nzela mosungi mpo na mwa ntango, mpe yango esalisaka bango mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Mosala ya mobongisi-nzela epesaka moto libaku ya kosala lolenge mosusu ya mosala ya ntango nyonso, na ndakisa mosala ya botongi to kokɔta betele.
15-16. Ndeko mobali ya elenge akoki kosala nini mpo azwa mikumba na lisangá?
15 Kokóma mosaleli na misala to nkulutu. Bandeko mibali basengeli komityela mokano ya kokokisa masɛngami mpo na kosala lokola bankulutu na lisangá. Biblia elobi ete mibali oyo bakokisaka masɛngami mpo na kozwa mokumba yango bazali na “mposa ya mosala moko ya malamu mingi.” (1 Tim. 3:1) Liboso ndeko mobali akóma nkulutu, asengeli kokokisa masɛngami mpo na kokóma mosaleli na misala. Basaleli na misala bapesaka bankulutu mabɔkɔ na makambo mingi. Bankulutu mpe basaleli na misala basalelaka bandeko na bango na komikitisa nyonso mpe bazalaka na molende na mosala ya kosakola. Bandeko mibali bakoki kotyama basaleli na misala ata mwa moke liboso bakokisa mbula 20. Mpe mosaleli na misala oyo akokisaka mikumba na ye malamu akoki kotyama nkulutu mwa moke nsima ya kokokisa mbula 20.
16 Ndenge nini okoki kokokisa masɛngami mpo na kozwa mikumba yango? Sekele ezali kaka moko. Masɛngami nyonso euti na Biblia mpe na bolingo ya moto mpo na Yehova, libota na ye, mpe lisangá. (1 Tim. 3:1-13; Tito 1:6-9; 1 Pe. 5:2, 3) Salá makasi okanga ntina ya lisɛngami mokomoko. Bondelá Yehova asalisa yo okokisa masɛngami yango. c
17. Ndenge nini ndeko mobali ya elenge akoki komibongisa mpo na mokumba ya mobali mpe mokonzi ya libota? (Talá mpe elilingi.)
17 Kokóma mobali mpe mokonzi ya libota. Ndenge Yesu amonisaki yango, bakristo mosusu oyo bakɔmɛli na elimo batikalaka minzemba. (Mat. 19:12) Kasi, soki oponi kobala, okobakisa mokumba mosusu ya mobali mpe mokonzi ya libota. (1 Ko. 11:3) Yehova asɛngi mobali alinga mwasi na ye mpe akokisa bamposa na ye ya mosuni, ya mayoki, mpe ya elimo. (Ef. 5:28, 29) Bizaleli mpe makambo ya koyekola oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, na ndakisa kokolisa likoki na yo ya kokanisa, kopesa bandeko basi limemya, mpe kozala moto oyo basusu bakoki kotyela motema, ekosalisa yo ozala molongani malamu. Ekobongisa yo mpo okokisa malamu mokumba na yo ya mobali mpe mokonzi ya libota.
18. Ndenge nini ndeko mobali ya elenge akoki komibongisa mpo na mokumba ya tata?
18 Tata. Nsima ya kobala, mbala mosusu okokóma tata. Mateya nini okoki kozwa epai ya Yehova na oyo etali kozala tata ya malamu? Ezali na mateya mingi oyo okoki kozwa. (Ef. 6:4) Yehova ayebisaki Mwana na ye Yesu polele ete alingaka ye mpe andimi ye. (Mat. 3:17) Soki okómi tata, omindimisa ete okobanda koyebisa bana na yo mbala na mbala ete olingaka bango. Pesáká bango longonya mpo na makambo ya malamu oyo bazali kosala. Batata oyo bamekolaka ndakisa ya Yehova basalisaka bana na bango ya basi mpe ya mibali bákóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo. Okoki komibongisa sikoyo mpo na mokumba yango soki ozali kotyela basusu likebi na libota na yo mpe na lisangá, mpe ozali koyekola koyebisa basusu ete olingaka bango mpe osepelaka na bango. (Yoa. 15:9) Yango ekosalisa yo okokisa mokumba oyo okoki mbala mosusu kozwa na mikolo ezali koya lokola mobali mpe tata ya libota. Liboso tókóma kuna, okozala na motuya mingi epai ya Yehova, mpe okosalisa libota na yo, mpe lisangá.
OKOSALA NINI SIKOYO?
19-20. Nini ekosalisa bandeko mibali ya bilenge bákóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo? (Talá elilingi ya ezipeli.)
19 Bilenge mibali, bokokóma kaka mbala moko boye te bakristo oyo bakɔmɛli na elimo. Bosengeli kopona bandakisa malamu ya komekola, kokolisa likoki ya kokanisa, kozala bato oyo basusu bakoki kotyela motema, koyekola makambo oyo ekosalisa bino na bomoi, mpe komibongisa mpo na mikumba oyo bokoki kozwa na mikolo ezali koya.
20 Okoki kobanga soki otali makambo nyonso oyo osengeli kosala. Kasi okoki kolonga. Kobosana te ete Yehova azali na mposa makasi ya kosalisa yo. (Yis. 41:10, 13) Ya solo, bandeko basi mpe mibali na lisangá mpe bakosalisa yo. Soki okómi mpenza mokristo oyo akɔmɛli na elimo, bomoi na yo ekozala malamu mpe okozala na esengo. Tolingaka bino mingi, bandeko mibali ya bilenge! Tiká ete Yehova apambola yo mpo na milende oyo ozali kosala sikoyo mpo okóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo.—Mas. 22:4.
LOYEMBO 65 Kende liboso!
a Lisangá ya bokristo ezali na mposa ya mibali oyo bakɔmɛli na elimo. Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo bino bandeko mibali ya bilenge bokoki kokóma mibali bakristo oyo bakɔmɛli na elimo.
b Talá “Ndimbola ya maloba” na lisolo oyo eleki.
c Talá mokapo 5-6 ya buku Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova.