LISOLO YA BOYEKOLI 50
Tokoki kotángama bato ya sembo na nzela ya kondima mpe misala
‘Tólanda mpenza matambe ya kondima oyo tata na biso Abrahama azalaki na yango.’—ROM. 4:12.
LOYEMBO 119 Tosengeli kozala na kondima
NA MOKUSE a
1. Ntango tokanisaka kondima ya Abrahama, mbala mosusu tokoki kotuna motuna nini?
BATO mingi bayokaka nkombo ya Abrahama, kasi bayebi makambo na ye mingi te. Nzokande, yo oyebi makambo mingi ya Abrahama. Na ndakisa, oyebi ete Abrahama abengami “tata ya bato nyonso oyo bazali na kondima.” (Rom. 4:11) Kasi ntango mosusu okoki komituna, ‘Nakoki kolanda matambe ya Abrahama mpe kozala na kondima oyo azalaki na yango?’ Ɛɛ, okoki.
2. Mpo na nini ezali na ntina koyekola ndakisa ya Abrahama? (Yakobo 2:22, 23)
2 Lolenge moko oyo tokoki kokóma na kondima lokola oyo ya Abrahama ezali ya koyekola ndakisa na ye. Na etinda ya Nzambe, Abrahama akendaki kofanda na mokili moko mosika, afandaki bambula mingi na bahema, mpe andimaki kopesa Yisaka, mwana na ye ya bolingo lokola mbeka. Abrahama asalaki nyonso wana mpo azalaki na kondima makasi. Kondima ya Abrahama mpe misala na ye esalaki ete Nzambe andima ye mpe akóma moninga na ye. (Tángá Yakobo 2:22, 23.) Yehova alingi ete biso nyonso, ata mpe yo, tóndimama na ye mpe tókóma baninga na ye. Yango wana, asalelaki elimo santu na ye mpo na kotinda Paulo ná Yakobo bálobela ndakisa ya Abrahama. Tótalela sikoyo ndakisa yango, ndenge emonisami na Baroma mokapo 4 mpe Yakobo mokapo 2. Mikapo yango mibale ezali na maloba moko ya ntina mingi oyo esalelamaki mpo na Abrahama.
3. Maloba nini Yakobo ná Paulo bazongelaki?
3 Paulo ná Yakobo bazongelaki maloba ya Ebandeli 15:6, ete: “[Abrahama] andimelaki Yehova, mpe Nzambe atángaki ye moto ya sembo.” Na mokuse, moto ya sembo to moyengebene ezali moto oyo Nzambe amoni ete andimami, mpe kutu azangi mbeba. Kokamwa mpenza ndenge Nzambe akoki komona moto ya kozanga kokoka, moto ya masumu ete azangi mbeba! Na ntembe te yo mpe olingi ete ezala bongo mpo na yo, mpe yango ekoki kosalema. Mpo na yango, tosengeli koyeba mpo na nini Yehova abengaki Abrahama moto ya sembo to moyengebene.
ESƐNGI KONDIMA MPO NA KOTÁNGAMA MOTO YA SEMBO
4. Nini epekisaka bato bázala bato ya sembo?
4 Na mokanda na ye epai ya Baroma, Paulo alobaki ete bato nyonso bazali bato ya masumu. (Rom. 3:23) Sikoyo ndenge nini moto akoki kotángama moto ya sembo to moto azangi mbeba, mpe na bongo kondimama na Nzambe? Mpo na kosalisa bakristo nyonso oyo balukaka kosepelisa Nzambe bázwa eyano na motuna yango, Paulo atángaki ndakisa ya Abrahama.
5. Nini esalaki ete Yehova atánga Abrahama moto ya sembo? (Baroma 4:2-4)
5 Yehova abengaki Abrahama moto ya sembo to moyengebene ntango Abrahama azalaki kofanda na mokili ya Kanana. Nini esalaki ete Yehova atánga Abrahama moto ya sembo to moyengebene? Ezalaki nde mpo Abrahama azalaki mpenza kotosa Mobeko ya Moize? Soki moke te. (Rom. 4:13) Mobeko ya Moize epesamaki na Yisraele mbula koleka 400 nsima ya ntango oyo Nzambe atángaki Abrahama moto ya sembo. Boye, nini esalaki mpenza ete Nzambe atánga Abrahama moto ya sembo? Na boboto monene na Ye, Yehova atángaki Abrahama moto ya sembo mpo Abrahama azalaki na kondima.—Tángá Baroma 4:2-4.
6. Nini esalaka ete Yehova atánga moto ya masumu moto ya sembo?
6 Paulo alobaki ete ntango moto azali na kondima epai ya Nzambe, “Nzambe atalelaka ye lokola moto ya sembo mpo na kondima na ye.” (Rom. 4:5) Paulo abakisaki boye: “Kaka ndenge Davidi mpe alobeli esengo ya moto oyo Nzambe atángi ye moto ya sembo mpo na misala te: ‘Esengo na bato oyo balimbisi misala na bango ya kobuka mibeko mpe oyo bazipi masumu na bango; esengo na moto oyo Yehova akotánga lisumu na ye te.’” (Rom. 4:6-8; Nz. 32:1, 2) Nzambe alimbisaka to azipaka masumu ya baoyo bazali na kondima epai na ye. Ntango Yehova alimbisaka bango ndenge wana, atángaka lisusu masumu na bango te. Amonaka bato yango ete bazangi mbeba mpe bazali sembo mpo na kondima na bango.
7. Mpo na nini tokoki koloba ete basaleli ya sembo ya Nzambe ya kala bazalaki bato ya sembo to bayengebene?
7 Atako batángamaki bato ya sembo to bayengebene, Abrahama, Davidi, mpe basambeli mosusu ya sembo ya Nzambe bazalaki kaka bato ya masumu, bato ya kozanga kokoka. Kasi mpo na kondima na bango, Nzambe amonaki bango lokola bato oyo bazangi mbeba, mingimingi ntango akokanisi bango na bato oyo bazalaki na boyokani te elongo na ye. (Ef. 2:12) Ndenge Paulo amonisaki yango polele na mokanda na ye, moto asengeli kozala na kondima mpo akóma moninga ya Nzambe. Ezalaki bongo mpo na Abrahama ná Davidi. Biso mpe tokoki kozala baninga ya Nzambe soki tozali na kondima.
BOYOKANI NINI EZALI KATI NA KONDIMA MPE MISALA?
8-9. Likanisi nini ya libunga bato mosusu bazalaka na yango mpo na maloba ya Paulo mpe ya Yakobo, mpe mpo na nini?
8 Na boumeli ya bankama ya bambula, bakonzi ya mangomba ya bokristo babendanaki makasi mpo na komonisa boyokani oyo ezali kati na kondima mpe misala. Basusu bateyaka ete mpo moto abika asengeli kaka kondimela Nkolo Yesu Kristo. Mbala mosusu oyokaka bango bazali koloba, “Ndimelá Yesu mpe okobika.” Bakonzi mosusu ya mangomba bazongelaka maloba oyo ya Paulo: “Nzambe atángi ye moto ya sembo mpo na misala te.” (Rom. 4:6) Nzokande, bakonzi mosusu ya mangomba balobaka ete “moto akoki kobika” soki azali kosala mibembo na bisika mosantu mpe soki azali kokokisa makambo mosusu oyo lingomba esɛngi. Mbala mosusu bazongelaka maloba ya Yakobo 2:24 ete: “Moto akotángama moto ya sembo mpo na misala na ye, kasi na kondima kaka te.”
9 Mpo na mateya ya ndenge wana, bakomi mosusu ya makambo ya mangomba bamoni ete Paulo ná Yakobo bayokani te na likambo etali kondima mpe misala. Mokonzi moko ya lingomba alobaki ete Paulo azalaki kondima ete moto atángamaka moto ya sembo na kondima kasi na misala te, mpe Yakobo ateyaki ete misala ezali na ntina mpo na kondimama na Nzambe. Profesɛrɛ moko ya makambo ya mangomba alobaki boye: “Yakobo akangaki te ntina oyo Paulo abɛtaki nsɛtɛ ete [moto atángamaka moto ya sembo] na kondima kaka yango moko, kasi na misala te.” Kasi elimo ya Yehova nde esalisaki Paulo ná Yakobo bákoma makambo oyo bakomaki. (2 Tim. 3:16) Na yango, esengeli kozala na ndenge moko ya pɛtɛɛ ya koyokanisa maloba na bango. Mpo tókanga ntina ya maloba na bango, tosengeli kotalela makambo mosusu oyo bakomaki na mikanda na bango.
10. “Misala” nini Paulo azalaki mpenzampenza kolobela? (Baroma 3:21, 28) (Talá mpe elilingi.)
10 “Misala” nini mpenza Paulo azalaki kolobela na Baroma 3 mpe 4? Azalaki kolobela libosoliboso “misala ya mibeko,” mibeko ya Moize, oyo epesamaki na Ngomba Sinai. (Tángá Baroma 3:21, 28.) Emonani ete na ntango ya Paulo, Bayuda mosusu oyo bakómaki bakristo bazalaki na mokakatano mpo na kondima ete Mobeko ya Moize mpe makambo to misala oyo Mobeko yango esɛngaki ezalaki lisusu na ntina te. Yango wana, Paulo apesaki ndakisa ya Abrahama mpo na komonisa ete mpo moto azala sembo na miso ya Nzambe esɛngi te atosa “misala ya mibeko.” Esɛngi nde azala na kondima. Yango ezali likambo ya kolendisa mpo endimisi biso ete tozali na likoki ya kozala na boyokani ya malamu na Nzambe. Yango elimboli ete tokoki kozala na kondima epai ya Nzambe mpe Kristo, mpe na ndenge yango Nzambe akondima biso.
11. “Misala” ya ndenge nini Yakobo azalaki kolobela?
11 Nzokande, “misala” oyo Yakobo mokapo 2 elobeli ezali te “misala ya mibeko” oyo Paulo alobelaki. Yakobo azalaki kolobela misala, to makambo, oyo bakristo basalaka na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Makambo yango emonisaka soki mokristo azali na kondima ya solosolo epai ya Nzambe to te. Tótalela ndakisa mibale oyo Yakobo asalelaki.
12. Ndenge nini Yakobo alimbolaki boyokani oyo ezali kati na kondima mpe misala? (Talá mpe elilingi.)
12 Na ndakisa ya liboso, Yakobo amonisaki ete bakristo basengeli kopona bilongi te na boyokani na bango elongo na basusu. Amonisaki yango ntango apesaki ndakisa ya moto oyo azali kosepela na mozwi kasi azali kotyola mobola. Yakobo amonisaki ete moto yango akoki koloba ete azali na kondima, kasi misala na ye ezali komonisa kondima yango te! (Yak. 2:1-5, 9) Na ndakisa ya mibale, Yakobo alobelaki moto oyo amoni ‘ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azangi bilamba to azangi bilei,’ kasi apesi ye te biloko oyo asengeli na yango. Ata soki moto yango alobaki ete azali na kondima, kondima yango ezalaki komonana na misala te; na yango, ezalaki na ntina te. Ndenge Yakobo akomaki yango, “kondima soki ezali na misala te, ekufi.”—Yak. 2:14-17.
13. Ndakisa ya nani Yakobo apesaki mpo na komonisa ete kondima ekendaka nzela moko na misala? (Yakobo 2:25, 26)
13 Yakobo atángaki Rahaba lokola ndakisa malamu ya moto oyo kondima na ye emonanaki na misala. (Tángá Yakobo 2:25, 26.) Rahaba ayokaki nsango ya Yehova mpe akangaki ntina ete Yehova azalaki kosalisa Bayisraele. (Yos. 2:9-11) Amonisaki kondima na ye na misala—abatelaki banɔngi mibale ya Bayisraele ntango bomoi na bango ezalaki na likama. Na yango, mwasi wana ya kozanga kokoka, oyo azalaki Moyisraele te atángamaki moto ya sembo, to moyengebene, kaka lokola Abrahama. Ndakisa ya Rahaba emonisi ete ezali na ntina mingi komonisa kondima na biso na misala.
14. Na ndenge nini maloba ya Paulo mpe ya Yakobo ezali na boyokani?
14 Na yango bakomi wana mibale ya Biblia, Paulo ná Yakobo, bazalaki na likanisi moko te ntango bazalaki kolobela likambo ya kondima mpe misala. Paulo azalaki koyebisa Bayuda oyo bakómaki bakristo ete bakondimama na Yehova ata mokolo moko te soki bazali kokokisa kaka misala ya Mobeko ya Moize. Yakobo azalaki komonisa ntina oyo bakristo nyonso basengeli komonisa kondima na bango na kosaleláká basusu makambo ya malamu.
15. Wapi mwa makambo oyo tokoki kosala mpo na komonisa kondima na biso na misala? (Talá mpe bililingi.)
15 Yehova alobi te ete mpo atánga biso bato ya sembo to bayengebene, tosengeli kosala kaka oyo Abrahama asalaki. Mpo na koloba solo, ezali na ndenge mingi oyo tokoki komonisa na misala na biso ete tozali na kondima. Tokoki koyamba bato ya sika na lisangá, kosalisa bandeko basi mpe mibali oyo bazali mpenza na bosɛnga, mpe kosalela bato ya mabota na biso makambo ya malamu; nyonso wana ezali makambo oyo Nzambe akondima mpe akopambola. (Rom. 15:7; 1 Tim. 5:4, 8; 1 Yoa. 3:18) Mosala ya ntina mingi oyo emonisaka kondima na biso ezali kosakola nsango malamu na molende. (1 Tim. 4:16) Biso nyonso tokoki komonisa na misala na biso ete tozali na kondima ete bilaka ya Yehova ekokokisama mpe ete ndenge na ye ya kosala makambo nde eleki malamu. Mpe soki tosali bongo, tóyeba ete Nzambe akotánga biso bato ya sembo to bayengebene mpe akobenga biso baninga na ye.
TOSENGELI KOBATELA ELIKYA MPO KONDIMA NA BISO EZALA MAKASI
16. Elikya nini Abrahama azalaki na kondima ete ekokokisama?
16 Baroma mokapo 4 emonisi liteya mosusu ya ntina oyo tokoki kozwa na ndakisa ya Abrahama: ntina ya kozala na elikya. Yehova alakaki ete “bikólo mingi” ekopambolama na nzela ya Abrahama. Yango ezali elikya kitoko mpenza mpo na Abrahama! (Eba. 12:3; 15:5; 17:4; Rom. 4:17) Nzokande, ata ntango Abrahama akómaki na mbula 100 mpe Sara mbula 90, mwana oyo alakamaki abotamaki naino te. Na ndenge ya bomoto, emonanaki ete ekoki kosalema te ete Abrahama ná Sara bábota mwana. Yango ezalaki mpenza komekama mpo na Abrahama. Kasi “azalaki na elikya mpe na kondima ete akokóma tata ya bikólo mingi.” (Rom. 4:18, 19) Mpe nsukansuka, elikya yango ekokisamaki. Abrahama akómaki tata ya Yisaka, mwana oyo azalaki kozela banda kala.—Rom. 4:20-22.
17. Ndenge nini toyebi ete tokoki kotángama bato ya sembo lokola baninga ya Nzambe?
17 Nzambe akoki kondima biso mpe kotánga biso bato ya sembo lokola baninga na ye, ndenge asalaki na Abrahama. Kutu, Paulo alobelaki likambo yango, akomaki: “Maloba ‘batángaki ye’ ekomamaki kaka mpo na ye moko [Abrahama] te, kasi mpe mpo na biso baoyo tokotángama bato ya sembo, mpo tondimelaka ye oyo asekwisaki Yesu Nkolo na biso uta na bakufi.” (Rom. 4:23, 24) Ndenge moko na Abrahama, tosengeli kozala na kondima, komonisa yango na misala mpe kozala na elikya. Paulo akobi kolobela elikya na biso na Baroma mokapo 5; yango nde tokotalela na lisolo oyo elandi.
LOYEMBO 28 Tózala baninga ya Yehova
a Tolingaka ete Nzambe andima biso mpe amona ete tozali bato ya sembo. Na lisolo oyo, tokotalela makambo oyo Paulo ná Yakobo bakomaki mpo na komonisa ndenge oyo yango ekoki kosalema mpe ndenge oyo kondima na biso mpe misala na biso ekoki kosala ete Yehova andima biso.
b NDIMBOLA YA BILILINGI: Paulo alendisaki Bayuda oyo bakómaki bakristo bátya likebi na kondima, kasi te na “misala ya mibeko,” na ndakisa kolata elamba oyo ezali na nsinga ya bule, kosala Elekeli, mpe kosala milulu ya komipɛtola.
c NDIMBOLA YA ELILINGI: Yakobo alendisaki bakristo bámonisa kondima na kosaleláká basusu bolamu, na ndakisa kosalisa babola.