Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali koyeba lisusu?

Ozali koyeba lisusu?

Otángaki na likebi masolo nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya mbula oyo? Meká naino koyanola na mituna oyo elandi:

Kokómisa makanisi na biso makanisi ya sika’ elimboli nini? (Rom. 12:2)

Yango elimboli te ete tosengeli kaka kosala mwa makambo ya malamu. Esɛngi nde kotalela bomoto na biso ya kati, kosala bambongwana oyo esengeli mpe kosala nyonso oyo tokoki mpo na kotosa mibeko ya Yehova na oyo etali bizaleli malamu.—w23.01, nk. 8,9.

Ndenge nini tokoki kozala na bokatikati ntango tozali kotala makambo oyo ezali kosalema na mokili?

Totyaka mpenza likebi na makambo ya mokili, oyo ezali kokokisa bisakweli ya Biblia. Na esika tóloba ete likambo boye to boye ezali kokokisa esakweli, oyo ekoki kokɔtisa bokabwani, makambo oyo tozali koloba esengeli nde kouta na makambo oyo ebongiseli ya Yehova ezali kobimisa. (1 Ko. 1:10)—w23.02, p. 16.

Ndenge nini batisimo ya Yesu ekeseni na oyo ya bayekoli na ye?

Abotamaki na ekólo oyo emipesaki na Nzambe, yango wana azalaki te na ntina ya komipesa lisusu epai ya Yehova, ndenge biso tosalaka. Yesu azalaki moto ya kokoka, oyo azangaki lisumu. Azalaki na ntina te ya kobongola motema na masumu na ye.—w23.03, lok. 5.

Tokoki kosala nini mpo tópesa basusu libaku ya kopesa biyano na makita?

Tokoki kopesa biyano ya mikuse, kotikela mpe basusu ntango ya koloba. Tokoki mpe koboya kolobela makambo ebeleebele. Na bongo, bandeko mosusu bakozanga te likambo ya koloba.—w23.04, lok. 23.

“Nzela ya Bosantu” oyo Yisaya 35:8 elobeli ezali komonisa nini?

Balabala yango ya elilingi emonisi liboso nzela oyo Bayuda oyo bazwaki longwa na Babilone tii na mboka na bango. Bongo na ntango na biso? Basiɛklɛ mingi liboso ya mobu 1919, bato mosusu babandaki kobongisa nzela—na ndakisa basalaki mosala ya kobongola mpe konyata Biblia. Basaleli ya Nzambe na paradiso ya elimo bazali kotambola na “Nzela ya Bosantu,” oyo ezali komema na mapamboli ya Bokonzi.—w23.05, nk. 15-19.

Masese mokapo 9 epesi toli oyo emonisami na basi nini mibale ya elilingi?

Masese elobeli “mwasi ya zoba” oyo libyangi na ye ezali komema na “Nkunda” mpe “bwanya ya solosolo,” oyo emonisami na mwasi, oyo libyangi na ye ezali komema na “nzela ya mayele” mpe na bomoi. (Mas. 9:​1, 6, 13, 18)—w23.06, nk. 22-24.

Ndenge nini komikitisa ya Nzambe mpe ezaleli na ye ya makambo makasimakasi te emonanaki na ndenge asalelaki Lota makambo?

Yehova apesaki moto ya sembo Lota mitindo ete akima na etúká ya ngombangomba. Kasi ntango Lota asɛngaki ete akende nde na Zoare Yehova atikaki ye akende.—w23.07, lok. 21.

Mwasi akoki kosala nini soki molongani na ye atalaka pornografi?

Asengeli kobosana te ete ezali foti na ye te. Asengeli kotya nde makanisi na boyokani na ye ná Yehova mpe komanyola na masolo ya Biblia oyo elobeli basi oyo bazalaki kotungisama mpe babɔndisamaki epai ya Yehova. Akoki kosalisa molongani na ye akima makambo oyo ekoki komema ye na kotala pornografi.—w23.08, nk. 14-17.

Ntango batyeli bindimeli na biso ntembe, ndenge nini mayele ya kososola ekoki kosalisa biso tómonisa motema pɛtɛɛ?

Tokoki kotalela motuna to ntembe yango lokola libaku ya koyeba makambo oyo moto mosusu akanisaka to atyelaka likebi. Na yango tobongisami malamu mpo na komonisa motema pɛtɛɛ.—w23.09, lok. 17.

Liteya nini tokoki kozwa epai ya Maria na oyo etali kozwa makasi?

Ntango ayebaki ete akozala mama ya Masiya, Maria azwaki makasi epai ya basusu. Gabriele mpe Elizabeti balendisaki Maria na nzela ya Makomami. Biso mpe tokoki kozwa makasi na nzela ya bandeko ya lisangá.—w23.10, lok. 15.

Ndenge nini Yehova akoki koyanola na mabondeli na biso?

Alaki ete akoyoka mabondeli na biso mpe atalaka ndenge eyokani na mokano na ye. (Yir. 29:12) Akoki koyanola na mabondeli ya ndenge moko na balolenge ekeseni, kasi akosalisa biso ntango nyonso.—w23.11, nk. 21-22.

Baroma 5:2 elobeli “elikya,” bongo mpo na nini elobelami lisusu na vɛrsɛ 4?

Ntango moto ayoki nsango malamu, akómaka na elikya ya kozala na bomoi libela na libela na paradiso awa na mabele. Kasi wana azali kokutana na minyoko, ayiki mpiko, mpe Nzambe andimi ye, na ntembe te elikya na ye ekómaka lisusu makasi mpe eloko na ye moko mpenza.—w23.12, nk. 12-13.