Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Nazalaki kotya Yehova na esika ya liboso na bikateli nyonso oyo nazalaki kozwa

Nazalaki kotya Yehova na esika ya liboso na bikateli nyonso oyo nazalaki kozwa

MOKOLO moko na ntɔngɔ na 1984, nalongwaki na ndako na biso ya kitoko na Caracas, na Venezuela mpe nakendaki mosala. Nzelanzela, nazalaki kokanisa lisolo moko oyo eutaki kobima na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Lisolo yango ezalaki kolobela ndenge bato oyo tofandaka na bango batalelaka biso. Ntango natalaki bandako oyo ezalaki zingazinga, na nse ya motema namitunaki boye: ‘Bato oyo tofandaka na bango, bamonaka ngai kaka lokola moto moko oyo asalaka na banki? To bamonaka ete nazali mosaleli ya Nzambe oyo asalaka na banki mpo na kosalisa libota na ye?’ Namonaki ete bato yango bazalaki kotalela ngai kaka lokola moto moko malamu oyo asalaka na banki. Nasepelaki te ete bátalelaka ngai bongo mpe nazwaki ekateli ya kobongisa likambo yango.

Nabotamaki na engumba Amioûn, na Liban, na mokolo ya 19/05/1940. Mwa bambula na nsima, libota na biso mobimba ekendaki kofanda na engumba Tripoli, epai nabɔkwamaki na libota moko ya malamu mpenza oyo eyebaki Yehova Nzambe mpe ezalaki kolinga ye. Libota na biso ezalaki na bana mitano: Misato ya basi mpe mibale ya mibali. Ngai nde nazalaki mwana nsuka. Baboti na ngai bazalaki komona te ete koluka mbongo nde likambo oyo elekaki ntina. Makambo ya ntina mingi na libota na biso ezalaki koyekola Biblia, koyangana na makita mpe kosalisa basusu báyeba Nzambe.

Na lisangá na biso ezalaki na bandeko ebele oyo batyamaki mafuta na elimo. Na ndakisa ndeko Michel Aboud, oyo azalaki kotambwisa boyekoli ya mokanda. Ayekolaki solo na New York, mpe ye nde moto ya liboso oyo akɔtisaki yango na Liban na bambula ya 1920. Nazali koyeba lisusu ndenge azalaki kosalisa Anne mpe Gwen Beaver, bandeko basi mibale oyo bazwaki diplome na Eteyelo ya Gileade. Bakómaki baninga na biso ya motema. Bambula mingi na nsima, nasepelaki mingi ntango nakutanaki na Anne na États-Unis. Na nsima nakutanaki mpe na Gwen. Abalanaki ná Wilfred oyo azalaki kosala na Betele ya Angleterre na Londres.

MOSALA YA KOSAKOLA NA LIBAN

Ntango nazalaki elenge, Batatoli ya Yehova bazalaki mingi te na Liban. Kasi na esengo nyonso tozalaki koyebisa bato makambo oyo toyekolaki na Biblia. Tozalaki kosala yango atako bakonzi mosusu ya mangomba bazalaki kotɛmɛla biso. Nabosanaka te makambo mosusu oyo tokutanaki na yango.

Mokolo moko, ngai ná ndeko na ngai ya mwasi Sana tozalaki kosakola na ndako moko ya etaje. Sango moko ayaki esika tozalaki kosolola na bato. Ekoki kozala ete moto moko boye nde abengaki ye. Sango yango abandaki kofinga ndeko na ngai ya mwasi. Akómaki na nkanda makasi, atindikaki Sana na nse mpe Sana azokaki. Moto moko abengaki bapolisi na telefone. Bayaki, mpe na boboto nyonso basɛngaki moto moko asalisa Sana. Bamemaki sango yango na biro ya bapolisi mpe bayaki koyeba ete azalaki na mondoki. Mokonzi ya bapolisi atunaki sango yango boye: “Ozali mpenza nani? Moto oyo ateyaka bato makambo ya Nzambe to oyo ateyaka makambo ya mobulu?”

Likambo mosusu oyo nabosanaka te ezali ntango lisangá na biso efutaki motuka moko mpo ekende kotika biso na engumba moko ya mosika, epai tosengelaki kosakola nsango malamu. Tozalaki kolekisa ntango moko kitoko tii ntango sango moko ya esika yango ayokaki makambo oyo tozalaki kosala mpe atindaki bato ebele báya kobundisa biso. Batungisaki biso makasi mpenza, babambaki biso mabanga mpe tata na ngai azokaki. Nazali koyeba lisusu ndenge makila ezalaki na elongi na ye mobimba. Azongaki na bisi elongo na mama, na nsima biso nyonso tolandaki bango na mawa. Kasi nakobosana soki moke te maloba oyo mama alobaki ntango azalaki kopangwisa makila na elongi na ye. Alobaki boye: “Yehova, nasɛngi yo olimbisa bango mpo bazali koyeba te oyo bazali kosala.”

Mokolo mosusu, tokendaki kotala bandeko ya libota na mboka na biso. Ntango tokómaki kuna, tokutanaki na episkɔpɔ ya lingomba moko na ndako ya nkɔkɔ na ngai. Episkɔpɔ yango ayebaki ete baboti na ngai bazalaki Batatoli ya Yehova. Atako nazalaki kaka na mbula motoba, alingaki kobangisa ngai. Atunaki ngai boye: “Mpo na nini ozwi naino batisimo te?” Nayebisaki ye ete nazali naino mwana moke mpe ete nasengeli naino koyeba makambo mingi ya Biblia mpe kokóma na kondima makasi liboso nazwa batisimo. Lokola asepelaki te na eyano oyo napesaki ye, ayebisaki nkɔkɔ na ngai ete nazangi botosi.

Kasi makambo ya ndenge wana ezalaki mpenza kosalema mbala mingi te. Bato ya Liban bazalaka na boboto mpe bazalaka na ezaleli ya koyamba bapaya. Na yango, tosololaki makambo ya Biblia na bato mingi mpe toyekolaki Biblia na mingi kati na bango.

TOZWI EKATELI YA KOKENDE KOFANDA NA EKÓLO MOSUSU

Ntango nazalaki naino kotánga kelasi, ndeko mobali moko ya elenge autaki na Venezuela mpe ayaki na Liban. Azalaki koyangana na lisangá na biso mpe akómaki koluka koyebana malamu ná ndeko na ngai ya mwasi Wafa mpo na nsima bábalana. Na nsima, babalanaki mpe bakendeki kofanda na Venezuela. Na mikanda oyo azalaki kokomela biso, Wafa asalaki nyonso andimisa tata na ngai mpo libota na biso mobimba ekende kofanda na Venezuela. Asalaki bongo mpo azalaki koyoka mposa na biso makasi mpenza. Nsukansuka, tondimaki likanisi na ye mpe tokendaki kofanda na Venezuela!

Tokómaki na Venezuela na 1953 mpe tokendaki kofanda na Caracas pene na ndako ya mokonzi ya ekólo yango. Lokola nazalaki naino mwana moke, na bantango mosusu nazalaki kosepela komona ndenge prezida azalaki koleka na motuka na ye ya ntalo mingi. Kasi ezalaki pɛtɛɛ te mpo baboti na ngai bámesana na ekólo ya sika, monɔkɔ ya sika, mimeseno ya sika, bilei ya sika mpe klima ya sika. Kaka ntango bakómaki komesana na bomoi yango ya sika nde likambo moko ya mpasi mpenza esalemaki.

Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: Tata na ngai. Mama na ngai. Ngai na 1953 ntango libota na biso ekendaki kofanda na Venezuela

LIKAMBO MOKO YA MPASI

Tata na ngai akómaki kobɛla. Yango ekamwisaki biso mpo azalaki nzoto kolɔngɔnɔ mpe makasi. Elekaki ntango mingi azalaki kobɛla te. Na nsima bazwaki ye na maladi ya kanser ya pancréas, mpe basalaki ye lipaso. Likambo ya mawa, nsima ya pɔsɔ moko akufaki.

Ezali mpasi nalobela ndenge oyo toyokaki mpo na likambo yango. Na ntango yango nazalaki kaka na mbula 13. Tozalaki komizela te ete tata na biso akokufa mpe tokanisaki ete tokozala lisusu na esengo te. Na bantango mosusu ezalaki mpasi mpo mama na ngai andima ete mobali na ye akufaki. Kasi na nsima toyaki komona ete bomoi esengeli kokoba. Mpe na lisalisi ya Yehova toyikaki mpiko. Ntango nakokisaki mbula 16, nazwaki diplome na eteyelo moko na Caracas mpe nazalaki mpenza na mposa ya kosalisa bato ya libota na biso.

Ndeko na ngai ya mwasi Sana ná mobali na ye Rubén, basalisaki ngai mingi mpo nakola na elimo

Kaka na ntango yango, Sana ndeko na ngai ya mwasi abalanaki na Rubén Araujo, oyo azwaki diplome na Eteyelo ya Gileade mpe azongaki kofanda na Venezuela. Ye ná mobali na ye bazwaki ekateli ya kokende kofanda na New York. Libota na biso ezwaki ekateli ete nasengeli kotánga na iniversite, na yango nakendaki kofanda epai ya ndeko na ngai ya mwasi na New York. Ndeko na ngai ya mwasi ná mobali na ye basalisaki ngai mpenza mpo napusana penepene na Yehova. Lisusu na lisangá na biso ya monɔkɔ ya Espagnol na Brooklyn, bandeko mibali oyo bakɔmelá na elimo bazalaki mingi. Nasepelaki mingi koyebana na mibale kati na bango, elingi koloba, ndeko Milton Henschel ná Frederick Franz. Bango nyonso mibale bazalaki kosala na Betele ya Brooklyn.

Na 1957 ntango nazwaki batisimo

Ntango nakómaki pene ya kosilisa mbula na ngai ya liboso na iniversite ya New York, nakómaki kokanisa makambo oyo nakosala na bomoi na ngai. Natángaki mpe nakanisaki na mozindo na masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo elobelaki bandeko oyo bamityelaki mikano na mosala ya Yehova. Namonaki ete bandeko oyo bazali babongisi-nzela mpe bandeko ya libota ya Betele oyo bazalaki na lisangá na biso bazalaki mpenza na esengo, mpe mposa na ngai ezalaki ete nakóma lokola bango. Kasi na ntango yango nazwaki naino batisimo te. Ntango kaka nayebaki ntina oyo nasengelaki kopesa bomoi na ngai epai ya Yehova, nasalaki yango. Mpe na nsima, na mokolo ya 30/03/1957 nazwaki batisimo.

BIKATELI YA NTINA MINGI

Nsima ya kozwa batisimo, nakómaki kokanisa ndenge ya kokóma mobongisi-nzela. Nazalaki na mposa makasi ya kokóma mobongisi-nzela. Kasi, nayaki komona ete ezalaki mpasi mpenza kosala yango. Namonaki ete ekozala mpasi nazala na bokatikati na mosala ya mobongisi-nzela mpe kelasi ya iniversite. Ngai ná bandeko ya libota na ngai tokomelanaki mikanda mingi mpo na ekateli oyo nazwaki ya kokata kelasi ya iniversite, kozonga na Venezuela mpe kokóma mobongisi-nzela.

Na sanza ya 06/1957 nazongaki na Caracas. Kasi, nayaki komona ete makambo mingi ya libota na biso ezalaki lisusu malamu te. Bazalaki na mposa ete moto moko asalisa bango mpo bázwa mbongo. Ndenge nini nakokaki kosalisa bango? Nazwaki mosala na banki moko, kasi nazalaki mpenza na mposa ya kokóma mobongisi-nzela. Kutu, yango nde ntina oyo nazongaki na Caracas. Nazwaki ekateli ya kosala makambo yango nyonso mibale. Na boumeli ya bambula mibale nasalaki na banki mpe nazalaki mobongisi nzela. Nazalaki na makambo mingi ya kosala kasi nazalaki na esengo!

Nasepelaki lisusu makasi ntango tokutanaki na Sylvia, mpe tobalanaki. Azali ndeko mwasi moko kitoko, azali moto ya ekólo Allemagne mpe alingaka mpenza Yehova. Ye ná baboti na ye bayaki kofanda na Venezuela. Nsukansuka tobotaki bana mibale, moko ya mobali na nkombo Michel (Mike), mpe oyo ya mwasi na nkombo Samira. Nazwaki mpe mokumba ya kosalisa mama na ngai oyo ayaki kofanda epai na biso. Na yango, esengelaki natika mosala ya mobongisi-nzela mpo na kokokisa bamposa ya libota na biso. Kasi nakobaki kaka kozala molende na mosala ya kosakola. Na ntango ya konje, ngai ná Sylvia tozalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na kotalela makoki na biso.

BIKATELI MOSUSU YA NTINA MINGI

Ntango nakutanaki na makambo oyo nalobelaki na ebandeli ya lisolo oyo, bana bazalaki naino kotánga. Mpo na koloba solo, nazalaki na bomoi moko ya malamu. Mpe bato mosusu oyo bazalaki kosala na banki bazalaki komemya ngai. Atako bongo, mposa na ngai ya libosoliboso ezalaki ete bato bátalelaka ngai lokola mosaleli ya Yehova. Nakobaki kokanisa makambo oyo nasengeli kosala mpo bátalelaka ngai ndenge wana. Na yango, ngai ná mwasi na ngai tofandaki mpo tólobela makambo ya mbongo na biso. Soki natiki kosala na banki, bakopesa ngai mbongo oyo bapesaka bato oyo batiki mosala. Lokola tozalaki na banyongo te, tomonaki ete soki tokómisi bomoi na biso pɛpɛlɛ tokozala na mbongo oyo esengeli mpo na kokokisa bamposa na biso na boumeli ya ntango molai.

Kozwa ekateli yango ezalaki pɛtɛɛ te, kasi mwasi na ngai ná mama na ngai basalisaki ngai mingi. Nazwaki lisusu likoki ya kozongela mosala ya mobongisi-nzela mpe nazalaki mpenza na esengo. Kaka ntango nakómaki pene ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela, nazwaki nsango oyo nakanaki te.

NSANGO MOKO YA ESENGO OYO TOMIZELAKI NA YANGO TE!

Tosepelaki mingi ntango Gabriel, mwana na biso ya misato abotamaki

Mokolo moko monganga na biso ayebisaki biso ete Sylvia azali na zemi. Yango ekamwisaki biso mpenza. Ezalaki nsango moko ya esengo mpenza, kasi nakanisaki ekateki oyo nazwaki ya kokóma mobongisi-nzela. Nakokoka lisusu kokóma mobongisi nzela? Mbala moko tokómaki lisusu kokanisa ndenge oyo tokozala na moto mosusu ya sika na kati ya libota. Kasi nakobaki kaka komituna soki nakokoka kozala mobongisi-nzela.

Nsima ya kolobela mikano na biso, tozwaki ekateli ete nakóma kaka mobongisi-nzela. Mwana na biso Gabriel, abotamaki na sanza ya 04/1985. Atako bongo, natikaki mosala ya banki mpe nabandaki lisusu mosala ya mobongisi-nzela na sanza ya 06/1985. Na nsima, nakómaki kosala na komite ya filiale. Kasi filiale ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 80 ná Caracas; ezalaki kosɛnga ete nakendaka kuna mikolo mibale to misato na kati ya pɔsɔ.

TOKEI KOFANDA ESIKA MOSUSU

Biro ya filiale ezalaki na engumba La victoria, na yango tozwaki ekateli ya kokende kofanda kuna pene na Betele. Yango ezalaki mbongwana monene mpo na biso. Nasepelaka mingi na bato ya libota na ngai mpe nazalaka na botɔndi mpo na bango. Lolenge na bango ya kotalela makambo esalisaki mpenza. Baha, ndeko na ngai ya mwasi andimaki kosalisa mama na biso. Mike abalaki, kasi Samira ná Gabriel bazalaki kaka kofanda na ndako. Na yango, kokende kofanda na La Victoria elimbolaki ete basengelaki kotika baninga na bango oyo bazalaki na Caracas. Lisusu, mwasi na ngai Sylvia asengelaki kondima kotika engumba-mokonzi mpo na kokende kofanda na enguma moko ya moke. Mpe biso nyonso tosengelaki kondima kofanda na engumba ya moke. Na yango, esɛngaki makambo mingi mpo na kolongwa na engumba Caracas mpe kokende kofanda na La Victoria.

Kasi makambo ebongwanaki lisusu. Gabriel abalaki, mpe Samira akendeki kofanda na esika na ye moko. Na nsima na 2007, babengaki ngai ná Sylvia na Betele epai tozali kosala tii lelo oyo. Mike, mwana na biso ya liboso azali nkulutu mpe azali mobongisi-nzela elongo ná mwasi na ye Monica. Gabriel mpe azali nkulutu mpe azali kosala na Italie elongo ná mwasi na ye Ambra. Samira azali mobongisi-nzela mpe apesaka mabɔkɔ na mosala ya Betele na mosika.

Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi: Elongo na mwasi na ngai Sylvia. Mike mwana na biso ya liboso ná Monica. Samira, mwana na biso ya mwasi. Gabriel mwana na biso ya mobali ná Ambra

NAKOZWA LISUSU BIKATELI YA NDENGE WANA

Nazwaki mpenza bikateli ya minene na bomoi na ngai. Kasi nayokaka mawa te mpo na yango. Nakozwa lisusu bikateli ya ndenge wana. Nazali na botɔndi mingi mpo na makambo nyonso oyo nasali na mosala ya Yehova. Nsima ya bambula mingi, nayaki komona ete ezali na ntina kobatela boyokani malamu elongo na Yehova. Ezala bikateli oyo tolingi kozwa ezali ya minene to ya mike, Yehova akoki kopesa biso “kimya oyo eleki makanisi nyonso.” (Flp. 4:6, 7) Ngai ná Sylvia tosepelaka na mosala oyo tosalaka na Betele mpe tomonaka ete Yehova apambolaki bikateli oyo tozwaki mpo tozalaki kokanisa ye na bikateli oyo tozalaki kozwa.