Tiká likanisi ya Nzambe na oyo etali masanga etambwisa yo
NA NTEMBE te osepelaka mingi na makabo ndenge na ndenge ya Yehova, ata mpe bonsomi na yo ya kopona ndenge oyo okoki kosalela makabo yango. Likambo ya kokamwa, Biblia emonisi ete vinyo ezali likabo ya Nzambe, mpe elobi kutu boye: “Limpa esalemi mpo na kosɛka, mpe vinyo epesaka bomoi esengo.” (Mos. 10:19; Nz. 104:15) Kasi, ndenge mbala mosusu omonaka yango, bato mosusu bakómá na mokakatano na masanga. Lisusu, na mokili mobimba, bato ya mimeseno ndenge na ndenge bazalaka na makanisi mpe mibeko ekeseni mpo na masanga. Na yango, nini ekoki kosalisa bakristo bázwa bikateli ya bwanya na oyo etali komɛla masanga?
Ata soki tofandaka wapi to mimeseno ya mboka na biso ezali ndenge nini, kotika likanisi ya Nzambe etambwisa makanisi mpe bikateli na biso ezali na litomba mingi mpenza mpe ekoki komemela biso bolamu ya seko.
Ndenge mbala mosusu omonaka yango, bato mingi bamɛlaka masanga mingi mpe mbala na mbala. Bato mosusu bamɛlaka masanga mpo esalaka ete bámiyoka malamu. Basusu bamɛlaka mpo bábosana bampasi na bango. Mpe na bisika mosusu, bato bamonaka ete moto oyo amɛlaka masanga mingi azali elombe to mpe moto ya makasi.
Nzokande, bakristo bazali na batoli ya bwanya oyo euti epai ya Mozalisi na bango ya bolingo. Na ndakisa, akebisi biso na mbuma mabe ya komɛla masanga mingi. Mbala mosusu otángá Masese 23:29-35 oyo elobeli moto oyo alangwe masanga mpe mikakatano mosusu oyo akómaki na yango. a Daniel, nkulutu moko na Mpoto, akanisi bomoi oyo azalaki na yango liboso akóma mokristo ya solo; alobi boye: “Komɛla masanga mingi esalaki ete nazwa bikateli ya mabe mpe nakutanaki na makambo ya mpasi oyo etiká ngai bilembo na motema.”
Ndenge nini bakristo basengeli kosalela bonsomi ya kopona mpe kokima mikakatano oyo komɛla masanga mingi ekoki kobimisa? Tosengeli kotika likanisi ya Nzambe etambwisa bikateli na biso mpe misala na biso.
Tiká tótala oyo Biblia elobi mpo na masanga mpe ntina oyo bato mosusu bamɛlaka masanga.
OYO BIBLIA ELOBI MPO NA MASANGA
Liloba ya Nzambe epekisi te komɛla mwa masanga. Kutu, Biblia endimi ete komɛla vinyo ekoki kosepelisa. Tozali kotánga boye: “Lyá bilei na yo na esengo mpe mɛlá vinyo na yo na motema ya esengo.” (Mos. 9:7) Na mabaku mosusu Yesu amɛlaki vinyo; basaleli mosusu ya sembo ya Yehova bamɛlaki mpe vinyo.—Mat. 26:27-29; Luka 7:34; 1 Tim. 5:23.
Kasi, Liloba ya Nzambe emonisi polele bokeseni oyo ezali kati na komɛla mwa masanga moke mpe kolangwa. Elobi polele ete: “Bólangwaka vinyo te.” (Ef. 5:18) Mpe kutu elobi ete “balangwi-masanga . . . bakozwa libula ya Bokonzi ya Nzambe te.” (1 Ko. 6:10) Ya solo, Yehova apekisi mpenza komɛla masanga mingi mpe kolangwa. Na yango na esika ya kolanda kaka mimeseno ya mboka na biso, tosepelaka komona makambo ndenge Yehova amonaka yango.
Basusu bamonaka ete bakoki komɛla masanga ebele kozanga ete bálangwa. Kasi, yango ezali likama mpenza. Biblia emonisi polele ete kozala ‘moombo ya vinyo’ ekoki komema moto (azala mobali to mwasi) na lisumu mpe kobebisa boyokani na ye ná Yehova. (Tito 2:3; Mas. 20:1) Kutu, Yesu alobaki ete “komɛla mingi” ekoki kosala ete moto akɔta te na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. (Luka 21:34-36) Na yango, nini ekoki kosalisa mokristo aboya kokwea na mitambo oyo ememaka na komɛla masanga mingi?
KANISÁ NTINA OYO OMƐLAKA MPE MIMESENO NA YO
Ezali mpenza likama soki moto azali kotika ete mimeseno oyo akolá na yango etambwisa ndenge na ye ya kotalela komɛla masanga. Na bwanya mpenza, bakristo basalaka oyo esepelisaka Yehova na makambo lokola kolya mpe komɛla. Biblia eyebisi biso ete: “Ezala bozali kolya to komɛla to kosala eloko nini mosusu, bósalaka makambo nyonso mpo na nkembo ya Nzambe.” (1 Ko. 10:31) Talá mwa mituna mpe mitinda ya Biblia ya kotalela:
Namɛlaka masanga mpo basusu bándima ngai? Kobima 23:2 elobi: “Osengeli te kolanda ebele ya bato.” Awa, Yehova azalaki kokebisa Bayisraele ete bálanda te bato oyo bazalaki kosepelisa ye te. Likebisi yango etali mpe bakristo lelo oyo. Soki totiki basusu bátambwisa makanisi mpe bikateli na biso na oyo etali komɛla masanga, nsukansuka tokokóma mosika na Yehova mpe tokotika kolanda mibeko na ye.—Rom. 12:2.
Namɛlaka masanga mpo na kolakisa ete nazali makasi? Na mimeseno ya bamboka mosusu, komɛla masanga mbala na mbala mpe komɛla mingi ezali mabe te mpe endimami. (1 Pe. 4:3) Kasi talá oyo 1 Bakorinti 16:13 elendisi biso tósala, elobi boye: “Bólala mpɔngi te, bótɛlɛma ngwi na kondima, bózala na mpiko, mpe bózala makasi.” Masanga ekoki mpenza kosalisa moto azala makasi? Ata moke te. Masanga ekoki nde kobebisa likoki ya moto ya kokanisa malamu mpe ya kozwa bikateli. Na yango, komɛla masanga mingi emonisaka te ete moto azali na makasi, emonisaka ete azali na bolɛmbu. Yisaya 28:7 elobeli moto oyo abungi nzela mpo amɛlaki masanga, epesi ye kizunguzungu mpe abɛti libaku.
Makasi ya solosolo eutaka epai ya Yehova mpe esɛngaka kolala mpɔngi te mpe kotɛlɛma ngwi na kondima. (Nz. 18:32) Mokristo oyo alingaka mpenza kosepelisa Nzambe akoki kosala yango soki azali kosala keba mpe soki azwi ekateli ya kosala makambo oyo ekobebisa te boyokani na ye na Yehova. Yesu amonisaki ete azalaki na boyokani malamu ná Yehova, mpe bato mingi bazalaki komemya ye mpe bazalaki komona ete azali mobali ya mpiko oyo azwá ekateli ya kosala oyo ezali malamu.
Namɛlaka masanga mpo na kokima mikakatano na ngai? Mokomi moko ya nzembo akomaki na Nz. 94:19) Soki mitungisi elekeli yo, luká lisalisi epai ya Yehova, na masanga te. Lolenge ya malamu ya kosala yango ezali ya kobondela Yehova mbala na mbala. Lisusu, bato mingi bamoni ete koluka toli ya bwanya epai ya moninga moko oyo akɔmɛli na lisangá esalisaka. Mpo na koloba solo, koluka kosilisa mikakatano na nzela ya masanga ekoki kolɛmbisa makanisi malamu oyo ebatelaka moto mpe kolɛmbisa ekateli na ye ya kosala oyo ezali malamu. (Hos. 4:11) Daniel, oyo tolobelaki na ebandeli, alobi boye: “Nazalaki kobunda na mitungisi mpe komiyoka ete namemi ngambo. Nazalaki komɛla mpo na kosilisa mokakatano yango, kasi makambo ezalaki se kobakisama mpe nabungisaki baninga ná lokumu na ngai.” Nsukansuka nini esalisaki Daniel? Alobi boye: “Namonaki ete nazali na mposa ya Yehova, kasi ya masanga te. Nsukansuka, nayebaki ndenge ya kosala mpo na makambo oyo nazalaki na yango mpe nalongaki yango.” Likambo ya solo ezali ete Yehova azalaka ntango nyonso pene ya kosalisa biso, ata soki emonani ete elikya ezali te na likambo na biso.—Flp. 4:6, 7; 1 Pe. 5:7.
litambwisi ya elimo santu ete: “Ntango natungisamaki koleka ndelo, yo [Yehova] obɔndisaki ngai mpe okitisaki ngai motema.” (Soki na bantango mosusu omɛlaka masanga, okoki komitalela soki osengeli kosala mwa bambongwana mpo na mbala boni okomɛla mpe esika osengeli kosuka. Omituna boye: ‘Moto moko ya libota to moninga moko amitungisaka mpo na ndenge oyo namɛlaka masanga?’ Soki ezali bongo, yango ekoki kosalisa yo omona ete olingi okóma na momeseno to mokakatano oyo ozali koyeba te. ‘Nakómi komɛla mingi koleka liboso?’ Yango ekoki kosalema mpo na moto oyo akómi naino moombo ya masanga te, kasi azali na nzela oyo ekoki kokómisa ye moombo ya masanga. ‘Ezalaka mpasi namɛla masanga te mwa mikolo to mwa ntango molai?’ Soki ezali bongo, mbala mosusu komɛla masanga ekómá momeseno ya bomoi na yo to ekómisa yo moombo. Yango ekoki komonisa ete osengeli koluka lisalisi ya minganga mpo básalisa yo olonga mokakatano yango.
Na kotalela makama mpe mikakatano mosusu oyo komɛla masanga ekoki kobimisa, bakristo mosusu bamonaka malamu báboya komɛla masanga
ata moke. Basusu bamɛlaka masanga te kaka mpo monɔkɔ na bango elingaka yango te. Soki moninga na yo moko azwi ekateli ya ndenge wana, okoki komonisa boboto mpe kondima ekateli na ye kozanga kotyola ye.To mbala mosusu omoni ete ezali likambo ya bwanya omityela mwa bandelo. Mokristo akoki komityela ndelo mpo na esika oyo akoleka te na oyo etali komɛla masanga. Akoki mpe komityela mobeko na oyo etali mbala boni akobanda komɛla, ekoki kozala mbala moko na pɔsɔ to mpe mwa moke na ntango ya kolya. Basusu bamityelá bipekiseli na oyo etali lolenge ya masanga oyo bakomɛla, na ndakisa komɛla vinyo to bière kasi te masanga ya makasi to masanga oyo basangisá. Ntango moto amityeli bandelo to mibeko ya polele na oyo etali komɛla masanga, ekozala pɛtɛɛ atosa yango. Mpe mokristo oyo akɔmɛli asengeli te komitungisa soki azwi bikateli ya ndenge wana mpe atosi yango.
Tosengeli mpe kotala ndenge oyo basusu bakomiyoka. Baroma 14:21 elobi boye: “Ezali malamu koboya kolya mosuni ya nyama to komɛla vinyo to kosala eloko moko boye oyo ezali kobɛtisa ndeko na yo libaku.” Ndenge nini okoki kosalela toli yango? Monisá bolingo ya bondeko. Soki omoni ete moto akoki kobɛta libaku mpo omɛli masanga, okomonisa bolingo soki oboyi komɛla na libaku yango. Na ndenge yango, okomonisa ete ozali komitya na esika ya basusu, ete ozali koluka matomba na bango, kasi ya yo moko te.—1 Ko. 10:24.
Lisusu, guvɛrnema ekoki kotya mibeko na oyo etali masanga mpe mokristo asengeli kotosa yango. Na ndakisa ekoki kotya mibeko mpo na oyo etali mbula oyo moto akoki kobanda komɛla to kopekisa moto amɛla ntango azali kokumba motuka to kosalela bamasini mosusu.—Rom. 13:1-5.
Na bolingo na ye, Yehova atikelá biso bonsomi ya kosepela na ebele ya makabo oyo apesá biso. Likabo moko ezali bonsomi ya kopona biso moko nini tokolya mpe nini tokomɛla. Tiká ete bikateli na biso emonisa ete tozali kozwa bonsomi yango na motuya wana tozali kosalela yango mpo na kosepelisa Tata na biso ya likoló.
a Ebongiseli moko oyo etalelaka makambo etali bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na États-Unis emonisi ete komɛla masanga mingi eumelaka te mpo ebimisa makama lokola, koboma bato, komiboma, kobebisa basusu na nzela ya kosangisa nzoto, konyokola molongani, kotalela kosangisa nzoto na ndenge ya mabe, mpe kobimisa zemi.