Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 5

“Bómisombela ntango oyo ebongi”

“Bómisombela ntango oyo ebongi”

“Bókeba mpenza ete ndenge na bino ya kotambola ezala te lokola bato bazangá bwanya kasi lokola bato ya bwanya, bómisombela ntango oyo ebongi.”​—EF. 5:15, 16.

LOYEMBO 8 Yehova azali ekimelo na biso

NA MOKUSE *

1. Ndenge nini tokoki kolekisa ntango elongo na Yehova?

 TOSEPELAKA kolekisa ntango elongo na bato oyo tolingaka. Mpo na mwasi ná mobali oyo balingani mingi, eloko oyo eleki malamu ezalaka kolekisa ntango elongo bango mibale. Bilenge basepelaka kozala elongo na baninga na bango ya motema. Mpe biso nyonso tosepelaka kolekisa ntango elongo na bandeko na biso bakristo. Kasi oyo eleki nyonso, tosepelaka kolekisa ntango elongo na Nzambe na biso. Tosalaka yango ntango tozali kobondela ye, kotánga Liloba na ye, mpe kokanisa na mozindo mokano na ye ná bizaleli na ye ya kitoko. Ntango oyo tolekisaka elongo na Yehova ezali na motuya mpenza!​—Nz. 139:17.

2. Mokakatano nini tozali na yango?

2 Tosepelaka kolekisa ntango elongo na Yehova, kasi tozali na mokakatano moko. Tozalaka na makambo mingi ya kosala, yango wana ekoki kozala mpasi tózwa ntango mpo na makambo ya elimo. Mosala ya mosuni, mikumba ya libota, mpe makambo mosusu ekoki kozwa biso ntango mingi mpe kosala ete tózwa ntango te mpo na kobondela, koyekola mpe komanyola.

3. Wapi likambo mosusu oyo ekoki kolyela biso ntango?

3 Ezali na makambo mosusu oyo ekoki kolyela biso ntango kozanga ete tóyeba yango. Soki tokebi te, tokoki kotika makambo mosusu oyo ezali mpenza mabe te elyela biso ntango oyo tokokaki kosalela mpo na kopusana lisusu penepene na Yehova. Tólobela naino likambo ya kominanola. Biso nyonso tomiyokaka malamu soki tominanoli mwa moke. Kasi ata kominanola ya malamu ekoki kolya biso ntango ya kosala makambo ya elimo. Tosengeli kotya kominanola na esika na yango.​—Mas. 25:27; 1 Tim. 4:8.

4. Tokolobela nini sikoyo?

4 Na lisolo oyo, tokolobela mpo na nini tosengeli kotya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso. Tokomona mpe ndenge oyo tokoki kosalela ntango na biso malamu elongo na Yehova, mpe matomba oyo tokoki kozwa soki tosaleli ntango na biso na bwanya.

ZWÁ BIKATELI YA BWANYA; TYÁ MAKAMBO OYO ELEKI NTINA NA ESIKA YA LIBOSO

5. Ndenge nini kotalela toli oyo ezali na Baefese 5:15-17 ekosalisa elenge apona nzela oyo eleki malamu?

5 Poná nzela oyo eleki malamu. Mbala mingi, bilenge bakanisaka nzela eleki malamu oyo bakolanda na bomoi na bango. Nzokande, balakisi mpe bato ya mabota na bango oyo bazali Batatoli ya Yehova te bakoki kolendisa bango bákɔta na iniversite mpo na nsima bázwa misala ya malamu oyo ekopesa bango mbongo ebele. Na ntembe te bakelasi ya bongo ekolya bango ntango mingi. Kasi mbala mosusu baboti mpe baninga mosusu na lisangá bazali kolendisa bilenge yango bálekisa ntango na bango na mosala ya Yehova. Nini ekoki kosalisa elenge oyo alingaka Yehova azwa ekateli oyo eleki malamu? Akozwa litomba soki atángi mpe akanisi toli ya Baefese 5:15-17 na mozindo. (Tángá.) Nsima ya kotánga bavɛrsɛ yango, elenge akoki komituna boye: ‘“Mokano ya Yehova ezali nini”? Ekateli nini ekosepelisa ye? Nakosalela ntango na ngai malamu koleka soki nalandi nzela nini?’ Kobosana te ete “mikolo ezali mabe,” mpe mosika te mokili oyo eyangelami na Satana ekobebisama. Ekozala likambo ya bwanya soki tosaleli bomoi na biso na ndenge oyo ekosepelisa Yehova.

6. Maria aponaki kosala nini, mpe mpo na nini ekateli na ye ezalaki ya malamu?

6 Tyá makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso. Na bantango mosusu, kosalela ntango na biso malamu ekoki kosɛnga kopona kati na makambo mibale oyo ezali mpenza mabe te. Tokoki komona yango na likambo oyo esalemaki ntango Yesu akendaki kotala Maria ná Marta. Na ntembe te Marta asepelaki mingi koyamba Yesu epai na bango, yango wana alukaki kolambela ye biloko ya malonga mpenza. Nzokande, ndeko na ye Maria amonaki malamu afanda pene ya Nkolo na ye Yesu mpe ayoka mateya na ye. Likambo oyo Marta asalaki ezalaki mabe te, kasi Yesu alobaki ete Maria “aponi eloko oyo ezali malamu.” (Luka 10:38-42) Nsima ya mikolo, ekoki kozala ete Maria abosanaki biloko oyo balyaki na libaku yango, kasi tondimi te ete abosanaki ata mokolo moko mateya oyo ayokaki epai ya Yesu. Kaka ndenge Maria azwaki na motuya mwa ntango oyo alekisaki elongo na Yesu, biso mpe tozwaka na motuya ntango oyo tolekisaka elongo na Yehova. Ndenge nini tokoki kosalela ntango yango malamu?

SALELÁ MALAMU NTANGO OYO OLEKISAKA ELONGO NA YEHOVA

7. Mpo na nini tosengeli kolekisaka ntango na kobondela, koyekola, mpe komanyola?

7 Osengeli koyeba ete kobondela, koyekola, mpe komanyola ezali na kati ya losambo na biso. Ntango tobondelaka, tosololaka na Tata na biso ya likoló, oyo alingaka biso mingi. (Nz. 5:7) Ntango toyekolaka Biblia, tozwaka “boyebi ya Nzambe,” oyo azali Liziba ya bwanya nyonso. (Mas. 2:1-5) Ntango tomanyolaka, tokanisaka bizaleli kitoko ya Yehova, ata mpe mokano monene oyo azali na yango mpo na biso mpe mpo na bato nyonso. Yango nde lolenge eleki malamu ya kosalela ntango na yo. Kasi nini ekoki kosalisa biso mpo tósala yango malamu?

Okoki koluka esika ya kimya mpo na kosala boyekoli na yo moko? (Talá paragrafe 8-9)

8. Ndenge oyo Yesu asalelaki ntango na ye na esobe ekoki koteya biso nini?

8 Soki esengeli, luká esika ya kimya. Tótalela ndakisa ya Yesu. Liboso abanda mosala na ye awa na mabele, alekisaki mikolo 40 na esobe. (Luka 4:1, 2) Na esika yango ya kimya, Yesu akokaki kobondela mpe komanyola makambo oyo Tata na ye akanaki mpo na ye. Na ntembe te, kosala bongo ebongisaki Yesu mpo na komekama oyo asengelaki kokutana na yango mosika te. Ndakisa ya Yesu ekoki koteya yo nini? Soki na libota na bino bato bazalaka ebele, kozwa esika ya kimya na kati ya ndako ekoki kozala ntango nyonso pɛtɛɛ te. Soki ezali bongo, ekoki kozala malamu oluka esika mosusu libándá. Yango nde ndeko mwasi moko na nkombo Julie asalaka soki alingi kolekisa ntango elongo na Yehova na libondeli. Ye ná mobali na ye bafandaka na apartema moko ya moke na France, mpe ezalaka mpasi moto azala ye moko, kozanga motungisi. Alobi boye: “Na yango, nakendaka kotambola na parkɛ mikolo nyonso. Kuna nakoki kozala ngai moko, kotya makanisi na likambo moko, mpe kosolola mpenza na Yehova.”

9. Atako Yesu azalaki na makambo mingi ya kosala, ndenge nini amonisaki ete azalaki kozwa boyokani na ye ná Yehova na motuya?

9 Yesu azalaki mpenza na makambo mingi ya kosala. Na boumeli ya mosala na ye awa na mabele, ebele ya bato bazalaki kolanda ye bisika nyonso, mpe ezalaki kosɛnga ete apesa bango nyonso ntango. Mokolo moko, “engumba mobimba eyanganaki mpenza liboso ya porte” mpo na komona ye. Atako bongo, Yesu asalaki nyonso mpo azwa ntango ya kobondela Yehova. Liboso ntɔngɔ etana, akendaki “na esika oyo bato bazali mingi te” mpo alekisa ntango ye moko elongo na Tata na ye.​—Mrk. 1:32-35.

10-11. Na kotalela Matai 26:40, 41, toli nini Yesu apesaki bayekoli na ye na elanga ya Getesemane, kasi nini esalemaki?

10 Na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, lokola mosala na ye ekómaki na nsuka, Yesu alukaki lisusu esika ya kimya epai akokaki komanyola mpe kobondela. Azwaki esika yango na elanga ya Getesemane. (Mat. 26:36) Na libaku yango, Yesu apesaki bayekoli na ye toli oyo ebongaki na likambo etali kobondela.

11 Tótalela makambo oyo esalemaki. Ntango bakómaki na elanga ya Getesemane, ngonga epusanaki mpenza, mbala mosusu midi ya butu elekaki. Yesu ayebisaki bantoma na ye bákoba kosɛnzɛla, mpe akendaki kobondela. (Mat. 26:37-39) Kasi ntango azalaki kobondela, bantoma na ye balalaki mpongi. Ntango akutaki bango bazali kolala, Yesu ayebisaki bango lisusu: “Bosɛnzɛlaka mpe bobondelaka ntango nyonso.” (Tángá Matai 26:40, 41.) Amonaki ete bazalaki mpenza komitungisa mpe balɛmbaki makasi. Ayokelaki bango mawa mpe alobaki ete “nzoto ezali na bolɛmbu.” Kasi, Yesu azongaki kobondela mbala mibale lisusu, mpe ntango azongaki, akutaki bayekoli na ye balali na esika bábondela.​—Mat. 26:42-45.

Okoki kotya ntango mpo na kobondela wana olɛmbi naino mingi te? (Talá paragrafe 12)

12. Tokoki kosala nini soki na bantango mosusu tozali kokoka kobondela te mpo mitungisi eleki to mpe tolɛmbi nzoto?

12 Poná ntango ya malamu. Na bantango mosusu, tokoki kozanga makasi ya kobondela mpo tolɛmbi mingi. Soki likambo yango ekómelá yo, yebá ete ozali yo moko te. Okoki kosala nini? Bandeko mosusu oyo bazalaki liboso kobondela Yehova na nsuka ya mokolo, bamoni ete eleki malamu kozwa ntango ya kobondela nde na mpokwa, wana balɛmbi naino mingi te. Bamosusu bamoni ete ndenge oyo bazalaka ntango bazali kobondela esalisaka mpe, na ndakisa kofanda to kofukama. Kasi okosala nini soki ozali kokoka kobondela te mpo mitungisi eleki to mpe olɛmbi nzoto? Yebisá Yehova ndenge oyo ozali komiyoka. Zalá na elikya ete Tata na biso ya motema mawa akomitya na esika na yo.​—Nz. 139:4.

Okoki koboya koyanola mpe kotinda bamesaje ntango ozali na makita? (Talá paragrafe 13-14)

13. Ndenge nini baaparɛyi ekoki kobebisa ntango oyo tozali kolekisa ná Yehova?

13 Ntango ozali koyekola, boyá kotya makanisi na makambo mosusu. Kaka kobondela te nde ekoki kokómisa boyokani na biso ná Yehova makasi. Koyekola Liloba ya Nzambe mpe koyangana na makita ekoki mpe kosalisa biso mpo tópusana lisusu penepene ya Nzambe. Okoki kosala nini mpo ntango oyo olekisaka na koyekola mpe na makita ya lisangá ememela yo mpenza matomba? Omituna boye: ‘Makambo nini elongolaka likebi na ngai na makita to ntango nazali koyekola?’ Ezalaka nde kobenga oyo babengaka ngai na telefone, to bamesaje oyo batindelaka ngai na telephone to na aparɛyi mosusu? Lelo oyo, bato mingi bazali na baaparɛyi yango ya ntina mingi. Bato mosusu oyo basalaka bolukiluki bamonisi ete ntango tozali kosala likambo oyo esɛngi likebi mingi, soki kaka telephone ezali pembeni wana ekoki kolongola likebi na biso. Profesɛrɛ moko oyo ayekolaka bizaleli ya bato alobi boye: “Okotya lisusu likebi te na makambo oyo ozali kosala. Makanisi na yo ekokende epai mosusu.” Mbala mingi liboso mayangani ya mike mpe ya minene ebanda, bayebisaka biso tósala ete baaparɛyi na biso elongola likebi ya basusu te. Biso moko mpe tokoki kosalaka bongo ntango tozali kobondela to koyekola, mpo baaparɛyi elongola likebi na biso te mpe ebebisa te ntango oyo tozali kolekisa elongo na Yehova.

14. Na kotalela Bafilipi 4:6, 7, ndenge nini Yehova akoki kosalisa yo otya makanisi na yo esika moko?

14 Sɛngá Yehova asalisa yo mpo otya makanisi esika moko. Soki omoni ete makanisi na yo ezali koyengayenga ntango ozali koyekola yo moko, to ntango ozali na makita, sɛngá Yehova asalisa yo. Soki ozali na mitungisi, ekoki kozala mpasi otika makambo na yo pembeni mpe otya makanisi nyonso na makambo ya elimo, kasi ezali na ntina mingi osala yango. Sɛngá Yehova apesa yo kimya oyo ekobatela kaka motema na yo te, kasi mpe “makanisi na yo.”​—Tángá Bafilipi 4:6, 7.

KOLEKISA NTANGO ELONGO NA YEHOVA EKOMEMELA YO MATOMBA

15. Wapi litomba moko oyo okozwa soki ozali kolekisa ntango elongo na Yehova?

15 Soki ozali kozwa ntango ya koloba na Yehova, ya koyoka, mpe ya kokanisa makambo etali ye, okozwa mpenza matomba. Na ndenge nini? Ya liboso, okobanda kozwa bikateli ya malamu. Biblia eyebisi biso ete “ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.” (Mas. 13:20) Na yango, soki ozali kolekisa ntango elongo na Yehova, oyo azali Liziba ya bwanya, yo mpe okokóma na bwanya mingi. Okoyeba malamu ndenge ya kosepelisa ye mpe ndenge ya koboya kozwa bikateli oyo ekopesa ye mpasi.

16. Ndenge nini kolekisa ntango elongo na Yehova esalisaka biso tókóma bateyi malamu?

16 Ya mibale, okokóma moteyi malamu mpenza. Ntango tozali koyekola Biblia ná moto moko, moko ya mikano na biso ya libosoliboso ezalaka ya kosalisa moyekoli yango apusana penepene na Yehova. Soki tozali kobondela Yehova mingi mpe koyekola makambo na ye mingi, bolingo na biso mpo na ye ekokóma makasi mpe tokoyeba malamu koleka ndenge ya koteya bayekoli na biso mpo bálinga ye. Ezalaki bongo mpo na Yesu. Lokola azalaki kolobela Yehova na ndenge ya malamu, bayekoli na ye ya sembo mpe bakómaki kolinga Yehova.​—Yoa. 17:25, 26.

17. Mpo na nini kobondela mpe koyekola esalisaka biso mpo tókómisa kondima na biso makasi?

17 Ya misato, kondima na yo ekokóma lisusu makasi. Kanisá likambo oyo esalemaka ntango osɛngi Nzambe atambwisa yo, apesa yo makasi, to asalisa yo. Mbala nyonso oyo Yehova ayanoli na mabondeli yango, kondima na yo epai na ye ekómaka makasi. (1 Yoa. 5:15) Likambo mosusu oyo ekoki kokómisa kondima na yo makasi ezali boyekoli na yo moko. Kobosana te ete “kondima eutaka na likambo oyo moto ayoki.” (Rom. 10:17) Nzokande, mpo moto akómisa kondima na ye makasi, asengeli kosuka kaka te na koyekola makambo. Tosengeli kosala lisusu likambo nini?

18. Pesá ndakisa oyo emonisi ntina ya komanyola.

18 Tosengeli mpe komanyola makambo oyo tozali koyekola. Tótalela makambo oyo ekómelaki mokomi ya Nzembo 77. Alɛmbaki nzoto mpo akanisaki ete Yehova aboyaki ye ná Bayisraele mosusu. Mitungisi yango ezalaki kozangisa ye mpongi na butu. (Vɛrsɛ 2-8) Asalaki nini? Ayebisaki Yehova boye: “Nakomanyola likoló ya mosala na yo nyonso, mpe nakotya likebi na misala na yo.” (Vɛrsɛ 12) Na ntembe te, mokomi ya nzembo ayebaki malamu makambo oyo Yehova asalelaki basaleli na Ye na kala, kasi lokola azalaki komitungisa, atunaki boye: “Nzambe abosani nde komonisa mawa, to aboyi nde komonisa makambo ya motema mawa na ye mpo na nkanda?” (Vɛrsɛ 9) Mokomi ya nzembo akanisaki na mozindo na misala ya Yehova mpe ndenge oyo Nzambe amonisaki motema mawa na kala. (Vɛrsɛ 11) Yango ebotaki mbuma nini? Mokomi ya nzembo yango akómaki kondima ete Yehova akosundola bato na Ye te. (Vɛrsɛ 15) Ndenge moko mpe, kondima na yo ekokóma lisusu makasi, soki ozali kakanisa na mozindo na makambo oyo Yehova asili kosalela basaleli na ye mpe oyo asaleli yo moko.

19. Matomba nini mosusu tokozwa soki tozali kolekisa ntango elongo na Yehova?

19 Ya minei, mpe oyo eleki ntina, bolingo na yo mpo na Yehova ekokóma lisusu makasi. Bolingo, ezaleli oyo eleki bizaleli mosusu nyonso, ekotinda yo otosa Yehova, omipimela makambo mosusu mpo na kosepelisa ye, mpe oyika mpiko ata na komekama ya ndenge nini. (Mat. 22:37-39; 1 Ko. 13:4, 7; 1 Yoa. 5:3) Eloko moko te ezali na motuya koleka kozala na boninga makasi mpe ya malamu elongo na Yehova!​—Nz. 63:1-8.

20. Okosala nini mpo ozwaka ntango ya kolekisa elongo na Yehova?

20 Kobosana te ete kobondela, koyekola, mpe komanyola ezali na kati ya losambo na biso. Lokola Yesu, lukáká bisika ya kimya epai okoki kolekisa ntango elongo na Yehova. Boyá makambo oyo ekoki kolongola likebi na yo. Sɛngá Yehova asalisa yo mpo otya makanisi na yo esika moko ntango ozali kosala makambo ya elimo. Soki osaleli ntango na yo malamu sikoyo, Yehova akopesa yo bomoi libela na libela na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.​—Mrk. 4:24.

LOYEMBO 28 Tózala baninga ya Yehova

^ par. 5 Yehova azali moninga na biso oyo aleki malamu. Tozwaka boninga na biso ná ye na motuya mingi, mpe tolingaka koyeba ye malamu. Esɛngaka ntango mpo na koyeba moto. Ezali mpe bongo soki tolingi kokómisa boninga na biso ná Yehova makasi. Lokola tozalaka na makambo mingi ya kosala, ndenge nini tokoki kozwa ntango ya kopusana penepene ya Tata na biso ya likoló, mpe matomba nini tokozwa soki tosali bongo?