Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 51

Sepelá na elikya oyo ekoyokisa yo nsɔni te

Sepelá na elikya oyo ekoyokisa yo nsɔni te

“Elikya yango eyokisaka nsɔni te.”—ROM. 5:5.

LOYEMBO 142 Tósimba makasi elikya na biso

NA MOKUSE a

1. Mpo na nini tokoki koloba ete Abrahama azalaki na ntina ya kokoba kozala na elikya?

 YEHOVA alakaki moninga na ye Abrahama ete bikólo nyonso na mabele ekopambolama na nzela ya libota to momboto na ye. (Eba. 15:5; 22:18) Lokola Abrahama azalaki na kondima makasi epai ya Nzambe, azalaki na ntembe te ete elaka ya Nzambe ekokokisama. Mpe ata ntango Abrahama akómaki na mbula 100 mpe mwasi na ye na mbula 90, babalani yango ya sembo bazalaki kaka na mwana te. (Eba. 21:​1-7) Kasi Biblia elobi ete: “[Abrahama] azalaki na elikya mpe na kondima ete akokóma tata ya bikólo mingi ndenge elobamaki.” (Rom. 4:18) Toyebi ete elikya oyo Abrahama azalaki na yango ekokisamaki. Abotaki mwana oyo azalaki kozela banda kala, Yisaka. Nini esimbaki elikya ya Abrahama?

2. Mpo na nini Abrahama andimaki ete elaka ya Yehova ekokokisama?

2 Lokola Abrahama azalaki na boyokani ya penepene na Yehova, “andimaki mpenza ete oyo Nzambe alakaki” ekokokisama. (Rom. 4:21) Yehova andimaki Abrahama mpe atángaki ye moto ya sembo to moyengebene mpo na kondima na ye. (Yak. 2:23) Ndenge Baroma 4:18 emonisi yango, kondima ya Abrahama mpe elikya na ye ezalaki na boyokani. Tótalela sikoyo makambo oyo Paulo alobaki mpo na elikya, ndenge emonisami na Baroma mokapo 5.

3. Paulo alobi nini mpo na elikya?

3 Paulo apesi ntina oyo tokoki kondima ete “elikya [na biso] eyokisaka nsɔni te.” (Rom. 5:5) Asalisi biso mpe tóyeba ndenge oyo elikya na biso bakristo ekoki kokola. Wana tozali kotalela likambo mokomoko oyo Paulo alobaki na Baroma 5:​1-5, kanisá makambo ya bomoi na yo moko. Soki osali bongo, na ntembe te okomona ete wana bambula ezali koleka, elikya na yo ekómi lisusu makasi. Lisolo oyo ekomonisa mpe ndenge oyo okoki kokómisa lisusu elikya na yo makasi koleka ndenge ezali sikoyo. Liboso, tólobela naino elikya kitoko oyo Paulo alobi ete ekoyokisa nsɔni te.

ELIKYA NA BISO YA KITOKO

4. Baroma 5:​1, 2 elobeli nini?

4 Tángá Baroma 5:​1, 2. Paulo akomaki maloba yango epai ya lisangá oyo ezalaki na Roma. Bandeko mibali mpe basi ya lisangá yango bayekolaki makambo ya Yehova mpe ya Yesu, bamonisaki kondima, mpe bakómaki bakristo. Na yango Nzambe ‘atángaki [bango] bato ya sembo na nzela ya kondima,’ mpe atyaki bango mafuta na elimo santu. Na bongo, bazwaki elikya moko ya solosolo, ya kitoko mpenza.

5. Elikya nini baoyo batyami mafuta na elimo bazali na yango?

5 Na nsima Paulo akomelaki bakristo oyo batyami mafuta oyo bazalaki na Efese mpo na elikya oyo Nzambe apesaki bango. Bazalaki na elikya ya kozwa “libula ya basantu.” (Ef. 1:18) Mpe epai ya bakristo ya Kolose, Paulo amonisaki esika oyo elikya na bango ekokokisama. Abengaki yango “elikya oyo babombeli bino na likoló.” (Kol. 1:​4, 5) Na yango, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali na elikya ya kosekwa mpo na kozwa bomoi ya seko na likoló, epai bakoyangela elongo na Kristo—1 Tes. 4:​13-17; Em. 20:6.

Ndeko F. W. Franz amonisaki ete bakristo oyo batyami mafuta na elimo bandimaka mpenza ete elikya na bango ezali solo (Talá paragrafe 6)

6. Mokristo moko oyo atyami mafuta na elimo alobaki nini mpo na elikya na ye?

6 Bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazwaka mpenza elikya yango na motuya. Moko na bango, ndeko Frederick Franz, abimisaki makanisi na ye na maloba oyo: “Elikya na biso ezali solo, ekokokana mpenza mpe koleka na oyo tokoki kokanisa likoló na mokomoko ya basangani 144000 ya etonga moke.” Nsima ya kosalela Nzambe na bosembo bambula mingi, na 1991 ndeko Franz alobaki: “Tobungisi naino te motuya ya elikya yango. . . . Motuya na yango ezali se kobakisama na miso na biso awa ezali biso se kozela yango. Ezali eloko oyo tosengeli mpenza kozela na motema molai, ata soki ekosɛnga milio moko na bambula. Nazali kotalela elikya yango lokola eloko eleki mpenza na motuya.”

7-8. Elikya nini mingi na biso tozali na yango? (Baroma 8:​20, 21)

7 Basaleli mingi ya Yehova lelo oyo bazali na elikya mosusu. Bazali na elikya oyo Abrahama mpe azalaki na yango—kozwa bomoi ya seko awa na mabele na nse ya Bokonzi ya Nzambe. (Ebr. 11:​8-10, 13) Paulo akomaki ete baoyo bazali na elikya yango nsukansuka bakozwa eloko moko oyo etondi na nkembo. (Tángá Baroma 8:​20, 21.) Mbala ya liboso oyo oyekolaki elaka yango oyo Biblia epesi mpo na mikolo ezali koya, nini esepelisaki yo mingi mpo na yango? Osepelaki nde koyeba ete mokolo mosusu okozala moto ya kokoka, okobendama lisusu te na lisumu? To osepelaki nde koyeba ete bandeko mpe baninga na yo oyo bakufá bakozonga na bomoi na paradiso awa na mabele? Yango etindaki yo ozela makambo ya malamu “mpo na elikya.”

8 Ezala tokozwa bomoi ya seko na likoló to na mabele, tozali na elikya kitoko oyo epesi biso ntina ya kosepela. Mpe elikya na biso oyo epesaka esengo ekoki kokóma lisusu makasi. Makambo oyo Paulo akomaki na nsima emonisi ndenge yango ekoki kosalema. Tótalela sikoyo makambo yango. Kosala bongo ekondimisa biso mpenza ete elikya na biso ekokoba kokóma makasi mpe ete ekoyokisa biso nsɔni te.

NDENGE ELIKYA EKÓMAKA MAKASI

Bakristo nyonso bakoki kozela kokutana na minyoko (Talá paragrafe 9-10)

9-10. Ndenge ndakisa ya Paulo emonisi yango, bakristo bakoki komizela na nini? (Baroma 5:3) (Talá mpe bililingi.)

9 Tángá Baroma 5:3. Tomoni ete elikya ekoki kokóma makasi koleka na ntango ya minyoko. Yango ekoki kokamwisa biso. Kasi likambo ya solo ezali ete bayekoli nyonso ya Kristo bakoki kokutana na minyoko. Tózwa ndakisa ya Paulo. Alobaki na bakristo ya Tesaloniki boye: “Ntango tozalaki elongo na bino, tozalaki koyebisa bino liboso ete tosengeli kokutana na mikakatano, mpe esalemaki bongo.” (1 Tes. 3:4) Mpe epai ya Bakorinti, akomaki: “Bandeko, tolingi te kobombela bino mikakatano oyo ekómelaki biso . . . Tozalaki ata kobanga mpo na bomoi na biso.”—2 Ko. 1:8; 11:​23-27.

10 Lelo oyo mpe, bakristo bayebi ete bakoki kokutana na mikakatano to na minyoko. (2 Tim. 3:12) Bongo yo? Lokola ozali kondimela Yesu mpe kolanda ndakisa na ye, ozali kokutana na minyoko? Baninga to bandeko ya libota bakoki kotyola yo. Bakoki kutu koyina yo. Ekateli na yo ya kozala sembo na makambo nyonso ezali kobimisela yo mikakatano na mosala? (Ebr. 13:18) Guvɛrnema ezali konyokola yo mpo oyebisaki elikya na yo epai ya basusu? Ata soki minyoko oyo tozali kokutana na yango ezali ya ndenge nini, Paulo alobaki ete tosengeli kosepela. Mpo na nini?

11. Mpo na nini tosengeli kozala na ekateli ya koyika mpiko na komekama ya ndenge nyonso?

11 Tokoki kosepela ntango tozali kokutana na minyoko mpo na eloko oyo yango ebimisaka. Ndenge Baroma 5:3 elobi yango, “monyoko ebotaka ezaleli ya koyika mpiko.” Lokola bakristo nyonso bakokutana na minyoko, bakristo nyonso basengeli kozala na ezaleli ya koyika mpiko. Tosengeli kozala na ekateli ya koyika mpiko na komekama nyonso oyo tokutani na yango. Kaka soki tosali bongo nde tokomona kokokisama ya elikya na biso. Tólinga te kozala lokola bato oyo Yesu azalaki kokanisa ntango alobelaki mboto oyo ekweaki na mabele oyo ezali na mabanga. Na ebandeli bandimaki liloba na esengo kasi “ntango bolɔzi to monyoko” ebimaki, babɛtaki libaku. (Mat. 13:​5, 6, 20, 21) Ya solo, botɛmɛli to komekama ezalaka pɛtɛɛ te to likambo ya esengo, kasi koyikela yango mpiko ememaka matomba ya solosolo. Na ndenge nini?

12. Koyikela komekama mpiko ememelaka biso litomba nini?

12 Moyekoli Yakobo alobelaki matomba oyo koyikela mikakatano mpiko ebimisaka. Akomaki boye: “Tiká ezaleli ya koyika mpiko esala mosala na yango mobimba, mpo bózala bato oyo bakoki na makambo nyonso mpe babongi na makambo nyonso, bazangi eloko te.” (Yak. 1:​2-4) Yakobo alobeli koyika mpiko lokola nde ezali na mokano, to mosala moko ya kosala. Mosala nini ezaleli ya koyika mpiko esalaka? Ekoki kosalisa yo okolisa lisusu bizaleli lokola motema molai, kondima, mpe ezaleli ya kotyela Nzambe motema. Kasi, koyika mpiko ememaka mpe litomba mosusu ya ntina mingi.

13-14. Eloko mosusu nini koyika mpiko ememelaka biso, mpe yango esalaka nini na elikya? (Baroma 5:4)

13 Tángá Baroma 5:4. Paulo alobaki ete ezaleli ya koyika mpiko esalaka ete “Nzambe andima moto.” Soki ozali koyika mpiko, Yehova akondima yo. Yango elingi koloba te ete Yehova asepelaka ndenge ozali kokutana na minyoko to na mikakatano. Oyo Nzambe andimaka ezali nde yo. Ezaleli na yo ya koyika mpiko esalaka ete Nzambe andima yo. Ezali mpenza lipamboli!—Nz. 5:12.

14 Kobosana te ete Abrahama ayikaki mpiko na makambo oyo akutanaki na yango mpe Nzambe andimaki ye. Yehova azwaki ye lokola moninga na Ye mpe atángaki ye moto ya sembo to moyengebene. (Eba. 15:6; Rom. 4:​13, 22) Yango ekoki kosalema mpe mpo na biso. Nzambe andimaka moto te na kotalela ebele ya makambo oyo azali kosala na mosala na ye to mikumba oyo azali na yango. Andimaka moto nde mpo azali koyika mpiko na bosembo nyonso. Mpe ata soki tozali na mbula boni, makambo ya bomoi na biso ezali ndenge nini, to makoki nini tozali na yango, biso nyonso tokoki koyika mpiko. Ozali sikoyo koyika mpiko na komekama moko boye na bosembo? Soki ezali bongo, yebá ete Nzambe azali kondima yo. Koyeba ete Nzambe azali kondima biso ekoki kosalisa biso mingi. Ekoki kokómisa elikya na biso makasi.

ELIKYA YA MAKASI KOLEKA

15. Likambo nini mosusu Paulo alobelaki, mpe yango ekoki kobimisa motuna nini?

15 Ndenge Paulo alimboli yango, Nzambe andimaka biso soki tolongi koyikela komekama mpiko. Talá likambo mosusu oyo Paulo alobi: “Kondimama yango ebotaka [to ememaka na] elikya, mpe elikya yango eyokisaka nsɔni te.” (Rom. 5:​4, 5) Yango ekoki kokamwisa basusu. Mpo na nini? Mpo liboso, ndenge Baroma 5:2 emonisi yango, Paulo alobaki ete bakristo yango ya Roma basilaki kozwa elikya, “elikya . . . ya kozwa nkembo ya Nzambe.” Na yango, basusu bakoki komituna, ‘Soki bakristo yango basilaki kozwa elikya, mpo na nini Paulo atángi lisusu elikya na nsima na lisolo na ye?’

Elikya oyo ozalaki na yango na ebandeli mpe osepelaki na yango ekómi likambo ya solo mpenza mpe makasi koleka (Talá paragrafe 16-17)

16. Ndenge nini elikya ebandaka kokola epai ya moto? (Talá mpe bililingi.)

16 Tokoki kokanga ntina ya makambo oyo Paulo alobaki soki tobosani te ete elikya ezali eloko oyo ekómaka makasi. Tózwa ndakisa: Ozali koyeba lisusu ntango oyo oyokaki mpo na mbala ya liboso elikya kitoko oyo ezali na Liloba ya Nzambe? Na ntango yango, mbala mosusu omonaki ete likanisi ya kozala na bomoi libela na libela na paradiso awa na mabele ezali kaka ndɔtɔ mpamba. Kasi, nsima ya koyeba malamumalamu Yehova mpe bilaka ya Biblia, okómaki kondima mpenza ete elikya yango ekokokisama.

17. Ndenge nini elikya na yo ekobaki kokóma makasi nsima ya komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo?

17 Ata nsima ya komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo, elikya na yo ezalaki se kokóma makasi wana okobaki koyekola makambo mosusu mingi mpe kokola na elimo. (Ebr. 5:13–6:1) Na ntembe te omonaki bosolo ya likambo oyo Baroma 5:​2-4 elobeli. Okutanaki na mikakatano ndenge na ndenge, kasi oyikelaki yango mpiko mpe omonaki ete Nzambe andimi yo. Lokola oyebi ete Nzambe azali kosepela na yo, sikoyo ozali na ntina mingi lisusu ya kozela kozwa makambo oyo alakaki. Elikya na yo ekómi makasi mingi koleka ndenge ezalaki liboso. Ekómi eloko ya solo mpo na yo, likambo na yo mpenza. Ekómi kotambwisa likambo mokomoko ya bomoi na yo, ebongoli ndenge na yo ya kosalela bato ya libota na yo makambo, ndenge na yo ya kozwa bikateli, mpe ata ya kosalela ntango na yo.

18. Likambo nini Yehova andimisi yo?

18 Ntoma Paulo abakisaki likambo mosusu ya ntina na oyo etali elikya oyo okómi na yango nsima ya kondimama na Nzambe. Alobi ete elikya na yo ekokokisama. Mpo na nini osengeli mpenza kondima yango? Paulo ayebisi bakristo maloba oyo na litambwisi ya elimo santu ya Nzambe ete: “Elikya yango eyokisaka nsɔni te; mpo bolingo ya Nzambe etondi na mitema na biso na nzela ya elimo santu, oyo apesi biso.” (Rom. 5:5) Ozali mpenza na bantina nyonso ya kondima elikya oyo Yehova apesi yo.

19. Osengeli koyeba likambo nini na oyo etali elikya na yo?

19 Kanisá elaka oyo Yehova apesaki Abrahama mpe ndenge oyo andimaki ye mpe amonaki ye ete azali moninga na Ye. Elikya oyo Abrahama azalaki na yango ezalaki ndɔtɔ mpamba te. Biblia elobi ete: “Nsima ya komonisa motema molai, Abrahama azwaki elaka yango.” (Ebr. 6:15; 11:​9, 18; Rom. 4:​20-22) Ayokaki nsɔni ata moke te. Yo mpe yebá ete soki otikali sembo, elikya na yo ekokokisama. Elikya na yo ezali likambo ya solo; ezali likambo oyo epesaka esengo, kasi te oyo eyokisaka nsɔni! (Rom. 12:12) Paulo akomaki ete: “Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo mpe na kimya nyonso wana bozali kotyela ye motema. Ɛɛ bótonda na elikya na nguya ya elimo santu.”—Rom. 15:13.

LOYEMBO 139 Omimona na mokili ya sika

a Na lisolo oyo, tokotalela soki elikya na biso bakristo ezali nini mpe ntina oyo tokoki kondima ete ekokokisama. Baroma mokapo 5 ekosalisa biso tómona ndenge oyo elikya oyo tozali na yango sikoyo ekeseni na oyo tozalaki na yango na ebandeli ntango toyebaki solo.