Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 24

Okoki kokima mitambo ya Satana!

Okoki kokima mitambo ya Satana!

“Bálongwa na motambo ya Zabolo.”​—2 TIM. 2:26.

LOYEMBO 36 Batelá motema na yo

NA MOKUSE *

1. Mpo na nini tokoki kokokanisa Satana na moto oyo asalaka bokila?

MOTO oyo asalaka bokila azalaka kaka na mokano moko: ya kokanga to koboma nyama. Akoki kosalela mitambo ekeseni kaka ndenge Biblia emonisi yango. (Yobo 18:8-10) Ndenge nini moto oyo asalaka bokila asalaka ete nyama ekangama na motambo na ye? Ayekolaka nyama yango malamumalamu. Alukaka koyeba esika oyo nyama yango ekendaka, eloko oyo nyama yango esepelaka na yango, mpe motambo ya malamu oyo ekoki kokanga nyama yango kozanga ete eyeba. Satana azali lokola moto oyo asalaka bokila. Ayekolaka biso malamumalamu. Ayebaka esika oyo tozali kokende mpe makambo oyo tosepelaka na yango. Na nsima, asalelaka motambo oyo akanisaka ete ekokanga biso na ntango oyo tozali kokanisa te. Kasi Biblia eyebisi biso ete soki tokangami na mitambo yango, tokoki kolongwa. Eyebisi biso mpe oyo tokoki kosala mpo na kokima mitambo yango.

Satana alongi mpenza kosalela lolendo mpe lokoso mpo na kokanga bato na mitambo na ye (Talá paragrafe 2) *

2. Wapi mitambo mibale ya Satana oyo ekangaka bato mingi?

2 Mitambo mibale ya Satana oyo ekangaka bato mingi ezali lolendo mpe lokoso. * Na boumeli ya bambula mingi, Satana alongi mpenza kosalela mitambo yango. Azali lokola mokangi-ndɛkɛ oyo asalelaka motambo to monyama mpo na kokanga ndɛkɛ. (Nz. 91:3) Kasi tosengeli kotika te ete Satana akanga biso. Mpo na nini? Mpo Yehova amonisi biso mayele oyo Satana asalelaka.​—2 Ko. 2:11.

Bandakisa oyo ezali na Biblia ekoki koteya biso ndenge ya kokima to kolongwa na mitambo ya Zabolo (Talá paragrafe 3) *

3. Mpo na nini Yehova akomisá na Biblia bandakisa ya bato oyo bakómaki na lolendo mpe na lokoso?

3 Yehova ateyaka biso likama oyo lolendo mpe lokoso ekoki kobimisa, na ndenge ayebisi biso makambo oyo ekómelaki basaleli na ye mosusu. Alingi ete tósala mabunga ya ndenge wana te. Na bandakisa oyo tokotalela, tokomona ete Satana akangaki na motambo ata basaleli ya Yehova oyo bazalaki makasi na elimo. Yango elakisi nde ete tokoki te koboya kokóma na lolendo mpe na lokoso? Te. Yehova akomisá bandakisa yango na Biblia mpo ezala “likebisi mpo na biso.” (1 Ko. 10:11) Ayebi ete tokoki koyekola makambo mingi na bandakisa yango mpo tókima to tólongwa na mitambo ya Zabolo.

KOZALA NA LOLENDO EZALI MPENZA MOTAMBO

Talá paragrafe 4

4. Nini ekoki kokómela biso soki tozali na lolendo?

4 Satana alingi ete tókóma na lolendo. Ayebi ete soki tokómi na lolendo tokokóma lokola ye mpe yango ekosala ete tóbungisa elikya ya kozala na bomoi ya seko. (Mas. 16:18) Yango wana ntoma Paulo alobaki ete moto akoki ‘kovimba na lolendo mpe kozwa etumbu oyo bakatelá Zabolo.’ (1 Tim. 3:6, 7) Yango ekoki kokómela biso nyonso, ezala tozali bato ya sika na kati ya solo to mpe tosalelaka Yehova banda bambula mingi.

5. Ndenge Mosakoli 7:16, 20 emonisi yango, ndenge nini moto akoki komonisa ezaleli ya lolendo?

5 Bato ya lolendo balukaka kaka matomba na bango moko. Satana alukaka kotinda biso tókanisa mingi mpo na biso moko na esika tókanisa mpo na Yehova, mingimingi ntango tokutani na mikakatano. Na ndakisa, Satana akosepela soki topesi Yehova foti ntango moto moko akoseli biso makambo to asaleli biso makambo na kozanga bosembo. Zabolo alingi mpe tókanisa ete lolenge eleki malamu ya kosilisa likambo yango ezali ya kosala makambo ndenge tozali kokanisa na esika tólanda litambwisi oyo Yehova apesaka biso na nzela ya Liloba na ye.​—Tángá Mosakoli 7:16, 20.

6. Ndakisa ya ndeko mwasi moko na Pays-bas ekoki koteya yo nini?

6 Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi moko oyo afandaka na Pays-bas. Ndeko yango asilikaki mpo na mabunga ya bandeko mosusu. Azwaki ekateli ete akolekisa lisusu ntango te elongo na bandeko yango. Alobi boye: “Nazalaki komiyoka ete nazali ngai moko mpe nakokaki te kolimbisa bango. Nayebisaki mobali na ngai ete tókende na lisangá mosusu.” Na nsima, ndeko mwasi yango atalaki programɛ ya TV JW ya sanza ya 03/2016. Programɛ yango elobelaki makanisi oyo ekoki kosalisa biso mpo tókanga motema na mabunga ya basusu. Ndeko mwasi yango alobi boye: “Nasengelaki kotalela na bosembo mpe na komikitisa mabunga na ngai moko na esika ya koluka kobongola bizaleli ya bandeko ya lisangá. Programɛ yango esalisaki ngai natya makanisi na ngai nyonso epai ya Yehova mpe boyangeli na ye.” Yango eteyi biso nini? Ntango okutani na mokakatano moko, kobá kotya makanisi na yo nyonso epai ya Yehova. Sɛngá Yehova asalisa yo mpo otalelaka bato mosusu ndenge ye atalelaka bango. Tata na yo ya likoló amonaka mabunga na bango, kasi andimaka kolimbisa bango. Alingi ete yo mpe osalaka bongo.​—1 Yoa. 4:20.

Talá paragrafe 7

7. Nini ekómelaki Mokonzi Uzia?

7 Lolendo etindaki Uzia, mokonzi ya Yuda, aboya koyoka toli mpe asala likambo oyo azalaki te na lotomo ya kosala. Uzia asalaki makambo mingi ya malamu. Alongaki bitumba mingi, atongaki bingumba ebele mpe azalaki na bilanga ebele. “Nzambe ya solo asalaki ete makambo na ye etambola malamu.” (2 Nt. 26:3-7, 10) Kasi Biblia elobi, “ntango kaka akómaki makasi, motema na ye ekómaki na lolendo.” Yehova apesaki mobeko ete kaka banganga-nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kotumba mpaka ya malasi na tempelo. Kasi na lofundo nyonso, Mokonzi Uzia akendaki na tempelo mpo na kotumba mpaka ya malasi. Yehova asepelaki te mpe apesaki ye maladi ya maba. Uzia abɛlaki maladi yango bomoi na ye mobimba.​—2 Nt. 26:16-21.

8. Na kotalela 1 Bakorinti 4:6, 7, tokoki kosala nini mpo tókóma na lolendo te?

8 Lolendo ekoki kotinda biso mpe tósala lisumu oyo Uzia asalaki? Tótalela ndakisa ya ndeko mobali moko na nkombo José. Azalaki moto ya mombongo mpe nkulutu oyo bandeko ya lisangá bazalaki komemya mingi. Azalaki kosala badiskur na mayangani ya mike mpe ya minene, mpe bakɛngɛli ya zongazonga bazalaki koluka toli epai na ye. Alobi boye: “Na esika natyela Yehova motema, nakómaki nde kotya motema na makoki mpe na mayele oyo nazalaki na yango. Nakanisaki ete nazalaki na makasi mingi, yango wana nazalaki te kolanda makebisi mpe toli ya Yehova.” José asalaki lisumu moko ya monene mpe balongolaki ye na lisangá. Nsima ya bambula mingi azongisamaki na lisangá. Sikoyo alobi boye: “Yehova ateyi ngai ete likambo eleki ntina, ezali te kozala na lokumu, kasi nde kosala makambo oyo azali kosɛnga biso.” Tóbosana te ete ezala makoki to mokumba nini oyo tozali na yango na kati ya lisangá eutaka nde epai ya Yehova. (Tángá 1 Bakorinti 4:6, 7.) Soki tozali na lolendo, Yehova akosalela biso te.

KOZALA NA LOKOSO EZALI MPENZA MOTAMBO

Talá paragrafe 9

9. Lokoso etindaki Satana ná Eva básala nini?

9 Ntango tolobelaka lokoso, na ntembe te makanisi na biso ekendaka mbala moko epai ya Satana Zabolo. Lokola azalaki anzelu ya Yehova, na ntembe te Satana azalaki na mikumba mingi ya malamu, kasi atondaki kaka te. Azalaki na mposa ya kozwa losambo oyo kaka Yehova nde abongi na yango. Satana alingaka tózala lokola ye, yango wana alingaka kotinda biso tósepela te na oyo tozali na yango. Mbala ya liboso oyo amekaki kosala yango ezali ntango asololaki na Eva. Na bolingo mpenza, Yehova apesaki Eva ná mobali na ye biloko mingi ya kitoko ya kolya. Bakokaki kolya mbuma ya “nzete nyonso ya elanga,” longola kaka moko. (Eba. 2:16) Atako bongo, Satana akosaki Eva mpe atindaki ye akanisa ete asengelaki kolya mbuma ya nzete oyo epekisamaki. Eva atondaki te biloko oyo azalaki na yango; azalaki na mposa ya kozwa lisusu mingi. Toyebi oyo esalemaki na nsima. Eva asalaki lisumu mpe nsukansuka akufaki.​—Eba. 3:6, 19.

Talá paragrafe 10

10. Nini esalemaki ntango Mokonzi Davidi akómaki na lokoso?

10 Lokoso etindaki Mokonzi Davidi abosana biloko oyo Yehova apesaki ye, na ndakisa bomɛngo, lokumu mpe ndenge oyo alongaki banguna na ye mingi. Davidi ayebaki malamu ete makabo ya Nzambe ezalaki ‘ebele koleka oyo akokaki koyebisa!’ (Nz. 40:5) Kasi na ntango moko boye, Davidi abosanaki oyo Yehova apesaki ye. Davidi azalaki lisusu kosepela te na oyo azalaki na yango. Azalaki na mposa ya kozwa mingi koleka. Atako azalaki na basi ebele, akómaki kolula mwasi ya moto mosusu, likambo oyo Yehova alobaki ete ezali mabe. Nkombo ya mwasi yango ezalaki Bate-sheba mpe mobali na ye Uria Mohiti. Davidi asangisaki nzoto na Bate-sheba mpe akómaki na zemi. Davidi asukaki kaka te na kosala ekobo ná mwasi yango, kasi abomisaki mpe mobali na ye! (2 Sa. 11:2-15) Davidi azalaki kokanisa nini? Azalaki nde kokanisa ete Yehova akomona likambo yango te? Atako Davidi azalaki kosalela Yehova na boumeli ya bambula mingi, akómaki na lokoso mpe yango ememelaki ye mpasi mpenza. Kasi likambo ya esengo ezali ete na nsima, Davidi andimaki lisumu oyo asalaki mpe abongolaki motema. Asepelaki mpenza ndenge oyo Yehova alimbisaki ye!​—2 Sa. 12:7-13.

11. Na kotalela Baefese 5:3, 4, nini ekoki kosalisa biso tóbundisa ezaleli mabe ya lokoso?

11 Makambo oyo ekómelaki ye eteyi biso nini? Yango eteyi biso ete tokoki kobundisa ezaleli mabe ya lokoso soki tomonisi botɔndi mpo na nyonso oyo Yehova apesaka biso. (Tángá Baefese 5:3, 4.) Tosengeli kosepela na oyo tozali na yango. Ntango tobandi koyekola Biblia na bato, tosengeli koteya bango bákanisa likambo moko ya malamu oyo Yehova asalelá bango mpe bápesa ye matɔndi mpo na yango. Soki moto azali kosala bongo mokolo na mokolo, yango ekomonisa ete na boumeli ya pɔsɔ mobimba abondeli mpo na makambo nsambo ekeseni. (1 Tes. 5:18) Yo mpe osalaka bongo? Soki okanisi mpo na makambo nyonso oyo Yehova asalelaka yo, yango ekosalisa yo omonisaka botɔndi. Mpe soki ozali komonisa botɔndi, okosepela na oyo ozali na yango. Soki ozali kosepela na oyo ozali na yango, okozala lisusu na lokoso te.

Talá paragrafe 12

12. Lokoso etindaki Yudasi Mokeriota asala nini?

12 Lokola Yudasi Mokeriota akómaki na lokoso, yango etindaki ye asala likambo moko ya mabe mpenza: atɛkaki Yesu. Kasi na ebandeli azalaki bongo te. (Luka 6:13, 16) Yesu aponaki ye azala ntoma na ye. Yesu atyelaki ye motema mpo apesaki ye mokumba ya kobatela kɛsi ya mbongo. Yesu ná bantoma na ye bazalaki kosalela mbongo yango mpo na kokokisa bamposa na bango na mosala ya kosakola. Tokoki koloba ete mbongo yango ezalaki lokola makabo oyo topesaka lelo oyo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Kasi na nsima, Yudasi akómaki koyiba mbongo yango, atako ayokaki makebisi oyo Yesu azalaki kopesa mbala na mbala na likambo etali lokoso. (Mrk. 7:22, 23; Luka 11:39; 12:15) Yudasi atosaki makebisi yango te.

13. Ntango nini lokoso ya Yudasi emonanaki polele?

13 Lokoso ya Yudasi emonanaki polele ntango likambo moko esalemaki mwa moke liboso Yesu akufa. Simo, moto ya maba, ayambaki na ndako na ye Yesu ná bayekoli na ye, ata mpe Maria ná ndeko na ye ya mwasi Marta. Ntango bazalaki kolya, Maria atɛlɛmaki mpe asopaki na motó ya Yesu mafuta moko ya nsolo kitoko oyo ezalaki na ntalo mingi. Yudasi ná bayekoli mosusu basilikaki makasi. Bayekoli mosusu bakokaki kokanisa ete mbongo yango ekokaki kosalisa bango mingi na mosala ya kosakola. Kasi Yudasi asilikaki mpo na likambo mosusu. “Azalaki moyibi” mpe alingaki koyiba mbongo oyo ezalaki na kɛsi. Na nsima, lokoso etindaki ye atɛka Yesu na motuya ya mbongo oyo bazalaki kofuta moombo.​—Yoa. 12:2-6; Mat. 26:6-16; Luka 22:3-6.

14. Ndenge nini ndeko moko ná mwasi na ye basalelaki toli oyo ezali na Luka 16:13?

14 Yesu ayebisaki bayekoli na ye likambo oyo ya ntina mingi: “Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya bomɛngo.” (Tángá Luka 16:13.) Likambo yango ezali mpe solo lelo oyo. Tótalela ndenge oyo ndeko moko ná mwasi na ye na Roumanie basalelaki maloba yango ya Yesu. Bapesaki bango mosala moko ya ntango mokuse na ekólo moko ya bozwi. Balobi boye: “Lokola tozalaki na nyongo ya mbongo mingi na banki, tokanisaki ete mosala yango ezalaki mpenza lipamboli ya Yehova.” Nzokande ezalaki motambo. Soki bándimaka mosala yango, balingaki kozala na ntango mingi te mpo na kosalela Yehova. Bazwaki ekateli nsima ya kotánga lisolo oyo ezalaki na motó ya likambo, “Batelá bosembo na motema moko” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/08/2008. Balobi boye: “Soki tóndimaka kokende na ekólo mosusu mpo na kozwa mbongo mingi, elingaki kozala mpasi tósalela Yehova, mpe na nsima boyokani na biso ná ye elingaki lisusu kozala te likambo eleki ntina na bomoi na biso. Toyebaki ete boyokani na biso ná Yehova elingaki kobeba.” Na yango, baboyaki mosala yango. Nini esalemaki? Ndeko mobali yango azwaki mosala na ekólo na bango oyo ekokisaki bamposa na bango. Mwasi na ye alobi boye: “Lobɔkɔ ya Yehova ezalaka mokuse te.” Ndeko yango ná mwasi na ye bazali na esengo ndenge bakómisaki Yehova Nkolo na bango kasi mbongo te.

KIMÁ MITAMBO YA SATANA

15. Nini endimisi biso ete tokoki kolongwa na mitambo ya Satana?

15 Tosengeli kosala nini soki tomoni ete tokómi na lolendo mpe na lokoso? Tokoki kolongwa na mitambo yango! Paulo alobaki ete baoyo Zabolo “akangi bango na bomoi” bakoki kolongwa na motambo yango. (2 Tim. 2:26) Yango nde Davidi asalaki. Andimaki toli oyo Natane apesaki ye, atikaki ezaleli na ye ya lokoso mpe azongisaki boninga na ye elongo na Yehova. Kobosana te ete Yehova azali na makasi mingi koleka Satana. Na yango, soki tondimi lisalisi na ye tokoki kolongwa ata na motambo nini oyo Satana atyeli biso.

16. Nini ekosalisa biso tókima mitambo ya Satana?

16 Ya solo, eleki malamu kokima mitambo ya Satana na esika ya kokangama naino mpe na nsima koluka ndenge ya kolongwa. Tokoki kosala yango kaka soki Nzambe asalisi biso. Kasi tosengeli kokanisa te ete tozali na makasi mingi mpe ete tokokóma soki moke te na ezaleli ya lolendo mpe ya lokoso! Ata basaleli ya Yehova oyo baumeli mingi na mosala na ye, bakómaki na bizaleli yango ya mabe. Na yango, bondeláká Yehova mokolo na mokolo asalisa yo omona soki bizaleli yango ya mabe ebandi kotambwisa makanisi mpe misala na yo. (Nz. 139:23, 24) Salá nyonso oyo okoki mpo mitambo yango ekanga yo te!

17. Mosika te, nini ekokómela monguna na biso Zabolo?

17 Satana abandá kotya mitambo eleki sikoyo bambula ebele mpenza. Kasi mosika te bakokanga ye mpe nsukansuka akobomama. (Em. 20:1-3, 10) Tozali kozela mokolo yango na mposa makasi. Liboso mokolo yango ekoka, zaláká ekɛngɛ na mitambo ya Satana. Salá makasi mpo okóma na lolendo mpe na lokoso te. Zalá na ekateli ya kotɛmɛla Zabolo mpe ‘akokima yo.’​—Yak. 4:7.

LOYEMBO 127 Lolenge ya moto oyo nasengeli kozala

^ par. 5 Satana azali lokola moto oyo asalaka bokila na mayele mpenza. Alukaka kokanga biso na mitambo na ye, ata soki tosali bambula boni na mosala ya Yehova. Na lisolo oyo, tokoyekola ndenge oyo Satana alukaka kosalela lolendo mpe lokoso mpo na koluka kobebisa boyokani na biso ná Nzambe. Tokomona ndenge oyo bato mosusu bakómaki na lolendo mpe na lokoso, mpe ndenge oyo tokoki koboya kokwea na mitambo yango.

^ par. 2 NDIMBOLA YA MALOBA: Lisolo oyo elobeli mingimingi lolendo, likanisi ya komimona ete tozali na ntina mingi koleka basusu, mpe lokoso, elingi koloba mposa makasi ya kozala na mbongo mingi, ya kozala na nguya, ya kosangisa nzoto to mpe makambo mosusu ya ndenge wana.

^ par. 53 NDIMBOLA YA BILILINGI: Na lolendo nyonso ndeko mobali moko azali koboya malako ya bwanya oyo bazali kopesa ye. Ndeko mwasi moko oyo azali na biloko mingi azali kobakisa lisusu mingi koleka.

^ par. 55 NDIMBOLA YA BILILINGI: Mokonzi Uzia akómaki na lolendo, ata mpe anzelu moko ya Nzambe. Lokoso nde etindaki Eva alya mbuma ya nzete oyo epekisamaki, etindaki Davidi asala ekobo ná Bate-sheba mpe etindaki Yudasi ayiba mbongo.