Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 23

Yehova azali ntango nyonso elongo na yo

Yehova azali ntango nyonso elongo na yo

“Yehova azali pene na baoyo nyonso bazali kobelela ye.”​—NZ. 145:18.

LOYEMBO 28 Tózala baninga ya Yehova

NA MOKUSE *

1. Mpo na nini na bantango mosusu basaleli ya Yehova bakoki komiyoka ete bazali bango moko?

NA BANTANGO mosusu ekómelaka biso nyonso tómiyoka ete tozali biso moko. Mpo na bato mosusu mayoki yango eumelaka te. Kasi mpo na bato mosusu ekoki koumela ntango molai. Tokoki komiyoka ete tozali biso moko ata ntango tozali elongo na bato mosusu. Bandeko mosusu bazalaka na mokakatano ya kozwa baninga na lisangá ya sika. Basusu bazalaki na libota oyo bazalaki kosala makambo mingi elongo, kasi bamiyokaka bango moko soki bakei kofanda mosika na bato ya libota na bango. Basusu mpe bamiyokaka bango moko ntango moto oyo bazalaki kolinga mingi akufi. Mpe bandeko mosusu, mingimingi baoyo bauti koyekola solo kala mingi te, bamiyokaka bango moko ntango bandeko to mpe baninga na bango oyo bazali Batatoli ya Yehova te basundoli bango to mpe bazali kotɛmɛla bango.

2. Tokozwa biyano na mituna nini?

2 Yehova ayebi makambo nyonso oyo ezali kokómela biso. Ayebaka mpe ntango oyo tozali komiyoka ete tozali biso moko mpe alingaka kosalisa biso mpo tólonga makanisi ya ndenge wana. Ndenge nini Yehova asalisaka biso? Tokoki kosala nini mpo tómiyoka biso moko te? Mpe ndenge nini tokoki kosalisa bandeko ya lisangá na biso oyo bazali komiyoka ete bazali bango moko? Tótalela biyano na mituna yango.

YEHOVA ATYELAKA BISO LIKEBI

Yehova atindaki anzelu moko mpo na kosalisa Eliya ayeba ete azalaki ye moko te (Talá paragrafe 3)

3. Ndenge nini Yehova amonisaki ete azalaki kotyela Eliya likebi?

3 Yehova alingaka ete basambeli na ye nyonso bázala na esengo. Azali penepene ya mokomoko na biso mpe ayebaka ntango oyo tolɛmbi nzoto to tozali na mawa. (Nz. 145:18, 19) Tótalela ndenge oyo Yehova atyelaki mosakoli Eliya likebi. Mobali yango ya sembo azalaki na bomoi na eleko moko ya mpasi mpenza na lisolo ya ekólo Yisraele. Na ntango yango bazalaki konyokola basambeli ya Yehova makasi mpenza, mpe mposa ya bato yango ezalaki mingimingi ya koboma mosakoli Eliya. (1 Bak. 19:1, 2) Likambo mosusu oyo ezalaki kotungisa Eliya ezali ndenge azalaki kokanisa ete atikalaki kaka ye moko mosakoli ya Yehova. (1 Bak. 19:10) Na mbala moko, Nzambe asalaki likambo moko mpo na kosalisa ye. Yehova atindaki anzelu moko mpo na koyebisa Eliya ete azalaki ye moko te, mpe ete na Yisraele ezalaki na bato mingi oyo bazalaki kosalela Yehova na bosembo.​—1 Bak. 19:5, 18.

4. Ndenge nini Marko 10:29, 30 emonisi ete Yehova atyaka likebi na baoyo bandeko ya libota mpe baninga na bango basundoli bango?

4 Yehova ayebi ete ntango toponi kosalela ye, esɛngaka ete bato mosusu kati na biso bámipimela makambo mingi. Na ndakisa, bandeko ya libota mpe baninga na biso oyo basalelaka Yehova te bakoki koboya kosalisa biso. Mbala mosusu ntoma Petro azalaki komitungisa, yango wana atunaki Yesu ete: “Biso totiki biloko nyonso mpe tolandi yo; eloko nini mpenza tokozwa?” (Mat. 19:27) Na boboto nyonso, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete lisangá ekokóma libota na bango. (Tángá Marko 10:29, 30.) Mpe Yehova, Tata na biso ya likoló, alaki ete akosalisa baoyo nyonso balingi kosalela ye. (Nz. 9:10) Tótalela mwa makambo oyo okoki kosala mpo Yehova asalisa yo olonga ezaleli ya komiyoka ete ozali yo moko.

OYO OKOKI KOSALA SOKI OZALI KOMIYOKA ETE OZALI YO MOKO

5. Mpo na nini ekozala malamu okanisa ndenge oyo Yehova azali kosalisa yo?

5 Kanisá ndenge oyo Yehova azali kosalisa yo. (Nz. 55:22) Yango ekosalisa yo omona ete ozali yo moko te. Carole, * ndeko mwasi moko monzemba oyo azali kaka ye moko na kati ya solo, alobi boye: “Soki nakanisi ndenge oyo Yehova asungaka ngai na bantango ya mpasi, yango esalisaka ngai namiyoka te ete nazali ngai moko. Mpe endimisaka ngai ete ata na mikolo ezali koya, Yehova akokoba kosalisa ngai.”

6. Ndenge nini 1 Petro 5:9, 10 ekoki kolendisa baoyo bamiyokaka ete bazali bango moko?

6 Kanisá ndenge oyo Yehova azali kosalisa bandeko na biso mosusu oyo bazali komiyoka ete bazali bango moko. (Tángá 1 Petro 5:9, 10.) Hiroshi, ndeko mobali moko oyo na boumeli ya bambula mingi azalaki Motatoli ya Yehova kaka ye moko na libota na bango, alobi boye: “Na lisangá ezalaka mpasi te komona ete moto na moto azali na mikakatano na ye moko. Koyeba ete biso nyonso tozali kosala oyo tokoki mpo na kosalela Yehova, ekoki kolendisa baoyo bandeko ya libota na bango bazali na solo te.”

7. Ndenge nini libondeli esalisaka yo?

7 Zaláká na mimeseno malamu ya makambo ya elimo. Osengeli koyebisaka Yehova ndenge ozali mpenza komiyoka. (1 Pe. 5:7) Ndeko mwasi moko na nkombo Massiel alobi boye: “Kobondela Yehova na etingya nde moko ya makambo oyo esalisaki ngai nalonga ezaleli ya komiyoka ete nazali ngai moko.” Ntango ndeko mwasi yango azwaki ekateli ya kosalela Yehova, amiyokaki ete azali ye moko mpo bato ya libota na ye bazalaki kosalela Yehova te. Abakisi boye: “Yehova azalaki mpenza Tata na ngai. Nazalaki kobondela ye mikolo nyonso mpe mbala mingi na mokolo, mpo na komonisa ye ndenge oyo nazalaki mpenza komiyoka.”

Koyoka botángi ya Biblia mpe ya mikanda oyo elimbolaka Biblia ekoki kosalisa baoyo bamiyokaka bango moko mpo bálongola makanisi yango (Talá paragrafe 8) *

8. Ndenge nini kotánga Liloba ya Nzambe mpe kokanisa na mozindo likoló na yango esalisaka yo?

8 Tángáká Liloba ya Nzambe mbala na mbala, mpe kanisáká na mozindo na masolo ya sikisiki oyo emonisi ndenge oyo Yehova alingaka yo. Bianca, ndeko mwasi moko oyo bandeko ya libota na ye bazalaki kolobela ye mabe, alobi boye: “Kotánga mpe kokanisa na mozindo na masolo ya Biblia mpe na masolo ya bomoi ya basaleli ya Yehova oyo bakutanaki na mikakatano lokola oyo ya ngai esalisaka ngai mpenza.” Bandeko mosusu bakangaka na motó bavɛrsɛ mosusu ya Biblia oyo elendisaka mpenza, na ndakisa Nzembo 27:10 mpe Yisaya 41:10. Basusu mpe bamonaka ete kolanda botángi ya mikanda ya boyekoli esalisaka bango bámiyoka bango moko te ntango bazali kobongisa makita to ntango bazali kotánga Biblia.

9. Ndenge nini koyangana na makita esalisaka yo?

9 Salá nyonso oyo okoki mpo na koyanganaka na makita. Makambo oyo okoyoka ekolendisa yo mpe yango ekosalisa yo oyeba bandeko malamu. (Ebr. 10:24, 25) Massiel, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Atako nazalaki moto ya nsɔninsɔni, nazwaki ekateli ya koyanganaka na makita nyonso mpe ya kopesa biyano. Yango esalisaki ngai namiyoka ete nazali pene ya bandeko ya lisangá.”

10. Mpo na nini ezali na ntina kosala boninga elongo na bandeko oyo bazali sembo?

10 Salá boninga na bandeko oyo bazali sembo. Salá boninga na bandeko ya lisangá oyo okoki koyekola epai na bango. Bakoki kozala bato ya mbula to mimeseno ekeseni na oyo ya yo. Biblia eyebisi biso ete “bwanya ezalaka nde epai ya mibange.” (Yobo 12:12) Mibange mpe bakoki koyekola makambo epai ya bandeko oyo bazali bilenge. Yonatane azalaki mokóló ya Davidi ya mosika, kasi yango epekisaki bango te bákóma baninga ya motema. (1 Sa. 18:1) Davidi ná Yonatane basalisanaki mpo na kosalela Yehova atako bakutanaki na mikakatano ya makasi. (1 Sa. 23:16-18) Irina, ndeko mwasi moko oyo azali Motatoli ya Yehova kaka ye moko na libota na bango, alobi boye: “Bandeko na biso bakristo bakoki mpenza kokóma lokola baboti na biso to bandeko na biso ya libota. Yehova akoki kosalela bango mpo na kokokisa bamposa na biso.”

11. Ndenge nini okoki kosala boninga makasi na basusu?

11 Kozwa baninga ya sika ekoki kozala pɛtɛɛ te mingimingi soki ozalaka moto ya nsɔninsɔni. Ratnan, ndeko moko ya nsɔninsɔni oyo ayekolaki solo atako botɛmɛli, alobi boye: “Nasengelaki kondima ete nazalaki na mposa ya lisalisi ya bandeko ya lisangá.” Koyebisa moto mosusu ndenge oyo ozali komiyoka ekoki kozala pɛtɛɛ te. Kasi kosala bongo ekoki kosala ete bino mibale bókóma baninga ya motema. Baninga na yo bazalaka na mposa ya kolɛndisa mpe ya kosalisa yo, kasi balingaka oyebisa bango ndenge oyo bakoki kosala yango.

12. Ndenge nini mosala ya kosakola ekoki kosalisa yo ozwa baninga ya malamu?

12 Lolenge eleki malamu ya kosala boninga na basusu ezali ya kosakola elongo na bango. Carole, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Kolekisa ntango elongo na bandeko basi na mosala ya kosakola mpe na makambo mosusu na mosala ya Yehova esalisi ngai nazwa baninga mingi ya malamu. Na boumeli ya bambula mingi, Yehova asalisaki ngai mingi na nzela ya baninga na ngai.” Ezalaka ntango nyonso malamu kosala boninga elongo na bandeko oyo bazali sembo. Yehova asalelaka baninga yango mpo na kosalisa yo obundisa makanisi ya kolɛmba nzoto. Na ndakisa, bakoki kosalisa yo ntango ozali komiyoka ete ozali yo moko.​—Mas. 17:17.

SALISÁ BASUSU BÁMIYOKA ETE BAZALI LOKOLA BANDEKO NA YO YA LIBOTA

13. Mokumba nini ndeko mokomoko na lisangá azali na yango?

13 Ndeko mokomoko azali na mokumba ya kosala ete lisangá ezala esika moko ya kimya mpe ya komonisela moto nyonso bolingo mpo ata moto moko te amiyoka ete azali ye moko. (Yoa. 13:35) Makambo oyo tosalaka mpe oyo tolobaka ekoki mpenza kolendisa basusu. Talá oyo ndeko mwasi moko alobi: “Ntango nayekolaki solo, lisangá ekómaki libota na ngai. Soki bandeko ya lisangá básalisaka ngai te, nalingaki te kokóma Motatoli ya Yehova.” Makambo nini okoki kosala mpo na kosalisa baoyo bandeko na bango ya libota bazali na kati ya solo te mpo bamiyoka ete bandeko ya lisangá balingaka bango?

14. Okoki kosala nini mpo osala boninga ná bato ya sika?

14 Luká kosala boninga na bandeko ya sika. Mpo na kosala yango, yambáká na esengo bandeko oyo bayei sika na lisangá. (Rom. 15:7) Kasi, tosengeli kosuka kaka te na kopesa bango mbote na esengo. Tolingi ete nsima ya mwa mikolo tósala boninga makasi elongo na bango. Na yango, zalá na boboto mpe monisá ete otyelaka bandeko oyo bayei sika na lisangá likebi. Kozanga ete otuna bango makambo na bango ya sekele, luká koyeba mikakatano oyo bazali kokutana na yango. Bamosusu bakoki kozala na mokakatano ya koyebisa yo ndenge oyo bazali komiyoka. Na yango, kotya bango mbamba te báyebisa yo makambo na bango, kasi na boboto nyonso tunáká bango mituna na mayele mpe yokáká bango ntango bazali kopesa biyano. Na ndakisa, okoki kotuna bango ndenge oyo bayebaki solo.

15. Ndenge nini bakristo oyo bakɔmɛli na elimo bakoki kosalisa basusu na kati ya lisangá?

15 Bandeko nyonso ya lisangá bakokola na elimo mingimingi soki bankulutu bazali kotyela bango likebi. Melissa, oyo mama na ye ateyaki ye solo, alobi boye: “Nazalaka na botɔndi mingi mpo na bandeko mibali oyo bazalaki lokola batata mpo na ngai, oyo bazalaki kolekisa ntango elongo na ngai mpe kotyela ngai likebi. Mbala nyonso oyo nazalaki na mposa ya koloba likambo, ezalaki na ndeko oyo azalaki pene mpo na koyoka ngai.” Mauricio, elenge mobali moko oyo amiyokaki ete asundolami ntango ndeko oyo ayekolaki na ye Biblia atikaki solo, alobi boye: “Bankulutu bamonisaki ete bazalaki kotyela ngai likebi mpe yango esalisaki ngai mingi mpenza. Bazalaki kosolola na ngai mbala na mbala, kosakola elongo na ngai, koyebisa ngai makambo oyo bazwi na botángi na bango ya Biblia, ata mpe kobɛta lisano elongo na ngai.” Ezala Melissa mpe Mauricio, bango nyonso basalelaka Yehova na mosala ya ntango nyonso.

Ezali na ndeko moko na lisangá na bino oyo akosepela soki omoniseli ye boboto mpe olekisi ntango elongo na ye? (Talá paragrafe 16-19) *

16-17. Makambo nini mosusu tokoki kosala mpo na kosalisa basusu?

16 Salá makambo ya sikisiki mpo na kosalisa basusu. (Gal. 6:10) Leo, oyo azali misionɛrɛ mosika mpenza na bato ya libota na ye, alobi boye: “Mbala mingi okoki kozala kaka na mposa básalela yo likambo moko ya boboto na ntango ebongi. Nazali koyeba lisusu mokolo moko ntango nazwaki likama na motuka. Nsukansuka nakómaki na ndako mpe natungisamaki mingi na makanisi. Kasi kaka na ntango yango, ndeko moko ná mwasi na ye babengisaki ngai na ndako na bango mpo tólya mwa eloko. Nayebaka lisusu te eloko oyo tolyaki, kasi nabosanaka te ndenge bayokaki ngai na likebi mpenza. Na nsuka, namiyokaki malamu mpenza!”

17 Biso nyonso tosepelaka na bantango oyo tolekisaka elongo na Batatoli ya Yehova mosusu, na ndakisa na mayangani na biso, mpe kolobela badiskur oyo tolandaki. Kasi Carole, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Namiyokaka ete nazali ngai moko ntango tozalaka na mayangani.” Mpo na nini? Alobi boye: “Atako nazalaka elongo na bandeko mibali mpe bandeko basi ebele mpenza, mbala mingi bango nyonso bazalaka elongo na bandeko ya mabota na bango. Mpe ntango namonaka bango, namiyokaka mpenza ete nazali ngai moko.” Basusu mpe bazalaka na mokakatano ya kokende na mayangani mpo na mbala ya liboso nsima ya kobungisa molongani na bango na liwa. Oyebi ndeko moko oyo azali kokutana na mikakatano ya ndenge wana? Ekozala malamu soki obengisi ye afanda elongo na libota na bino na liyangani oyo ezali koya.

18. Ndenge nini tokoki kosalela 2 Bakorinti 6:11-13 ntango tobengisi ndeko moko epai na biso?

18 Bólekisaka ntango elongo. Luká mpe kobengisa bandeko ndenge na ndenge mpo bólekisa ntango elongo, mingimingi baoyo bamiyokaka ete bazali bango moko. Tósengeli ‘kofungwama’ mingimingi epai ya bato ya ndenge wana. (Tángá 2 Bakorinti 6:11-13.) Melissa oyo tolobelaki liboso alobi boye: “Mbala mingi tozalaki kosepela ntango bandeko bazalaki kobengisa biso na bandako na bango mpo tólekisa ntango elongo to mpo tósala mwa mobembo.” Ezali na ndeko moko na lisangá na bino oyo okoki kobengisa na ndako na yo mpo bólekisa ntango elongo?

19. Ntango nini ekoki kozala malamu tólekisa ntango elongo na bandeko na biso?

19 Ezalaka na bantango oyo bandeko ya lisangá bakosepela mingi soki balekisi ntango elongo na biso. Baoyo bafandaka elongo na bandeko na bango ya libota oyo bazali Batatoli te bakoki kozala na mokakatano, na ndakisa, ntango bandeko yango bazali kosala bafɛti ya mangomba to ya ekólo. Basusu mpe bakoki kozala na mawa makasi soki dati moko boye ekoki; na ndakisa dati oyo moto oyo bazalaki kolinga mingi akufaki. Soki tobengisi bandeko oyo bazali kokutana na makambo ya ndenge wana mpo tólekisa ntango elongo, tokomonisa ete tozali “komitungisa mpenza” mpo na bango.​—Flp. 2:20.

20. Ndenge nini maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 12:48-50 ekoki kosalisa biso ntango tomiyoki ete tozali biso moko?

20 Ezali na bantina mingi oyo ekoki kosala ete na bantango mosusu ndeko moko amiyoka ete azali ye moko. Atako bongo, tosengeli kobosana te ete Yehova ayebi mpenza ndenge bazali komiyoka. Mbala mingi asalelaka bandeko na biso bakristo mpo na kopesa biso oyo tosengeli na yango. (Tángá Matai 12:48-50.) Biso mpe tokomonisa Yehova ete tozalaka na botɔndi mpo na lisalisi oyo lisangá epesaka biso, soki tozali kosala oyo tokoki mpo na kosalisa bandeko na biso. Ata soki na bantango mosusu tokoki komiyoka ndenge nini, tozali biso moko te mpo Yehova azali ntango nyonso elongo na biso.

LOYEMBO 46 Totɔndi yo, Yehova

^ par. 5 Ekómelaka yo na bantango mosusu omiyoka ete ozali yo moko? Soki ezali bongo, kobosana te ete Yehova ayebi mpenza ndenge ozali komiyoka mpe azali na mposa ya kosalisa yo. Na lisolo oyo, tokolobela oyo okoki kosala mpo olonga ezaleli ya komiyoka ete ozali yo moko. Tokolobela mpe oyo okoki kosala mpo olendisa bandeko mosusu oyo bamiyokaka ete bazali bango moko.

^ par. 5 Topesi bango bankombo mosusu.

^ par. 60 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko mobali moko oyo mwasi na ye akufá, azali kozwa matomba ndenge azali koyoka botángi ya Biblia mpe ya mikanda mosusu ya boyekoli.

^ par. 62 NDIMBOLA YA BILILINGI: Ndeko mobali moko ná mwana na ye ya mwasi bakei kotala ndeko moko ya mobange ya lisangá na bango mpe bamoniseli ye boboto.