Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOYEKOLI 1

“Baoyo balukaka Yehova, bakozanga eloko ya malamu te”

“Baoyo balukaka Yehova, bakozanga eloko ya malamu te”

MOKAPO YA MOBU 2022: “Baoyo balukaka Yehova, bakozanga eloko ya malamu te.”​—NZ. 34:10.

LOYEMBO 4 “Yehova azali Mobateli na ngai”

NA MOKUSE *

Davidi amonaki ete azangaki ‘eloko moko ya malamu te’ ata na ntango ya mikakatano (Talá paragrafe 1-3) *

1. Mokakatano nini Davidi azalaki na yango?

 DAVIDI azalaki kokimakima mpo na kobikisa bomoi na ye, mpo Saulo, mokonzi ya nguya ya Yisraele, azalaki koluka koboma ye. Ntango Davidi azalaki na mposa ya biloko ya kolya, atɛlɛmaki na engumba Nobe, epai asɛngaki Ahimeleke apesa ye kaka mampa mitano. (1 Sam. 21:1, 3) Na nsima, ye ná bato na ye babombanaki na kati ya mobenga moko. (1 Sam. 22:1) Mpo na nini Davidi akómaki na mokakatano yango?

2. Na ndenge nini Saulo amityaki na likama? (1 Samwele 23:16, 17)

2 Mokonzi Saulo azalaki koyokela Davidi zuwa makasi mpo bato mingi bazalaki kolinga ye mpe kokumisa ye mpo alongaki bitumba mingi. Saulo ayebaki mpe ete kozanga botosi na ye nde esalaki ete Yehova aboya ye, mpe ete Yehova aponaki Davidi azala mokonzi na esika na ye. (Tángá 1 Samwele 23:16, 17.) Kasi, lokola Saulo azalaki naino mokonzi ya Yisraele, azalaki na basoda ebele mpe bato mingi bazalaki kopesa ye mabɔkɔ; yango wana Davidi asengelaki kokima mpo na kobikisa bomoi na ye. Saulo akanisaki mpenza ete akokaki kopekisa Nzambe atya Davidi azala mokonzi ndenge akanaki? (Yis. 55:11) Biblia elobeli yango te, kasi toyebi likambo moko: Saulo azalaki komitya na likama, mpo bato oyo babundisaka Nzambe balongaka te.

3. Davidi alobaki nini atako azalaki na mikakatano?

3 Davidi azalaki moto ya komikitisa. Ye moko te nde alukaki komikómisa mokonzi ya Yisraele. Yehova nde aponaki ye. (1 Sam. 16:1, 12, 13) Saulo ayinaki Davidi makasi mpenza. Kasi Davidi apesaki Yehova foti te mpo bomoi na ye ezalaki na likama. Amilelaki mpe te ndenge azalaki na biloko mingi te ya kolya, mpe ndenge azalaki kofanda na kati ya mobenga. Kutu, ekoki kozala ntango azalaki komibomba na kati ya mobenga yango nde akomaki nzembo kitoko ya masanzoli oyo ezali mpe na maloba ya motó ya likambo ya lisolo na biso: “Baoyo balukaka Yehova, bazangaka eloko ya malamu te.”​—Nz. 34:10.

4. Mituna nini tokotalela, mpe mpo na nini ezali na ntina?

4 Lelo oyo, na bantango mosusu, basaleli ya Yehova bazangaka biloko ya kolya mpe biloko mosusu ya kobikela. * Batatoli ya Yehova ebele bakutani na mikakatano yango, mingimingi na ntango ya maladi mabe ya Coronavirus. Mpe lokola ‘bolɔzi monene’ ebɛlɛmi, tóyeba ete tokoki kokutana na mikakatano mingi koleka. (Mat. 24:21) Na yango, tóyanola sikoyo na mituna oyo minei: Na ndenge nini Davidi ‘azangaki te eloko moko ya malamu’? Mpo na nini tosengeli koyekola kosepela na oyo tozali na yango? Mpo na nini tokoki kotya motema ete Yehova akokokisa bamposa na biso? Mpe ndenge nini tokoki komibongisa banda sikoyo mpo na makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya?

“NAKOZANGA ELOKO TE”

5-6. Ndenge nini Nzembo 23:1-6 esalisi biso tókanga ntina ya maloba ya Davidi ete basaleli ya Nzambe “bakozanga eloko moko ya malamu te”?

5 Davidi alingaki koloba nini ntango alobaki ete basaleli ya Yehova ‘bakozanga eloko ya malamu te’? Mpo tókanga ntina ya makambo oyo Davidi alingaki koloba, tótalela Nzembo 23, epai asalelaki mpe maloba ya ndenge wana. (Tángá Nzembo 23:1-6.) Davidi abandaki nzembo yango na maloba oyo: “Yehova azali Mobateli na ngai. Nakozanga eloko te.” Na bavɛrsɛ mosusu ya nzembo yango, Davidi alobelaki makambo oyo ezalaki na motuya mingi, na ndakisa, ebele ya mapamboli ya elimo oyo azwaki mpo andimaki Yehova azala Mobateli na ye. Yehova akambaki Davidi “na banzela ya boyengebene,” mpe asalisaki ye na ntango ya bisengo mpe na ntango ya mpasi. Davidi ayebaki ete atako Yehova alalisaki ye na “bisika ya koleisa banyama oyo etondi na matiti,” bomoi na ye ekozanga mikakatano te. Na bantango mosusu, alɛmbaki nzoto, lokola nde azalaki kotambola “na lobwaku ya molili makasi,” mpe azalaki na banguna. Kasi lokola Yehova azalaki Mobateli na ye, Davidi azalaki ‘kobanga ata eloko moko ya mabe te.’

6 Sikoyo tozwi eyano na motuna oyo elobaki: Na ndenge nini Davidi ‘azangaki eloko ya malamu te’? Na ndenge ya elimo, Davidi azalaki na nyonso oyo asengelaki na yango mpo atikala penepene na Yehova. Esengo na ye etalelaki biloko ya mosuni te. Davidi asepelaki na oyo Yehova apesaki ye. Makambo oyo ezalaki na ntina mingi mpo na ye ezalaki nde lipamboli mpe libateli ya Yehova.

7. Na kotalela Luka 21:20-24, mokakatano nini bakristo ya siɛklɛ ya liboso oyo bazalaki kofanda na Yudea bakutanaki na yango?

7 Maloba ya Davidi esalisi biso tómona ete ezali na ntina tótalelaka biloko ya mosuni na ndenge ebongi. Tokoki kosepela na biloko ya mosuni oyo tozali na yango, kasi tosengeli te kotya yango na esika ya liboso na bomoi na biso. Na nsima, bakristo mosusu ya siɛklɛ ya liboso oyo bazalaki kofanda na Yudea bakangaki ntina ya likambo yango. (Tángá Luka 21:20-24.) Yesu ayebisaki bango ete na ntango moko boye, bakomona “mampinga ezingi [engumba] Yerusaleme na bakaa.” Ntango likambo yango esalemi, basengelaki ‘kobanda kokima na bangomba.’ Kokima yango ezalaki mpo na kobikisa bomoi na bango, kasi basengelaki kotika biloko na bango mingi. Eleki mwa bambula, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko elobaki boye: “Basundolaki bilanga ná bandako, batikaki ata biloko oyo bazalaki na yango na bandako. Elikya na bango nyonso ezalaki na libateli mpe na lisungi ya Yehova, batyaki losambo na ye liboso ya eloko mosusu nyonso oyo ekokaki komonana ete ezali na ntina.”

8. Liteya nini ya ntina mingi tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki bakristo ya Yudea?

8 Liteya nini ya ntina tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki bakristo ya Yudea? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo tolobeli elobaki: ‘Mbala mosusu tokokutana na komekama na ndenge oyo totalelaka biloko ya mosuni; biloko yango nde eleki ntina mpo na biso, to lobiko oyo Nzambe akopesa mpo na bato nyonso nde eleki ntina? Ɛɛ, kokima na biso ekoki kobimisa mikakatano to kozanga biloko. Ekosɛnga ete tózala pene ya kosala nyonso oyo esengeli, ndenge bakristo ya siɛklɛ ya liboso oyo bakimaki Yudea basalaki.’ *

9. Ndenge nini toli oyo ntoma Paulo apesaki Baebre ezali kolendisa yo?

9 Meká kokanisa ndenge ezalaki mpasi mpo na bakristo yango kotika biloko pene na nyonso oyo bazalaki na yango, mpe kobanda bomoi ya sika na esika mosusu! Basengelaki mpenza kozala na kondima ete Yehova akokokisa bamposa na bango. Kasi ezalaki na eloko moko oyo ekokaki kosalisa bango. Mbula mitano liboso mampinga ya Baroma ezinga Yerusaleme, ntoma Paulo apesaki Baebre toli mosusu ya ntina mingi; ayebisaki bango boye: “Bomoi na bino ezala na bolingo ya mbongo te, bósepela na biloko oyo bozali na yango sikoyo. Mpo alobaki ete: ‘Nakotika yo soki moke te, mpe nakosundola yo ata moke te.’ Mpo tózala na mpiko mpenza mpe tóloba: ‘Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?’” (Ebr. 13:5, 6) Na ntembe te, mpo na baoyo basalelaki toli ya Paulo liboso ete Baroma báya, ezalaki mpasi te báyekola kosepela na oyo bakokaki kozwa na esika oyo bakómaki kofanda. Bayebaki ete Yehova akokokisa bamposa na bango. Maloba ya Paulo epesi biso mpe elikya ete Yehova akopesa biso oyo tosengeli na yango.

“TÓSEPELA NA BILOKO YANGO”

10. “Sekele” nini ntoma Paulo ayebisi biso?

10 Ntoma Paulo apesaki Timote toli ya ndenge wana, mpe toli yango etaleli mpe biso nyonso. Akomaki boye: “Yango wana, soki tozali na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tósepela na biloko yango.” (1 Tim. 6:8) Yango elimboli nde ete tosengeli te kolya biloko ya kitoko, kozala na esika ya malamu ya kofanda, to kosomba bilamba ya sika na bantango mosusu? Ntoma Paulo alingaki koloba bongo te. Alingaki nde koloba ete tosengeli kosepela na biloko ya mosuni oyo tozali na yango. (Flp. 4:12) Yango nde ezalaki “sekele” ya ntoma Paulo. Eloko na biso oyo eleki motuya ezali nde boyokani na biso elongo na Nzambe, kasi te biloko ya mosuni oyo tozali na yango.​—Hab. 3:17, 18.

Bayisraele ‘bazangaki eloko te’ na boumeli ya mbula 40 oyo balekisaki na esobe. Okoki koyekola kosepela na biloko oyo ozali na yango? (Talá paragrafe 11) *

11. Na likambo etali kosepela na biloko oyo tozali na yango, liteya nini tokoki kozwa na maloba ya Moize epai ya Bayisraele?

11 Eloko oyo tozali kokanisa ete tosengeli na yango ekoki kokesana na oyo Yehova ayebi ete tosengeli na yango. Talá oyo Moize ayebisaki Bayisraele nsima ya kolekisa mbula 40 na esobe: “Yehova Nzambe na yo apamboli yo na misala nyonso ya lobɔkɔ na yo. Ayebi malamu ndenge otamboli na esobe monene oyo. Mbula ntuku minei (40) oyo, Yehova Nzambe na yo azalaki elongo na yo. Ozangaki eloko te.” (Mib. 2:7) Na boumeli ya mbula 40 yango, Yehova aleisaki Bayisraele mana. Bilamba na bango ekufaki te, nzokande ezalaki kaka bilamba oyo babimaki na yango na Ezipito. (Mib. 8:3, 4) Atako basusu bakokaki komona ete biloko yango ezali moke, Moize ayebisaki Bayisraele ete bazalaki na biloko nyonso oyo basengelaki na yango. Yehova akosepela soki toyekoli kosepela, ata na biloko moke oyo azali kopesa biso, soki tozali kotalela yango lokola lipamboli mpe kopesa ye matɔndi mpo na yango.

TYÁ MOTEMA ETE YEHOVA AKOKOKISA BAMPOSA NA YO

12. Nini emonisi ete Davidi azalaki nde kotyela Yehova motema?

12 Davidi ayebaki ete Yehova azali sembo mpe akokisaka mpenza bamposa ya baoyo balingaka Ye. Atako bomoi na ye ezalaki na likama ntango akomaki Nzembo 34, na miso ya kondima, Davidi amonaki ete “anzelu ya Yehova” azalaki ‘kotya kaa zingazinga’ na ye. (Nz. 34:7, msl) Mbala mosusu Davidi azalaki kokokanisa anzelu ya Yehova na soda moko oyo atye kaa, azali kokɛngɛla mpo na kotala soki monguna akoya. Atako ye moko azalaki soda ya mpiko mpe Yehova alakaki ye ete akopesa ye bokonzi, Davidi atyaki motema te na makoki na ye ya kobwaka libanga na lansi to ya kosalela mopanga mpo na kolonga monguna. (1 Sam. 16:13; 24:12) Atyaki motema epai ya Nzambe, mpe azalaki na elikya ete anzelu ya Yehova ‘abikisaka baoyo babangaka Ye.’ Ya solo, lelo oyo tozelaka te ete Nzambe abatela biso na ndenge ya likamwisi. Kasi toyebi ete baoyo nyonso batyelaka Yehova motema bakozwa bomoi ya seko ata soki bakufi lelo.

Na ntango ya bolɔzi monene, mbala mosusu mampinga ya Goge ya Magoge ekomeka kokɔtela biso na bandako na biso. Kasi tokoki kozala na elikya ete Yesu ná baanzelu na ye bakoyeba makambo oyo ezali kosalema mpe bakobundela biso (Talá paragrafe 13)

13. Ntango Goge ya Magoge ekobundisa biso, mpo na nini tokomonana lokola tozali na makasi te, kasi mpo na nini tosengeli kobanga te? (Talá elilingi ya ezipeli.)

13 Mosika te, elikya oyo tozalaka na yango ete Yehova azali na likoki ya kobatela biso ekotyama na komekama. Ntango Goge ya Magoge, etuluku ya bikólo oyo esangani, ekobundisa basaleli ya Nzambe, ekomonana lokola nde bomoi na biso ezali na likama. Na ntango yango, ekosɛnga tózala na kondima ete Yehova akoki kobikisa biso mpe akosala yango. Na miso ya bato ya bikólo, tokomonana kaka boye, lokola mpate oyo ezangi moto ya kobatela yango. (Ezk. 38:10-12) Tokozala na bibundeli te, mpe tokozala bato oyo bayebi kobunda te. Bakokanisa ete ekozala pɛtɛɛ kolonga biso. Bakomona te eloko oyo biso tomonaka na miso ya kondima: bayebi te ete baanzelu ya Yehova bazalaka zingazinga ya basaleli ya Nzambe, bamibongisá mpo na kobundela biso. Ndenge nini bato ya bikólo bakoki komona bango? Bazalaka na kondima epai ya Nzambe te. Bakokamwa mpenza ntango mampinga ya likoló ekobundela biso!​—Em. 19:11, 14, 15.

OMIBONGISA SIKOYO MPO NA MAKAMBO OYO EKOSALEMA NA MIKOLO EZALI KOYA

14. Ndenge nini tokoki komibongisa sikoyo mpo na makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya?

14 Tokoki kosala nini mpo tómibongisa sikoyo mpo na makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya? Ya liboso, tosengeli kotalela biloko ya mosuni na ndenge oyo ebongi, tóyeba ete mokolo mosusu ekosɛnga tótika oyo tozali na yango. Tosengeli mpe kosepela na oyo tozali na yango, mpe kozala na esengo mingi mpo na boyokani na biso ná Yehova. Soki toyebi Nzambe na biso malamu, tokozala mpe na kondima ete akobatela biso ntango Goge ya Magoge akobundisa biso.

15. Makambo nini oyo Davidi akutanaki na yango na kala esalisaki ye ayeba ete Yehova akoyokisa ye nsɔni te?

15 Tótala likambo mosusu oyo esalisaki Davidi, oyo ekoki mpe kosalisa biso tómibongisa mpo na komekama. Davidi alobaki boye: “Bómeka mpe bómona ete Yehova azali malamu; esengo na mobali makasi oyo azali kokima epai na ye.” (Nz. 34:8) Maloba yango emonisi ntina oyo Davidi ayebaki ete akokaki kotya motema ete Yehova akosalisa ye. Mbala mingi Davidi azalaki kotyela Yehova motema, mpe Nzambe na ye ayokisaki ye nsɔni ata mbala moko te. Ntango Davidi azalaki elenge, abundisaki engambe Mofilistia moko na nkombo Goliate, mpe ayebisaki mobali yango ya nguya ete: “Na mokolo ya lelo, Yehova akokaba yo na lobɔkɔ na ngai.” (1 Sam. 17:46) Na nsima, Davidi akómaki kosala epai ya Mokonzi Saulo, oyo alukaki mbala mingi koboma ye. Kasi “Yehova azalaki na” Davidi. (1 Sam. 18:12) Lokola Davidi amonaki ndenge Yehova asalisaki ye na kala, ayebaki ete akokaki lisusu kotyela Ye motema na komekama oyo azalaki na yango.

16. Ndenge nini tokoki “komeka” bolamu ya Yehova?

16 Soki tozali mpenza kolanda litambwisi ya Yehova sikoyo, ekosalisa biso mpe tómindimisa makasi ete azali na likoki ya kobikisa biso na mikolo ezali koya. Esɛngaka kozala na kondima mpe kotyela Yehova motema mpo na kosɛnga mokonzi na biso ya mosala apesa biso konje mpo tókende na liyangani ya monene to ya moke, to kosɛnga ye abongola programɛ na biso ya mosala mpo tókoka koyangana na makita nyonso mpe tókoka kosakola lisusu mingi. Kanisá ete mokonzi ya mosala aboyi makambo nyonso oyo tosɛngi ye mpe alongoli biso na mosala. Tokozala na kondima ete Yehova akotika biso te to akosundola biso te, mpe ete akokokisa ntango nyonso bamposa na biso ya mosuni? (Ebr. 13:5) Bandeko mingi oyo bazali na mosala ya ntango nyonso bakoki kobɛta masolo oyo emonisi ndenge oyo Yehova asalisaki bango ntango bazalaki mpenza na mposa na ye. Yehova azali sembo.

17. Mokapo ya mobu 2022 ezali nini, mpe mpo na nini ebongi mpenza?

17 Lokola Yehova azali na ngámbo na biso, tozali na ntina te ya kobanga makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Soki totye Bokonzi na ye na esika ya liboso na bomoi na biso, Nzambe na biso akosundola biso ata mokolo moko te. Mpo na kosalisa biso tómibongisa banda sikoyo mpo na mikakatano oyo tokokutana na yango na mikolo ezali koya, mpe tótya motema ete Yehova akosundola biso ata mokolo moko te, Lisangani ya Mikóló-Bakambi eponi Nzembo 34:10 mpo ezala mokapo ya mobu 2022: “Baoyo balukaka Yehova, bakozanga eloko ya malamu te.”

LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi

^ par. 5 Mokapo ya mobu 2022 euti na Nzembo 34:10, oyo elobi: “Baoyo balukaka Yehova, bakozanga eloko ya malamu te.” Basaleli mingi ya sembo ya Yehova bazalaka na mbongo mingi te to biloko mingi te ya mosuni. Ndenge nini tokoki koloba ete ‘bazangi eloko ya malamu te’? Mpe ndenge nini kokanga ntina ya vɛrsɛ yango ekoki kosalisa biso tómibongisa mpo na mikakatano oyo tokokutana na yango na mikolo ezali koya?

^ par. 4 Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/09/2014.

^ par. 8 Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/1999, lok. 19.

^ par. 54 ELILINGI: Ata ntango azalaki komibomba na kati ya mobenga mpo na kokima Mokonzi Saulo, Davidi azalaki na botɔndi mpo na biloko oyo Yehova apesaki ye.

^ par. 56 ELILINGI: Ntango Bayisraele balongwaki na Ezipito, Yehova aleisaki bango mana mpe asalaki ete bilamba na bango ebeba te.